2015
Mokambi Monson Asengisi Mpiko
sánzá ya mínei 2015


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Minei 2015

Mokambi Monson Asengisi Mpiko

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Ngonga moko elekaka te, emoni Mokambi Thomas S. Monson, ete tozangaka te kosala maponi ya lolenge moko to mosusu.

Mpo na kosala maponi ya mayele, eteyaki ye, tosengeli kozala na mpiko—“mpiko ya koloba te, mpiko ya koloba iyo. Mikano epesaka nzela na maye makolanda.”1

Kati na matangi elandi, Mokambi Monson alakisi Basantu ya Mikolo ya Nsuka ete basengeli kozala na mpiko ya kobunda mpo na bosolo mpe bosembo, ya kolobela oyo bandimelaka, mpe ya kotelemela mokili oyo ezali koboya makambo ya ntina mpe mikano ya seko.

“Libiangi ya kozala na mpiko eyaka solo makasi na moko na moko na biso,” elobaki ye. “Ezalaka se bongo, mpe ekotikala kozala se bongo.”2

Mpiko Ememaka Bondimami ya Nzambe

“Banso tokotelemela bobangi, tokoyokisami soni, mpe tokokutana na mikakatano. Tika ete—biso banso—tozala na mpiko ya kotelemela eye banso bandimaka, mpiko ya kobundela mobeko malamu na biso. Mpiko, bosangani na mabe te, ekopambola biso na bondimami ya Nzambe. Mpiko ekokoma bolamu moko ya nguya mpe ya kobenda basusu ntango etalami kaka lokola bolingi ya kokufa lokola moto asengeli te, kasi mpe lokola mokano ya kotambwisa bomoi ya malonga. Ntango tozali kokende liboso, kobundaka kotambwisa bomoi lokola tosengeli, ya solo tokozwa lisungi ya Nkolo mpe tokoki kozwa libondisi na maloba na Ye.”3

Telema na Mpiko

“Elingi koloba nini kotia molende? Nalingaka ndimbola oyo: kotelema na mpiko. Mpiko ekoki kozala na ntina mpo ete bondima; ekozala na bantango mosusu na ntina ete botosa. Ekosengama solo mpenza ete ntango okotia molende kino mokolo wana ntango bokotika bomoi ya mokili oyo.”4

Zala na Mpiko mpo na Kotelema mpo na Bosolo

“[Tika] ete bozala na mpiko ya kotelema mpo na bosolo mpe boyengebene. Mpo ete makambo mazali kotambola na mokili lelo ezali mosika na bantina mpe mibeko Nkolo apesaki biso, bokozala mbele ntango nionso kobengama mpo na kolobela makambo oyo bondimeli. Longola se soki misisa ya litatoli na bino epikami makasi, ekozala mpasi mpo na bino kotelemela nsoni ya baye bazali kotelemela bondimi na bino. Ntango bondimi epikami makasi, litatoli na bino ya nsango malamu, ya Mobikisi, mpe ya Tata na biso na Lola ekozala na nguya likolo ya nionso oyo bokosala na bomoi na bino mobimba.”5

Tosengeli Mpiko ya Molimo mpe ya Bomoto

“Bansango elakisami na etando ike, na cinema, mpe na nzela mosusu ya bopanzi nsango [lelo] ezali mbala mingi na bokeseni makasi koleka na oyo tolingi ete bana na biso bandima mpe basimba lokola motuya. Ezali mokumba na biso kaka ya koteya bango bazala makasi na molimo mpe na malongi te, kasi mpe lisusu ya kosunga bango batikala bobele lolenge wana, atako nini ezali nguya oyo bakoki kokutana na yango libanda. Eye ekosenga ntango molayi mpe bokasi ebele na ngambo na biso—mpe na ntina ete tosunga basusu, tosengeli biso mei kozala na mpiko ya molimo mpe ya bomoto mpo na kotelemela mabe tomonaka bisika nionso.”6

Tika ete Tozala Ntango Nionso Bato ya Mpiko

“Ntango tozali kotambwisa bomoi mokolo na mokolo, ntembe ezali te ete bondimi na biso ekomekama. Tokoki na bantango mosusu komimona bisomei ya kozingama na basusu kasi ya kotelema na ngambo ya bato moke to kaka biso moko mpo na oyo tondimaka to oyo endimami te. …

“Tika tozala ntango nionso na mpiko mpe tolengelama mpo na kolobela oyo tondimaka, mpe soki tozali kaka biso moko na kosalaka yango, tika tosala bongo na mpiko, ntango tolendisami na boyebi ete na bosolo tozali biso moko te ntango totelemi elongo na Tata na biso na Lola.”7

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “The Three Rs of Choice,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2010, 67, 68.

  2. Thomas S. Monson, “The Call for Courage,” Liahona, Sanza ya Mitano 2004, 55.

  3. Thomas S. Monson, “Be Strong and of a Good Courage,” Liahona, Sanza ya Mitano 2014, 69.

  4. Thomas S. Monson, “Believe, Obey, and Endure,” Liahona, Sanza ya Mitano 2012, 129.

  5. Thomas S. Monson, “May You Have Courage,” Liahona, Sanza ya Mitano 2009, 126.

  6. Thomas S. Monson, “Three Goals to Guide You,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2007, 118–19.

  7. Thomas S. Monson, “Dare to Stand Alone,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2011, 60, 67.

Koteya uta na Etinda Oyo

Osengeli kotuna baoyo ozali koteya bakanisa likambo moko mpo na mposo ekoya—na libota, na mosala, na kelasi, to na eklezia—oyo ekotinda bango kosala na mpiko. Basengeli kotelemela bobangi, kolonga mpasi ya momekano, kotelema mpo na boyambi na bango, to kozwa mokano ya kotosa mobeko moko ya nsango malamu na bozindo mingi. Benga bango bakabola makanisi na bango to bakoma yango na nse.

Bimisa na lokasa