Mapamboli ya Tempelo
Ntango tokendaka na tempelo, kuna nde tokoki koyoka nguya monene ya molimo mpe mayoki ya kimia koya likolo na biso.
Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, boniboni nazali na botondi ya kozala na bino elongo na ntongo kitoko oyo ya Pasika wapi makanisi na biso ezongi na Mobikisi ya mokili. Natindi bolingo na ngai mpe bambote na moko moko na bino mpe nasambeli ete Tata na biso na Lola afula maloba na ngai.
Likita oyo ekokisi mibu sambo uta nabengamaki lokola Mokambi ya Eklezia. Ezalaki mibu ya mosala mingi koleka, miye mitondisami kaka na mwa mikakatano te kasi mpe na mapamboli nakoki kotanga te. Kati na mapamboli maye, ya esengo mpe ya bule koleka ezali libaku napesamaki ya kobulisa mpe kobulisa lisusu batempelo.
Kala penza mingi te, na sanza ya zomi na moko oyo eleki napesamaki litomba ya kobulisa Tempelo kitoko ya sika ya Phoenix Arizona. Bayaki kokuta ngai na Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mpaka Dallin H. Oaks, Mpaka Richard J. Maynes, Mpaka Lynn G. Robbins mpe Mpaka Kent F. Richards. Na mpokwa wana yambo na kobulisa, molulu moko ya kitoko ya bonkoko esalemaki wapi bilenge na biso koleka 4,000 uta na disitiliki ya tempelo basalaki masano ya malamu mingi. Mokolo elandi tempelo ebulisamaki na mayangani misato ya bule mpe efulama.
Botongi ya batempelo ezali lolenge ya kolakisaka polele mpenza bokoli ya Eklezia. Tozali sikawa na batempelo 144 oyo ezali kosala na mokili mobimba, mpe 5 kozongisamaka sika mpe 13 mosusu oyo bazali se kotonga. Mpo na kobakisa, batempelo 13 oyo basakolaki botongi ekomi na biteni ya bolengelami ya ndenge na ndenge yambo babanda kotonga. Na mobu oyo tomoni na mosika kozonga kobulisa batempelo 2 mpe kobulisa 5 ya sika oyo ezali na manaka ya kosilisama.
Mpo na mibu mibale mileki, lokola tosangisaki bokasi na biso na kosilisaka batempelo oyo bayebisaki liboso, tozongisaki sima miango ya batempelo mosusu ya kobakisa. Nzokande na ntongo ya lelo, nazali na esengo ya koyebisa botongi ya batempelo ya sika misato oyo ekotongama na bisika bilandi: Abidjan, Cote d’Ivoire; Port-au-Prince, Haiti; mpe Bangkok, Thailand. Oyo mapamboli nini kitoko ebombama mpo na bandimi na biso ya botosi kati na bisika wana mpe, na bosolo, bisika nyonso batempelo ezali nzinganzinga na mokili.
Mosala ya kososola bamposa mpe kozwa bisika mpo na kobakisa batempelo ezali se kokoba, mpo ete tozali na mposa ete bandimi mingi lokola bakoki kozala bazwa libaku ya kokota na tempelo na kozangaka kobonzela ya bango ntango mpe misolo. Lokola tosalaki yango kala, tokotikala se koyebisa bino ntango tokozwa mikano miye na likambo yango.
Ntango nakanisi batempelo, makanisi na ngai ebalukaka na mapamboli mingi tozwaka na kati. Ntango tozali kokota na bikuke ya tempelo, totikaka sima na biso nionso oyo ebungisaka makanisi mpe mobulungani ya mokili. Kati na ndakonzambe oyo ya bosantu, tomonaka bonzenga mpe molongo. Ezali na kimia mpo na milimo na biso mpe bopemi uta na mitungisi ya bomoi na biso.
