2015
Bozala lokola Mwinda
sánzá ya mwambe 2015


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya mwambe 2015

Bozala lokola Mwinda

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Nazali na litomba ya kozalaka na biyenga mingi ya bonkoko oyo esalemi na ntango mpe mpo na kobulisa batempelo. Nalingaki biyenga yango nionso, kotangaka mpe ya sikasika oyo nakendaki na Phoenix, Arizona, na Etazini, na sanza ya zomi na moko oyo eleki.

Bilenge basantu ya Mikolo ya Nsuka oyo bazalaki na biyenga wana ya bonkoko batiaki na manaka na bango masano ya kokamwa mpe ya kobosana te. Mobu eleki na Phoenix, kaka liboso ya kobanda biyenga, nayebisaki bato bazalaki kuna ete, “Bozali bana ya Pole.”

Nalingi bilenge na bino banso baye ya Eklezia bayeba ete bazali bana ya pole. Lokola bilenge, bazali na mokumba ya kongenga “lokola pole kati na mokili” (Filipo 2:15). Bazali na mosala ya kokabola babosolo ya nsango malamu. Bazali na libiangi ya kozala ntina ya tempelo, kongengisaka pole ya nsango malamu na mokili oyo ezali se kokoma molili. Bazali na mokumba ya kobatela mwinda na bango kopela mpe kongenga makasi.

Mpo ete tokoka kozala “ndakisa mpo na bandimi” (1 Timote 4:12), tosengeli biso moko kondima. Tosengeli kokolisa bondimi oyo esengeli mpo ete tozala bato oyo babikisami na molimo mpe ete tokoka kopelisa mwinda mpo na basusu. Tosengeli koleisa litatoli na biso kino ekokoma longo mpo na bomoi na biso.

Kati na banzela ya makasi koleka topesameli mpo na kozwa mpe kobatela bondimi tozali na yango mposa lelo oyo, ezali kotanga mpe koyekola makomi mpe kosambela mbala na mbala mpe ntango nionso. Epai ya bilenge ya Eklezia, nalobi, soki bosali bongo te, bokolisa sikawa momeseno ya koyekola makomi mokolo na mokolo mpe ya kosambela. Soki mimeseno mibale oyo ya ntina ezangi, banguya ya libanda mpe ntango mosusu mipepe makasi ya bomoi ekoki koningisa mpe koboma mwinda na bino.

Mibu ya bonzenga mpe boseka ezalaka pete te. Ezali mibu ya ebandeli wapi ntango Satana akomeka bino mpe akosalela masenginya ya mabe koleka mpo na komema bino libanda ya nzela oyo ekozongisa bino na ndako na bino ya lola. Kasi ntango bokotanga mpe bokosambela mpe ntango bokosala mpe bokotosa, bokoya” koyeba koyeba malamu koleka “pole oyo ezali kongenga kati na molili” (D&A 6:21), ndakisa mpe bokasi na biso —kutu ye Nkolo Yesu Klisto. Ye nde azali Pole oyo tosimbi mpo na kobengana bosangani ya molili (tala 3 Nefi 18:24).

Na litatoli ya makasi ya Mobikisi mpe nsango malamu na Ye oyo ezongisami, bozali na mabaku ezanga nsuka ya kongenga. Mabaku yango mazingizingi bino mokolo na mokolo, na ntango mpe bisika nionso ezwami bino. Soki bolandi ndakisa ya Mobikisi, oyo ya bino libaku ekozala ya kozala pole, lokola ezalaki kati na bomoi ya baye bazali nzinganzinga na bino—bazala bato ya libota na bino moko, baninga ya kelasi na bino, binga bosalaka elongo na bango, bato boyebani mingi te, to bapaya penza.

Ntango ozali pole mpo na mokili, bato nzinganzinga na yo bakoyoka molimo moko ya malonga oyo ekosala ete balinga kokangama na yo mpe kolanda ndakisa na yo.

Nabondeli baboti mpe bakambi ya bilenge na biso kosalisa bango kotelema ngwi mpo na bosolo mpe bosembo. Salisa na kofungolela bango ete bamona bikuke minene ya boyekoli, ya bososoli, mpe ya mosala kati na bokonzi ya Nzambe. Tonga kati na bango bokasi ya kotelemela masenginya ya mokili. Pesa bango bolingi ya kotambola kati na bopeto mpe bondimi, ya kozala bato ya losambo, mpe ya kotala na lola lokola longo na bango ya ntango nionso.

Na bilenge na biso, nalobi, Tata na biso na Lola alingaka bino. Tika ete boyoka bolingo oyo bakambi ya Eklezia bazali na yango mpo na bino. Tika ete bozala ntango nionso na mposa ya kosalela Tata na bino na Lola mpe Mwana na Ye. Mpe tika ete botambola kati na bosolo mpe bozala lokola pole kati na bana ya Nzambe.

Koteya uta na Etinda Oyo

Tala lolenge nini okosolola na baoyo oteyaka nini yango elingi koloba kozala“[mwana] ya pole.” Mokumba nini boyebi wana ezali kotia likolo na biso? Okoki kosolola na bango kotala ntango nini pole na bango engengaki makasi mpenza mpe nini engengisaki yango. Tala mpe kotuna bango bakanisa moto moko, ndakisa elenge moko, moninga ya mosala, to moto moko ya libota na bango, oyo akoki kozala na mposa ya pole. Bongo bokoki kosambela elongo mpo na ntina ya kokabola pole na moto wana.

Bimisa na lokasa