2015
Likabo ya Ngolu
sánzá ya mítáno 2015


Likabo ya Ngolu

Lelo mpe libela na libela ngolu ya Nzambe ezali komonana na banso baoyo mitema mibukana mpe milimo ya komikitisa.

Na eyenga ya Pasika tosepelaka likambo oyo bazelaka mingi mpe ya nkembo koleka na lisolo ya mokili mobimba.

Ezali mokolo oyo ebongolaki nionso.

Na mokolo wana bomoi na ngai ebongolamaki.

Bomoi na yo ebongolomaki.

Makambo ya suka ya bana nyonso ya Nzambe ebongolomaki.

Na mokolo epambolama wana, Mobikisi ya bato banso, oyo akamataki likolo na Yemei minyololo ya masumu mpe ya liwa oyo ekangaki biso na bowumbu, ebukaki minyololo wana mpe ekomisaki biso nsomi.

Mpo na mbeka ya Mosikoli na biso ya bolingo, liwa ezali na esweli te, lilita ezali na elonga te,1 Satana azali na nguya ya ntango mingi te, mpe tozali “babotami… lisusu na elikia ya bomoi na bosekwi ya Yesu Klisto.”2

Solo mpenza, Apostolo Paulo azalaki alima ntango alobaki ete tokoki “kolendisana na maloba maye.”3

Ngolu ya Nzambe

Mbala mingi tolobelaka Bomikabi ya Mobikisi—mpe ezali malamu tosala yango!

Na maloba ya Yakobo, “Mpo na nini kolobela bomikabi ya Klisto, mpe kokoma na boyebi na ye ya kobonga nie te?”4 Kasi lokola “tolobelaka Klisto, … tosepelaka na Klisto, … toteyaka na tina ya Klisto, [mpe] tosakolaka na ntina ya Klisto”5 na libaku nionso, tosengeli ata moke te kobungisa mayoki na biso ya komemia mpe botondi ya mozindo mpo na mbeka ya seko ya Mwana ya Nzambe.

Bomikabi ya Mobikisi ekoki konzuluka te na mateya na biso, na masolo na biso, to na mitema na biso. Ezali ya bule mpe ya santu, mpo ezali na nzela ya “mbeka monene mpe ya nsuka” oyo nde Yesu, oyo Klisto amemaki “lobiko na banso oyo bakondima na nkombo na ye.”6

Nazali kosepela ete Mwana ya Nzambe amikitisaki mpo na kobikisa biso, lokola baoyo bazanga makoki, bato ya mbindo, bato ya mabunga, bato bazanga botondi lokola mbala mingi tozalaka. Namekaki kososola Bomikabi ya Mobikisi na mayele na ngai ya moke, mpe ndimbola se moko nakoki kopesa ezali ete Nzambe alingi biso na mozindo, na lolenge ya bobongi nie, mpe seko na seko. Nakoki kutu kobanda kokanisa te “monene, mpe molai, mpe mozindo, mpe likolo … [ya] bolingo ya Klisto.”7

Ndakisa ya nguya ya bolingo wana ezali oyo makomi ebengaka mbala mingi ngolu ya Nzambe—lisungi mpe kolatisama na bokasi ya bonzambe ya makasi na nzela ya oyo tozali kokola uta na bato mabe mpe bato basuka oyo tozali sikawa mpo na kokoma bato banetwama ya “bosolo mpe pole, kino [tokomi] bato ya nkembo kati na bosolo mpe [toyebi] makambo nyonso.”8

Ezali eloko moko kitoko makasi, ngolu oyo ya Nzambe. Nzokande mbala mingi bato basosola yango te.9 Atako bongo, tosengeli koyeba mpo na oyo etali ngolu ya Nzambe soki tokani kosangola libula oyo elengelamaki mpo na biso na bokonzi na Ye ya seko.

Mpo na ntina wana nakolinga kolobela ngolu. Mingi mingi, yambo, lolenge nini ngolu efungolaka bikuke ya lola,  mpe, ya mibale, lolenge nini efungolaka maninisa ya lola.

Yambo: Ngolu Efungolaka Bikuke ya Lola

Mpo ete biso nionso “tosumuki mpe tozangi nkembo ya Nzambe,”10 mpe mpo ete “kuna eloko moko te ya mbindo ekoki kokota na bokonzi ya Nzambe,”11 Moto nionso kati na biso alongobani te mpo na kozonga na miso ya Nzambe.