Ntango tokendaka na tempelo, kuna nde tokoki koyoka nguya monene ya molimo mpe mayoki ya kimia koya likolo na biso. Tokososola ndimbola ya solo ya maloba ya Mobikisi ntango Alobaki: “Natikeli bino kimia, kimia na ngai napesi bino. … Tika ete motema na bino elenga te, mpe ebanga te.”1
Kimia ya lolenge oyo ekoki kokota na motema nionso—mitema oyo mitungisami, mitema oyo milembisami na mokumba ya mpasi, mitema oyo ezali kati na mobulu, mitema oyo ezali koluka lisungi.
Kala mingi te, natangaki mpo na mbala ya yambo lisolo ya elenge mobali moko oyo akendaki na tempelo na motema ya bosenga mpo na kozwa lisungi. Basanza mingi na ebandeli azwaki libiangi na ye ya kosala misio na Amerika ya Sudi. Nzokande viza na ye elekaki ntango mpo na molai ya ntango oyo babongolaki kotinda ye na misio mosusu na Etazini. Atako ayokisamaki motema mpasi ya kosala misio te na esika oyo ya libiangi na ye ya ebandeli, atabongo asalaki mosala makasi na libiangi na ye ya sika, kokanaka mpenza kosala malamu koleka lokola akokaki. Kasi, Alembisamaki mpo makambo ya mabe oyo akutanaki na yango na bamisionele oyo bamonanaki epai na ye komipesa makasi koleka na kolekisaka ntango malamu na esika ya kokabolaka nsango malamu.
Mwa basanza moke nsima elenge mobali oyo atungisamaki mingi na mikakatano ya nzoto oyo etikelaki ye paralizi ya ndambu moko, mpe azongisamaki na ndako mpo na kosalisama.
Mwa ndambu ya basanza nsima elenge mobali abikisamaki mobimba, mpe paralizi na ye esilaki. Bayebisaki ye ete asengelaki lisusu kosala lokola misionele, lipamboli mpo na oyo azalaki kobondela mokolo na mokolo. Nsango bobele moko oyo eyokisaki motema mpasi ezalaki ete akozonga na miso se moko oyo atikaki, esika wapi ayokaki bizaleli mpe bizalela ya bamisionele ezalaki te lolenge basengelaki kozala.
Ayaki na tempelo mpo na koluka bolendisi mpe bondimisi ete akokaki kozwa boyebi malamu ya mosala kosalaka lokola misionele. Baboti na ye mpe basambelaki ete kokende oyo na tempelo ekopesa lisungi oyo mwana na bango ya mobali azalaki na yango mposa.
Ntango elenge mobali akotaki na ndako ya selestiale kolandaka liyangani, afandaki na kiti mpe abandaki kosambela ete akambama na Tata na ye na Lola.
Mosusu oyo akotaki na ndako ya selestiale mwa ndambo moke sima ezalaki elenge mobali oyo nkombo na ye ezali Landon. Ntango akotaki kolekaka na eteni ya ndako, miso na ye ebwakamaki mbala moko na elenge mobali afandi na kiti, miso ekangama mpe kosambelaka mpenza. Landon azwaki etinda ya kokosama te ete asengelaki koloba na elenge mobali yango. Komitunaka soki akokata losambo na ye te, azwaki nzokande mokano ya kozela. Nsima ya miniti mingi koleka, elenge mobali yango azalaki se kosambela. Landon ayebaki ete akokaki lisusu te kozelisa etinda azwaki. Apusanaki pene ya elenge mobali mpe na boboto bonso asimbaki lipeka na ye. Elenge mobali afungolaki miso na ye, kokamwaka ete babungisi ye makanisi. Landon alobaki na malembe ete, “nayokisami mpenza mposa ya kosolola na yo, atako nayebi mpenza te mpo na nini.”
