2015
Kosala mpo na Basusu oyo Sarah Asaleli Ngai
sánzá ya mínei 2015


Bilenge

Kosala mpo na Basusu oyo Sarah Asaleli Ngai

Mokomi afandaka na Utah, USA.

Ezalaki mpasi mpo na ngai ya kosalela boyambi na ngai lokola eyano na motuna moko ya pete “Mpo na nini bomelaka café te?” Kala Nazalaki koloba boye “Ezalaka bololo” to “nalingaka mpimbo na yango te.”

Mpo na nini nazalaki komitungisa? Mpo na nini nazalaki kobanga kotelema mpo na oyo Nandimaka? Kotalaka nsima sikawa, nazali kososola mpenza te oyo nazalaki kobanga. Kasi namikundoli sikisiki mpenza ntango natikaki kobatama nsima ya mikalo ya mpamba.

Mokolo moko na kelasi ya likolo na mateya ya Angele, molakisi ayebisaki biso ete tokotala emisio moko ya Etando Eke oyo nayebaki nasengelaki kotala te. Ntango bayekoli mosusu basepelaki makasi, moninga na ngai ya kelasi Sarah atombolaki loboko na ye mpe atunaki soki akoki kobima.

Ntango molakisi atunaki mpo na nini, Sarah ayanolaki na bonsomi, “Mpo ete nazali Mormon mpe nalingi te kotala emisio na makambo ya mabe.”

Mpiko na ye ya kotelema liboso ya kelasi ezalaki ya kokamwisa. Matondi na Sarah, ngai natelemaki mpe nazelaki libanda na kasanza ya malamu mpo ete emisio esila.

Nabongwanaki mpo na libela. Nabandaki kolimbola boyambi na ngai na esika ya koboya lisolo. Mpe lokola eyano, nazwaki elikia kati na ngaimei mpe nazwamaki kutu koleka kati na milulu ya Eklezia mpe ya kelasi.

Natikalaki te koloba na Sarah boniboni ndakisa na ye ezalaki ntina mpo na ngai, kasi namekaki kolanda ndakisa na ye ya elikia. Sikawa namoni ete kozalaka mondimi malamu ya Eklezia esantu ya Nzambe, ezali mpenza ntina te ya koyoka soni. Nalikii ete Nakoki, na nzela ya ndakisa na ngai, kosala mpo na basusu oyo Sarah asaleli ngai.

Bimisa na lokasa