2015
Misala ya Yesu Klistu: Ezanga Mabe mpe Lokuta
sánzá ya mínei 2015


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya Minei 2015

Bizalela ya Yesu Klisto: Azanga Mayele Mabe mpe Bilongi Mibale

Na losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na bino ya bomoi mpe misala ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali mpe Bateyi? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na site www.reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Kososolaka ete Yesu Klisto azalaki na mayele mabe mpe bilongi mibale te ekosunga biso na bosolo koluka kolanda ndakisa na Ye. Mpaka Joseph B. Wirthlin (1917–2008) ya lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale alobaki: “Kozala mayele mabe ezali kokosa to komema bato na nzela mabe. … Moto oyo azanga mayele mabe azali moto azangi elindo, azali na makanisi ya sembo, mpe mikano ya peto, oyo bomoi na ye ezali ndakisa ya misala ya pete miye mikokani na misala na [ye] ya mokolo na mokolo na mibeko ya sembo. … Nandimi ntina mpo na bandimi ya Eklezia ya kozala bato bazanga mayele mabe ekoki kozala likambo ya kosalema na lombango sikawa koleka bantango mosusu mpo ete ebele kati ya mokili bamonani lokola basosolaka te ntina ya bolamu oyo.”1

Mpo na oyo etali kozala bilongi mibale, Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mopesi Toli ya Mibale kati ya Bokambi ya Yambo, alobaki: “Moto moko te kati na biso azali lolenge moko na Klisto lokola toyebi tosengeli kozala. Kasi tozali na bokasi bonso na mposa ya kolonga mabunga mpe ezalela na biso ya kosumuka. Na motema na biso mpe molimo tozali na mposa makasi ya kokoma malamu koleka na lisalisi ya Bomikabi ya Yesu Klisto.2

Toyebi “tokosambisama na kotalaka misala na biso, bamposa ya mitema na biso, mpe lolenge ya bato tosili kokoma.”3 Nzokande, lokola tozali kobunda mpo na koyambola, tokokoma peto koleka—mpe “bapambolami ezali baye bazali na mitema peto: mpo ete bakomona Nzambe” (Matai 5:8).

Makomi ya Kobakisa

Banzembo 32:2; Yakobo 3:17; 1 Petelo 2:1–2, 22

Uta na Makomi

Bana mike bazanga mayele mabe. Yesu Klisto alobaki: “Botika bana mike baya epai na ngai, mpe bopekisa bango te: mpo bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bango. … Mpe amemaki [mwana moko] kati ya maboko na ye, atiaki bango maboko, mpe apambolaki bango” (Malako 10:14, 16).

Klisto mpe asalaki kati ya bana na Amerika nsima ya Kobakama na Ye na Ekulusu. Apesaki motindo ete bato bamema bana na bango epai na Ye mpe “afandisaki bango na nse penepene na ye, mpe Yesu atelamaki kati na bango; …

“… [Mpe] alelaki, mpe bato batatolaki na ntina na yango, mpe amemaki bana na bango, moko na moko, mpe apambolaki bango, mpe asambelaki Tata na ntina na bango. …

“Mpe ntango batalaki batombolaki miso na bango mpo na kotala lola, mpe… bamonaki banzelu kokitaka kowuta na lola lokola ezalaki kati ya moto; mpe bakitaki na nse mpe bazingaki bana oyo penepene, … mpe banzelu basalaki misala kati na bango” (3 Nefi 17:12, 21, 24).

Matangi

  1. Joseph B. Wirthlin, “Without Guile,” Ensign, Sanza ya Mitano 1988, 80, 81.

  2. Dieter F. Uchtdorf, “Yaka, Kosangana elongo na Biso,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2013, 23.

  3. Tala Handbook 2: Administering the Church (2010), 1.2.1.

Bolanda Oyo

Nini tokoki koyekola uta na bana mike na ntina ya kozalaka bato bazanga mayele mabe? (Tala Bokambami ya Makomi, “Mayele Mabe.”

Bimisa na lokasa