Ntango babandaki kosolola, elenge mobali abimisaki motema na ye nionso epai ya Landon, kolimbolaka makambo na ye mpe kosukisaka na mposa na ye ya kozwa bolendisi mpe bokasi mpo na oyo etali misio na ye. Landon, oyo azongaki na misio oyo elakaki malamu mobu moko kaka eleki, abetelaki ye lisolo ya mosala misio na ye moko, mikakatano mpe makambo akutanaki na yango, lolenge oyo ye azongaki epai ya Nkolo mpo na lisungi, mpe mapamboli azwaki. Maloba na Ye elendisaki mpe ezongisaki elikia, mpe esengo na ye mpo na misio na ye ezwaki elenge mobali. Suka suka, lokola bobangi ya elenge mobali ekimaki, mayoki ya kimia eyelaki ye. Ayokaki mposa ya bozongisi matondi mpenza mpo amonaki ete losambo na ye ezwaki eyano.
Bilenge mibali mibale basambelaki elongo, mpe sima Landon amilengelaki mpo na kokende, koyokaka esengo ete ayokelaki bofuli oyo eyelaki ye. Etelemaki ye mpo na kokende, elenge mobali atunaki Landon ete, “Osalaki misio na yo wapi?” Kino sikawa, moko te kati na bango atangelaki mosusu nkombo ya misio wapi asalelaki. Ntango Landon ayanolaki na nkombo ya misio na ye, mpinzoli ekitaki na miso ya elenge mobali yango. Landon asalelaki na misio se moko oyo elenge mobali azongaki mpenza!
Na mokanda oyo atindelaki ngai kala mingi te, Landon akabolaki na ngai maloba ya bokabwani ya elenge mobali na ye: “Nazalaki na bondimi ete Tata na Lola akopambola ngai, kasi nakokaki te kobanza ete Ye akokaki kotinda moto moko mpo na kosunga ngai oyo asalaki misio na misio na ngai moko. Nayebi sikawa ete nionso ekozala malamu.”2 Losambo ya bomikitisi ya motema ya sembo eyokamelaki mpe ezwi eyano.
Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, na babomoi na biso tokokutana na masenginya; tokokutana na mimekano mpe mikakatano. Ntango tozali kokende na tempelo, ntango tokanisi mayokani tosali kuna, tokokoka malamu kolonga masenginya wana mpe kokanga motema na mimekano na biso. Na tempelo tokoki kozwa kimia.
Mapamboli ya tempelo ezali motuya koleka. Moko ya maye natonda na botondi mokolo nionso ya bomoi na ngai ezali oyo molingami mwasi na ngai, Frances, mpe ngai tozwaki ntango tobukaki mabongolo na lotale mpe tosalaki mayokani kokangisaka biso mpo na boseko. Ezali na lipamboli oyo ezali motuya koleka te soki kimia mpe bolendisi nazwaka uta na boyebi oyo nazali na yango ete ye mpe ngai tokozala lisusu esika moko.
Tika ete Tata na Lola apambola biso ete tokoka kozwa molimo ya kokumbamela na tempelo, ete tokoka kozala na botosi ya mitindo na Ye, mpe ete tokoka kolanda na bokebi matambe ya Nkolo na biso mpe Mobikisi, Yesu Klisto. Natatoli ete Azali Mosikoli na biso. Azali mwana ya Nzambe. Azali oyo abimaki uta na lilita na ntongo ya yambo ya Pasika wana, komemaka elongo na Ye likabo ya bomoi ya seko mpo na bana banso ya Nzambe. Na mokolo kitoko oyo, ntango tozali kosepela mpo na likambo monene wana, tika ete topesa nsambo ya botondi mpo na makabo minene mpe ya kitoko na Ye epai na biso. Tika ete ezala bongo, nasambeli na nkombo na Ye esantu, amene.
© 2015 na Intellectual Reserve, Inc. Lotomo nionso na bakomi. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/14. Bobongoli endimami: 6/14. Bobongoli na First Presidency Message, May 2015. Lingala. 12585 639