Atako soki tozalaki kosalela Nzambe na milimo na biso mibimba, ekoki te, mpo ete tokozala kaka “basali bazanga litomba.”12 Tokoki te kozwa nzela na biso ya kokota na lola; masengisi ya boyengebene etelemi lokola ndelo, oyo tozali na nguya te ya kolonga bisomoko.

Kasi banso babungi te.

Ngolu ya Nzambe ezali elikia na biso monene mpe ya seko.

Na nzela ya libonza ya Yesu Klisto, mwango ya mawa elembisaka masengisi ya boyengebene,13 “mpe [ememaka] banzela epai ya bato ete bakoka kozala na bondimi mpo na boyamboli.”14

Masumu na biso, atako ezali motane lokola ngola, ekoki kokoma mpembe lokola mvula ya mpembe.Mpo ete Mobikisi na biso ya bolingo “amipesaki lokola lisiko mpo na banso,”16 ekoteli na bokonzi na Ye ya seko epesameli biso.17

Ekuke efungwami!

Kasi ngolu ya Nzambe ezali bobele kozongisa biso na ezaleli na biso ya liboso ya bozangi elindo te. Soki lobiko elingi bobele koloba kolongola mabungi mpe masumu na biso, sima lobiko—na kitoko na yango ekokisi bantina ya minene ya Tata mpo na biso te. Ntina na Ye ezali likolo koleka: Alingi bana na Ye ya mibali mpe ya basi bakoma lokola Ye.

Na likabo ya ngolu ya Nzambe, nzela ya boyekoli ezongisaka nsima te, ememaka likolo.

Ekambaka epai ya bolai oyo tokoki mpenza kososola te! Ekambaka na bonetwami na bokonzi ya celesitiale ya Tata na biso na Lola, esika wapi biso, ya kozingama na bamoko na biso ya bolingo, tozwi “litondi na ye, mpe nkembo na ye.”18 Biloko nionso ezali ya biso, mpe tozali ya Klisto19 Yango wana, nionso oyo Tata azali na yango ekopesamela biso.20

Mpo na kosangola nkembo oyo, tozali na mposa ya mingi koleka ekuke oyo bafungola; tosengeli kokota na nzela ya ekuke oyo na mposa moko ya motema ya kobongwama—mbongwana moko ya kokamwa oyo makomi elimboli yango lokola kozakaka “kobotama lisusu; iyo, kobotama na Nzambe, kobongola bozali na biso [ya mosuni] mpe ya bokwei, na bozali ya bosembo, kozala basikolami ya Nzambe, kokomaka bana mibali na ye mpe bana basi na ye.”21

Ya mibale: Ngolu efungolaka Maninisa ya Lola

Eloko mosusu ya ngolu ya Nzambe ezali bofungoli ya bafenetele ya lola, na nzela na oyo Nzambe asopaka mapamboli ya nguya mpe bokasi, kopesaka biso makoki ya kokokisa makambo oyo na lolenge mosusu ekokoki kozala mosika mpenza mpo na kozwa. Ezali na nzela ya ngolu ya kokamwa ya Nzambe oyo bana na Ye bakoki kolonga nguya ya nse ya mai mpe ya zelo oyo emelaka bato ya moyini, kotelema likolo ya lisumu, mpe “bazalisa[ma] malamu na Kliso.”22

Atako banso tozali na botawu, tokoki kolonga yango. Yango wana ezali na ngolu ya Nzambe ete, soki tomikitisi mpe tozali na bondimi, biloko ya botau ekoki kokoma makasi.23

Na bomoi na biso mobimba, ngolu ya Nzambe epesaka mapamboli ya tango mpe makabo ya molimo oyo ekumisaka makoki na biso mpe efulukisaka babomoi na biso. Ngolu na Ye epetolaka biso. Ngolu na Ye esungaka biso tokoma biso moko na makoki koleka.

Nani Akoki Kolonga?

Na Biblia totangi ete Klisto akendaki kotala Simona Mofalisai na ndako na ye.

Na kotala na miso, emonanaki lokola ete Simona azalaki moto malamu mpe ya bosembo. Azalaki ntango nionso kotia elembo na molongo ya makambo ya kosala kati na mikumba ya eyamba: azalaki kotosa mobeko, kofuta moko na zomi na ye, kotosa Saba, kosambela mokolo na mokolo, mpe azalaki kokende na sinagoga.

