2014
Misio ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mokonzi ya Kimia
sánzá ya zómi na míbalé 2014


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Zomi na Mibale 2014.

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mokonzi ya Kimia

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na bino ya bomoi mpe misala ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

“Mobikisi azali liziba ya kimia ya solo,” elobaki Mpaka Quentin L. Cook ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. “Atako mimekano ya bomoi, na ntina ya Bomikabi ya Mobikisi mpe ngolu na Ye, bomoi ya sembo ekozwa mbano ya kimia mpo na moto ye moko.1 Kososolaka ete Yesu Klisto azali Mokonzi na kimia ekoki kosunga biso kozwa kimia ya kati mpe ekobakisa bondimi na biso epai na Ye.

Yesu Klisto alobaki: “Nalobeli bino makambo oyo, ete na ngai nde bokozwa kimia. Na mokili bokozwa mimekamo: kasi bozala na esengo; Nalongi mokoli” (Yoane 16:33). Kotatolaka bosolo wana, Linda S. Reeves, mopesi toli ya mibale na Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki: “Nkolo atonda boboto mpo na ngai mpe asungaki mikumba na ngai ekoma pepele. Asungaki ngai nayoka kimia koleka.”2

Mpaka Richard G. Scott ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ateyaki: “Esika ya solosolo na ntina ya … kimia ezali kati na efelo ya bandako na biso moko, wapi esika tosali nionso tokoki kosala mpo ete Nkolo Yesu Klisto azala na katikati ya nionso.”3

Makomi ya Kobakisa

Yisaya 9:6; Luka 2:14;Yoane 14:27; 1 Nefi 13:37;Doctrine et Alliances 59:23

Uta na Makomi

Yisaya asakolaki na ntina ya mbotama ya Yesu Klisto, Mokonzi ya Kimia (tala na Yisaya 9:6). Na Mikili ya Amerika, Samuele Molamani alobaki mpo na bilembo oyo esengelaki kolanda mibu mitano yambo ya Mbotama ya Yesu Klisto (tala Elamane 14:3, 5). Lokola mikolo ya masakoli epusanaki, bato na tembe batungisaki mpo na koboma Baklisto nionso soki bilembo oyo esalemaki te. Profeta Nefi “agangaki makasi na Nkolo mokolo mobimba wana; mpe tala, mongongo ya Nkolo eyaki epai na ye, kolobaka ete: … Lobi nakoya kati na mokili” (3 Nefi 1:12–13). Bilembo emonanaki, mpe na eyenga ya Mbotama ya Klisto, “bato babandaki lisusu kozwa kimia na mboka” (molongo ya kotanga 23).

Na Beteleme, “Maria abotaki mwana na ye ya liboso, mpe alingaki ye na bilamba, mpe atiaki ye na elielo ya bibwele” (Luka 2:7).

Matangi

  1. Quentin L. Cook, “Personal Peace: The Reward of Righteousness,” Liahona, Sanza ya Mitano 2013, 35.

  2. Linda S. Reeves, “Claim the Blessings of Your Covenants,” Liahona, ya Zomi na moko. 2013, 120.

  3. Richard G. Scott, “For Peace at Home,” Liahona, Sanza ya Mitano 2013, 29.

Bolanda oyo.

Ndenge nini Mobikisi apesi kimia na bomoi na yo?

Bimisa na lokasa