2015
Elonga na Nzela ya Yesu Klisto
sánzá ya mísáto 2015


Bilenge

Elonga na Nzela ya Yesu Klisto

Nazuaki likama mpo na koliaka mingi. Mikolo na ngai ya kozongela kolia na lokoso esukaki na makanisi ebele ya komifunda, ya bobangi, mpe ya nsoni. Nzoto na ngai esilaki makasi ntango namekaki kolonga likama na ngai.

Mpo na ntango molayi, namonaki likambo ya Bomikabi ya Mobikisi mpamba kaka mpo ebikisaki biso te kasi lisusu mpo asikolaki biso mpe asantisaki biso, mpe ete atako etaleli ezalela na ngai ya bobongi nie te ya kolia na lokoso.

Nazuaki mokano ya komipesa epai ya Mobikisi. Nasambelaki. Nandimaki na bosembo nionso bolembu na ngai mpe bonsenga na ngai ya ngolu, mpe sima nasengaki Tata na Lola apambola ngai na lisungi na Ye ya bonzambe na mokolo ekoya. Na butu wana nayokaki elikia ya Tata ya bolingo ete azalaki na mposa ezanga suka ya kosalisa mwana na Ye ya mobali mpe nguya ezanga motuna ya kokokisa bolingi na Ye.

Wuta butu wana, bilei ezalaki lisusu na nguya ya kokonza ngai te. Nayebi Yesu Klisto azali ntina ya elonga na ngai. Kaka lokola Paulo, nazali koyekola ete “Nakoki kosala makambo nionso na nzela ya Klisto oyo alendisi ngai”(Bafilipi 4:13). Mpe nazali komekaka kobosana te liteya mosusu ya Paulo: “Matondi na Nzambe, oyo apesi elonga na nzela ya Nkolo Yesu Klisto” (1 Bakolinti 15:57).

Bimisa na lokasa