2014
Tondisa Mokili na Bolingo ya Klisto
sánzá ya zómi na míbalé 2014


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Mibale 2014

Tondisa Mokili na Bolingo ya Klisto

Ntango tokanisi na ntina ya Eyenga ya Mbotama ya Klisto, mingi mingi tokanisaka makabo topesaka mpe tozwaka. Makabo ekoki kozala eteni ya momeseno ya bolingo, kasi ekoki mpe kolongwa uta na lokumu ya sembo to ya pete ya mbotama ya Yesu Klisto mpe kobungisa makanisi uta na kosepela Mbotama ya Mobikisi na biso na lolenge elongobani.

Nayebi uta na mayele na ngai moko ete makundoli ya malamu koleka ya Mbotama ya Yesu Klisto ekoki kozala oyo esalemi kati na komikitisa mingi koleka. Makabo ya bomwana na ngai ezalaki solo mpenza ya biloko ya ntalo to motuya te na kotalaka makabo ya lelo. Ntango mosusu nazwaki simisi babongisa to bagant to basoseti. Nakanisi eyenga moko ya Mbotama oyo nasepelaki mingi ntango ndeko na ngai ya mobali ya nkulutu apesaki ngai mwa mbeli ya nzete oyo ye asalaki.

Esengaka kozwa makabo ya ntalo to ya motuya te mpo ete eyenga ya Mbotama ezwa ntina. Lisolo ya Mpaka Glen L. Rudd oyo asalaki lokola moko ya Bantuku Sambo uta 1987 kino 1992, ezongeli ngai na makanisi. Mokolo moko yambo ya eyenga ya Mbotama mwa mibu mileki, ntango azalaki kokamba ebombelo ya episikopo, ayekolaki uta na mokambi moko ya eklezia na ntina ya libota moko kati na bosenga oyo ewutaki koya sika na engumba. Ntango akendaki kotala mwa ndako na bango, akutanaki na elenge mama ya likombe moko na bana minei na nse ya mibu 10.

Bosenga ya libota na ye ezalaki mpenza kolekela bozui ya mama oyo akokaki te kosepelisa bana to kopesa bango makabo na Eyenga wana ya Mbotama— ye mpe akokaki te kosomba nzete ya sapin. Ndeko Rudd asololaki na libota mpe bayebisaki ye ete bana mike ya basi misato wana bazalaki na mposa ya mwana popi moko to esakanelo to jouet ya nyama. Ntango atunaki mwana ya mobali oyo azalaki mokolo na mibu motoba eloko azalaki na yango mposa, mwana ya moke oyo na nzala azongisaki maloba ete, “Nalingi sani mobimba ya potopoto.”

Ndeko Rudd alakaki mwana mobali wana ya moke potopoto mpe mbele eloko mosusu. Sima akendaki na ebombelo ya episikopo mpe asangisaki bilei mpe biloko mosusu mpo na kosunga sikasikawana bosenga ya libota.

Na ntongo makasi wana Mosantu ya mikolo ya nsuka moko ya bolingo apesaki ye badolari 50 “mpo na moto moko oyo azali kokelela.” Kosalelaka likabo wana, Ndeko Rudd akamataki misato kati na bana na ye moko mpe bakendaki kosomba biloko mpo na eyenga ya Mbotama — ntango bana bazalaki kopona biloko ya kosakanela mpo na bana bazalaki kati na mposa.

Sima ya kotondisa motuka na bilei, bilamba, makabo, nzete ya eyenga ya Mbotama, mpe ndambo ya biloko ya kokomisa ndako kitoko, ba Rudd bakumbaka motuka na ndako ya libota. Kuna basungaki mama mpe bana na ye kotia mpe kobongisa nzete ya sapin. Sima batiaki makabo na nse na yango mpe bapesaki mwana mobali wana ya moke paquet ya monene ya biloko ya kolamba potopoto.