Kasi ntango Yesu azalaki elongo na Simona, mwana mwasi moko apusanaki penepene, asokolaki makolo ya Mobikisi na mpinzoli na ye, mpe apakolaki mafuta kitoko na makolo na Ye.

Simona asepelaki te na etalisi oyo ya kokumbamela, mpo ayebaki ete mwasi wana azalaki mosumuki. Simona akanisaki ete soki Yesu ayebaki yango te, Asengelaki kozala profeta te to Alingaki kotika mwasi yango asimba ye te.

Koyebaka makanisi na Ye, Yesu abalukaki epai ya Simona mpe atunaki motuna moko. “Ezalaki na modefisi moko oyo azalaki na bato ya niongo mibale: … moko adefaki makuta nkama mitano, … mpe mosusu ntuku mitano.

“Mpe ntango bango [mibale] bazalaki na eloko ya kofuta te, boye alimbisaki bango nionso. Yebisa ngai sikawa, nani kati na bango akolinga ye koleka?”

Simona ayanolaki ete ezalaki moko oyo alimbisamaki koleka.

Sima Yesu ateyaki liteya moko ya mozindo: “Omoni mwasi oyo? … Masumu na Ye, oyo ezali ebele, elimbisami; mpo alingaki mingi: kasi ye oyo alimbisami moke azali na bolingo moke.”24

Nani kati na bato mibale oyo tosengeli makasi kozala lokola?

Tozali lokola Simona? Tozali na elikia mpe molende na makambo na biso ya malamu, kondimaka na bosembo na biso? Tozali ntango mosusu mwa motema motomoto na baoyo bazali kotosa mibeko na biso te? Tozali bakumbi pepo ya automatiki, kolandaka mopepe, kokendaka na mayangani na biso, kofungolaka minoko ya kolemba na kelasi ya Malongi ya Nsango malamu, mpe kotalaka batelefoni ya maboko na biso na liyangani ya elambo?

To tozali lokola mwasi oyo, oyo akanisaki ete abungaki mobimba mpe na kozangaka elikia mpo na masumu?

Tozali na bolingo mingi?

Tososolaka niongo na biso epai ya Tata na Lola mpe kobondela na milimo na biso mobimba mpo na ngolu ya Nzambe?

Ntango tofukamaka mpo na kosambela, ezali mpo na kotala lisusu makambo minene koleka nionso ya bosembo na bisomei, to ezali mpo na kotubela mbeba na biso kobondela mawa ya Nzambe, mpe kosopa mpinzoli ya matondi mpo na mwango ya kokamwa ya bosikoli?25

Lobiko ekoki kosombama na mosolo ya botosi te; esombami na makila ya Mwana ya Nzambe.26 Kokanisaka ete tokoki koteka misala na biso ya malamu mpo na lobiko ezali lokola kosombaka tike ya mpepo mpe sima kokanisa ete tozali na mpepo. To kokanisaka ete nsima ya kofuta mosolo ya kofutela mpo na ndako na biso, tozali sikawa na mikanda ya kozwa mabele mobimba.

Mpo na nini Kotosa Kasi?

Soki ngolu ezali likabo ya Nzambe, kasi mpo na nini botosi mitindo ya Nzambe ezali ntina mpenza? Mpo na nini komitungisa na mibeko ya Nzambe—to boyamboli, mpo na makambo wana? Mpo na nini tondima kaka te ete tozali basumuki mpe totika Nzambe abikisa biso?

To, mpo na kotuna na kolandaka maloba ya Paulo, “Tokoba kaka na masumu, ete ngolu wana ekoka kotonda?” Eyano ya Paulo ezalaki pete mpe polele: “Nzambe apekisi.”27

Bandeko mibali mpe basi, totosaka mitindo ya nzambe—libanda ya bolingo mpo na Ye!

