2015
Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto—Moto ya Boboto mpe ya Bomikitisi
sánzá ya mwambe 2015


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya mwambe 2015

Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Moto ya Boboto mpe ya Bomikitisi

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na bino ya bomoi mpe misala ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino epai na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali mpe Bateyi? Mpo na kozwa nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Yesu alobaki ete, “Ye oyo aleki monene kati na bino, esengeli azala lokola leki; mpe ye oyo ayengelaka, esengeli azala lokola mosali. Mpamba te nani aleki monene, ye oyo avandi to ye azali kosalela? ezali ye oyo avandi likolo ya mesa te? kasi nazali kati na bino lokola mosali” (Luka 22:26–27).

“Mobikisi azali ndakisa na biso ya koleka banso na nguya ya bomikitisi mpe ya botosi. Nsima ya manso, kotosisa bolingi na Ye nionso epai ya Tata ememaki likambo ya monene koleka, mpe kutu ya nguya koleka makambo manso ya mambi ya mokili. Mbele kati na maloba ya makomi, ya bule koleka manso ezali kaka, ‘Bolingi na ngai te, kasi oyo ya yo, esalema’ (Luka 22:42).”1

Lokola bayekoli ya Yesu Klisto, tokoluka ntango nionso kozala lokola Ye. “Boboto ezali na motuya monene mpo ete tokoma mingi lokola Klisto,” elobaki Mpaka Ulisses Soares ya Bantuku Sambo. Soki ezangi tokokoka te kokolisa bizalela ya bolamu mosusu ya motuya. Kozala moto ya boboto elingi kolaba botau te, kasi elingi koloba kozala na bolamu mpe malonga, kolakisaka bokasi, kimia, komilinga ya malamu, mpe komikonza.”2 Lokola tozali kosala mpo na kokolisa ezalela oyo, tokomona ete “kotosisa bolingi na biso epai ya Tata ememelaka biso nguya ya Nzambe—nguya ya bomikitisi. Ezali nguya ya kotelemela mikakatano ya bomoi, nguya ya kimia, nguya ya elikia, nguya ya motema kobetaka na esengo ya bolingo mpo na litatoli ya Mobikisi Yesu Klisto, kutu nguya ya bosikoli.”3

Makomi ya Kobakisa

Matai 26:39; Yoane 5:30; Moziya 3:19; Elamani 3:35

Uta na Makomi

Moko ya bantango ya elengi mpe ya nguya koleka ya mosala ya Klisto ezalaki ntango Asukolaki makolo ya bayekoli na Ye. “Alongwaki na mesa ya kolia, alongolaki elamba ya likolo; bongo akamataki elamba bapanguselaka mayi mpe akangaki yango na loketo na ye. Na sima atiaki mayi na sani, mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli, mpe kopangusa yango na elamba ya kopangusela oyo alataki na loketo” (Yoane 13:4–5).

Lokola Mobikisi abandaki bokuli oyo, bayekoli bakokaki kotutisama ete Nkolo mpe Molakisi na bango afukama liboso na bango mpe asala mosala ya boboto. Bongo Yesu alimbolaki mateya Alingaki bango mpe biso koyekola:

“Soki boye ngai, oyo nazalaki Nkolo mpe Molakisi na bino, nasukoli makolo na bino; bino mpe bosengeli kosukola makolo ya basusu.

“Pamba te napesi bino ndakisa, ete bosengeli kosala lokola nasali bino” (Yoane 13:14–15).

Matangi

  1. Richard C. Edgley, “The Empowerment of Humility,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2003, 99.

  2. Ulisses Soares, “Be Meek and Lowly of Heart,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 9.

  3. Richard C. Edgley, “The Empowerment of Humility,” 99.

Botala Oyo.

Lolenge nini kozala na bomikitisi ekoki kosalisa biso lokola Mobikisi asalaki?

Bimisa na lokasa