Mama alelaki, bana basepelaki, mpe banso bayembaki loyembo ya eyenga ya Mbotama. Na mpokwa wana lokola libota ya Rudd esanganaki mpo na kolia, bazongisaki matondi ete bakokaki kopesa esengo ya eyenga ya Mbotama na libota mosusu mpe kosunga mwana mobali ya moke kozwa sani ya potopoto.1

Klisto mpe Molimo ya Kopesa

Kanisa na nzela ya pete kasi elongobana oyo Tata na Lola aponaki mpo na kokumisa mbotama ya Mwana na Ye. Na mpokwa wana esantu, banzelu bamonanaki epai ya moto ya bozwi te kasi na babateli mpate. Klisto abotamaki na ndako te kasi na elielo ya bibwele. Alingamaki na bilamba ya soie to ya ntalo te kasi alingamaki na bitendi.

Bomikitisi ya eyenga ya Mbotama wana ya yambo ezalaki elilingi ya bomoi ya Mobikisi. Atako Akelaki mabele, Atambolaki na bokonzi na bonkumu mpe na nkembo, mpe Atelemi na loboko ya mobali ya Tata, Ayaki na mabele lokola mwana oyo azanga lisungi. Bomoi na Ye ezalaki ndakisa ya lokumu ezangi komilakisa, mpe Atambolaki elongo na babola, babeli, bato balemba, mpe bamemi mikumba.

Atako Azalaki mokonzi, Alukaki lokumu to bozwi ya bato te. Bomoi na ye, maloba na Ye, mpe misala na Ye ya mokolo na mokolo ezalaki nzokande bilembo ya bonkumu ya bozindo.

Yesu Klisto, oyo ayebi malamu mpenza boniboni kopesa, abongisaki mpo na biso ndakisi mpo na kopesa. Na baoyo mitema ezali kilo na baye batikala bango moko mpe na mawa, Akabolaka mawa na bango mpe amemelaka bango bolendisi. Na baoyo nzoto mpe makanisi etungisami na maladi mpe mpasi, Amemaka bolingo mpe libiki. Na baoyo milimo engumbami na mikumba ya masumu, Apesi elikya, bolimbisi, mpe bosikoli.

Soki Mobikisi azalaki kati na biso lelo, tolingaki komona Ye wapi Abandaki kozala ntango nyonso — kosalisaka bato ya boboto, baoyo babwakama, bato na bomikitisi, bato na mpasi, mpe babola na molimo. Na eleko oyo ya eyenga ya Mbotama mpe ntango nyonso, tika topesa Ye makabo na kolingaka basusu lokola Alingi. Tika tokoka kokundola lokumu ya bomikitisi ya mbotama, makabo, mpe ya bomoi na Ye. Mpe tika ete, na nzela ya misala ya mike mike ya boboto, bolingani, mpe bokaboli mawa, totondisa mokili na pole ya bolingo mpe nguya ya kobikisa na Ye.

Matangi

  1. Tala Glen L. Rudd, Pure Religion: The Story of Church Welfare since 1930(1995), 352–53; tala lisusu Glen L. Rudd, “A Bowl of Oatmeal,” Church News, Sanza ya Zomi na Mibale. 2, 2006, 16.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Uchtdorf ateyi ete tosengeli kolanda ndakisa ya Mobikisi ya kokaba. Meka kotuna bato otalaka moto na moto na ntango na ye kopesa n kombo ya likabo Mobikisi apesaki bango, mpe solola boniboni bakoki kosalela likabo yango mpo na kosunga basusu. Ndakisa, soki mondimi moko apambolamaki na boyekoli miziki, akoki kokende koyemba epai ya bato ya mpembeni. Okoki kofukama mpo na losambo elongo na baye bozali kotala, kosengaka bofulami na ntina ya makabo nini ya kokabola, boniboni kokabola yango, mpe na nani. Landa na bofuli nionso okozwa.

Bimisa na lokasa