Komekaka kososola likabo ya ngolu ya Nzambe na motema mpe molimo na biso epesaka biso bantina mingi koleka mpo na kolinga mpe kotosa Tata na biso ya Lola na bosembo mpe matondi. Ntango tozali kotambola na nzela ya boyekoli, ezali kobongisa biso, ezali kobutisa biso, esalisaka biso kokoma mingi lokola Ye, mpe ekambaka biso kozonga na miso na Ye. “Molimo ya Nkolo [Nzambe na biso]” ememaka “mbongwana makasi na biso, … ete tozali lisusu na makoki mpo na kosala mabe te, kasi mpo na kosala bolamu ntango nionso.”28

Yango wana, botosi na biso ya mitindo ya Nzambe eyaka lokola mbano ya momesano ya bolingo mpe matondi ezanga nsuka mpo na bolamu ya Nzambe. Lolenge ya bolingo mpe matondi ya solosolo ekotondisa na kokamwa misala na biso na ngolu ya Nzambe. Bolamu ekokoba kotondisa makanisi na biso, mpe bondimi na biso ekokola makasi na miso ya Nzambe.29

Bandeko mibali mpe basi, kosalela nsango malamu na bondimi ezali mokumba te. Ezali mosala moko ya esengo—bolengeli mpo na kokitola nkembo monene ya baboseko. Tolukaka kotosa Tata na biso ya Lola mpo milimo na biso ekokoma mingi ya boyambi makambo ya molimo. Tokoyeba makambo oyo toyebaki te ete ezalaki. Bongengi mpe bososoli eyei na biso ntango tozali kosala bolingi ya Tata.30

Ngolu ezali likabo ya Nzambe, mpe mposa na biso ya kozala na botosi epai ya mitindo ya Nzambe ezali bosembolami ya loboko na biso ya bokufi mpo na kozwa likabo ya bule uta Tata na Lola.

Banso Tokoki Kosala

Profeta Nefi abakisaki eloko moko ya motuya na bososoli na biso ya nguya ya Nzambe ntango asakolaki ete: “Tosali na etingia … mpo na kondimisa bana na biso, mpe lisusu bandeko na biso, kondima Klisto, mpe kozongisa boyokani na Nzambe; mpo toyebi ete ezali na ngolu ete tobikisami, sima ya nionso oyo tokoki kosala.31

Nzokande, namituni soki ntango mosusu tobongolaka mabe liloba “nsima ya nyonso oyo tokiki kosala.” Tosengeli kososola ete “nsima” ekokana te na “mpo ete.”

Tobikisami te “mpo” na manso tokoki kosala. Ezali na moto oyo asalinionso oyo tokoki kosala? Nzambe azelaka tii tosala makasi nionso liboso Akokota na babomoi na biso na ngolu na Ye ya kobikisa?

Bato mingi balembisamaka mpo ntango nionso bakokaka te. Bayebi bangomei ete “molimo yangomei ezali na mposa, kasi nzoto ezali na bolembu.”32 Batombolaki mingongo na bango elongo na Nefi na kosakolaka ete, “Molimo na ngai eyoki mawa mpenza na ntina ya mabe na ngai.”33

Nandimi ete Nefi ayebaki ngolu ya Mobikisi epesaka mpe ekokisakabiso mpo na kolonga lisumu.34 Oyo ezali mpo na nini Nefi asalaki na nabokebi mpenza mpo na kondimisa bana mpe bandeko na ye ya mibali “bandimela Klisto, mpe bazongisa boyokani na Nzambe.”35

Nsima na nionso, wana ezali maye tokoki kosala! Mpe wana ezali mosala na biso kati na bokufi!

Ngolu Epesameli Mpo ya Banso

Ntango nakanisaka maye Mobikisi asalaki mpo na biso kokendaka liboso ya Eyenga ya Pasika ya yambo wana, nalingi kotombola mongongo na ngai mpe koganga masanzoli epai ya Nzambe Oyo-Aleki Likolo mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto!

Bikuke ya lola efungwami!

Bafenetele ya lola efungwami!

Lelo mpe libela ngolu ya Nzambe epesameli mpo na banso baoyo mitema na bango ezali ya kobukana mpe milimo na bango ezala ya mawa.36 Yesu Klisto apetolaki nzela mpo na komata na bozindo ya molai ezanga bososoli mpo na milimo ya bokufi.37

Nasambeli ete tokomona na miso ya sika mpe motema ya sika ndimbola ya seko ya ntina ya libonza ya bomikabi ya Mobikisi. Nasambeli ete tokolakisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe matondi na biso mpo na likabo ya ngolu ya Nzambe ezanga nsuka na kobatelaka mitindo na Ye mpe na esengo “kotambola[ka] na bomoi [moko] ya sika,”38 Na nkombo ya bule ya Molakisi mpe Mosikoli na biso, Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa