2015
Bozala Ndakisa mpe Pole
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2015


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Moko 2015

Bozala Ndakisa mpe Pole

Ntango tolandi ndakisa ya Mobikisi, tokozwa libaku ya kozala pole na bomoi ya basusu.

Bandeko Balingami Mibali mpe Basi, ezali malamu ya kozala elongo na bino mbala moko lisusu. Lokola boyebi, uta tozalaki elongo na Sanza ya minei, toyokaki mawa na kobungisa misato ya bapostolo na biso ya bolingo: Mokambi Boyd K. Packer, Mpaka L. Tom Perry, mpe Mpaka Richard G. Scott. Bazongi na ndako na bango ya lola. Tokozanga bango. Boni boni tozali na esengo mpo na ndakisa na bango ya bolingo ya Kimoklisto mpe mpo na mateya efulama batikeli biso nionso.

Totombeli na motema moko boyei malamu na Bapostolo na biso ya sika, Mpaka Ronald A. Rasband, Mpaka Gary E. Stevenson, mpe Mpaka Dale G. Renlund. Baoyo bazali bato bamipesi mpo na mosala ya Nkolo. Bamilengelaki malamu mpo na kokokisa misala ya ntina mpo na miye babengamaki.

Kala mingi te, ntango nazalaki kotanga mpe komanyola makomi, matangi mibale etikalaki mingi mingi na ngai. Nionso mibale tomesani na yango. Ya yambo ewuti na Esakola na Ngomba: “Tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bakoka komona misala na bino ya malamu, mpe ekumisa Tata na bino oyo azali na lola.”1 Makomi ya mibale ezali oyo eyaki na makanisi na ngai ntango namanyolaki ntina ya maye ya yambo. Ewuti na mokanda ya Apostolo Polo na Timote: “Bozala ndakisa ya bandimi, na maloba, na lisolo, na bolingani, na molimo, na bondimi, na bopeto.”2

Nakanisi makomi ya mibale elimboli, na eteni ya monene lolenge nini tokoki kokokisa ya yambo. Tokomaka bandakisa ya bandimi na kosalelaka nsango malamu ya Yesu Klisto na liloba, na masolo, na bolingani, na bondimi, mpe na bopeto. Ntango tosali bongo, minda na biso ekongenga mpo ete basusu bamona.

Moko na moko na biso oyo ayaki na mabele apesamaki mwinda ya Klisto. Ntango tolandi ndakisa ya Mobikisi mpe tozali kotambwisa bomoi na biso lokola Asalaki mpe lokola Ateyaki, mwinda wana ekopela kati na biso mpe ekongengisa nzela mpo na basusu.

Apostolo Polo apesi bizalela motoba ya mondimi, bizalela oyo ekopesa nzela ete minda na biso engenga. Tika totalela moko na moko.

Nakolobela bizalela mibale ya yambo elongo—kozala ndakisa na liloba mpe na masolo. Maloba tosalelaka ekoki kotombola mpe kofula, to ekoki kosala mpasi mpe kokitisa. Na mokili ya lelo ezali na ebele ya bosantoli na oyo wapi tozingami pene na bisika nionso. Ezaii mpasi mpo na koboya koyoka bankombo ya Bonzambe oyo bato bazali kosalela na ndenge ya mpamba mpe ya pete. Maloba ya mabe emonani lokola biloko bisengeli malamu mpo na televizio, bafilme, mikanda, mpe miziki. Maloba ya kotiola mpe ya nkanda eye kobakisama mpe wana. Tika toloba na basusu na bolingo mpe limemia, ntango nionso kobatelaka maloba na biso peto mpe koboyaka maloba to masolo ya kozokisa to ya kotuka. Tika ete tolanda ndakisa ya Mobikisi, oyo alobaki na bolingo mpe boboto na mosala na Ye mobimba.

Ezalela elandi oyo Polo alobeli ezali bolingani, oyo elimbolami lokola “bolingo ya peto ya Klisto.”3 Nandimi ete ezali na kati ya bisika tosalaka mpe toyebani na bato oyo bazali bango moko kaka, baye bazali kobela, mpe baye basili kolemba. Ezali libaku na biso mpo na kosunga bango mpe kotombola milimo na bango. Mobikisi amemaki elikia na bazangi elikia mpe bokasi na bato ya botau. Abikisaki babeli; Ye atambwisaki bakoka; bakufi miso bamonaki; bakufi matoyi bayokaki. Asekwisaki nkutu bawa. Na mosala na Ye mobimba, Asalisaki na bolingani na moto nionso oyo azalaki na mposa ya lisungi. Ntango tolandi ndakisa na Ye, tokopambola bomoi ya basusu, mpe ya biso moko.

Nsima, tosengeli mpe kozala ndakisa na molimo. Mpo na ngai yango elakisi tosala makasi na bomoi na biso mpo na kozala na bosembo, botondi, bolimbisi, mpe bolingi ya malamu. Mabongi oyo ekopesa biso molimo oyo ekosimba bomoi ya baye bazali nzinganzinga na biso. Ezali libaku lipesami ngai ya kosala elongo na bato ebele oyo bazali na molimo ya boye mibu nionso oyo. Toyokaka liyoki ya kafukafu ntango tozalaka elongo na bango, liyoki moko oyo esalaka biso tosala elongo na bango mpe tolanda ndakisa na bango. Batindaka pole ya Klisto mpe basungaka biso koyoka bolingo na Ye mpo na biso.

Mpo na kolimbola ete pole oyo ewutaka na molimo ya peto mpe ya bolingo eyebanaka na basusu, nakokabola na bino likambo moko ya mibu mingi eleki.

Na ntango wana, bakambi ya Eklezia bakutanaki na bakonzi ya mboka na Jerusaleme mpo na kobongisa boyokani ya kofutela mabele likolo na ya maye wapi Centre ya Eklezia na Jerusaleme elingaki kotongama. Mpo na kozwa bandingisa esengeli, Eklezia esengelaki kondima ete bandimi na biso oyo bakofanda na centre bateya te. Nsima ya kosala boyokani wana, moko ya bakonzi ya Ekolo ya Israel oyo ayebaki Eklezia mpe bandimi na yango malamu, alobaki ete ayebaki Eklezia ekotosa boyokani ya koteya te. “Kasi,” alobaki, mpo na oyo etali bayekoli oyo balingaki kotanga kuna, “tokosala nini mpo na pole oyo ezali na miso na bango?”4 Tika ete pole wana ya kafukafu engenga ntango nionso kati na biso, ete ekoka koyebana mpe kondimama na basusu.

Kozala ndakisa ya bondimi elingi koloba ete tosengeli kolikia na Nkolo mpe na liloba na Ye. Yango elingi koloba ete tokozala mpe tokoleisa boyambi oyo ekokamba makanisi mpe misala na biso. Bondimi na biso na Nkolo Yesu Klisto mpe na Tata na biso ya Lola ekozala na nguya likolo ya nionso oyo tokosala. Na kati ya mobulungani ya ntango na biso, bitumba na kasansa, mpe mobulu ya bomoi ya mokolo na mokolo, bondimi oyo etelemi ngwi ekokoma longo na bomoi na biso. Bomikundola ete bondimi mpe ntembe ekoki te kozala kati na motema moko na ntango moko, mpo moko akobengana mosusu. Nazongeli oyo elobamaki mbala na mbala—ete mpo na kozwa mpe kobatela bondimi tozali na mposa na yango, ezali na ntina monene ete totanga mpe toyekola mpe tomaniola makomi. Kosolola na Tata na biso na Lola na nzela ya losambo ezali na ntina mingi. Tokoki te kotala mpamba makambo oyo, mpo monguna mpe mampinga na ye balembi te koluka lidusu na ebundeli na biso, libunga na bondimi na biso. Elobaki Nkolo, “Boluka na etingia, bosambela ntango nionso, mpe bozala na bondimi, mpe makambo nionso esengeli kosala mpo na bolamu na bino.”5

Na nsuka, tosengeli kozala peto, elingi koloba ete tozala na mbino te na nzoto, na mayele, mpe na molimo. Toyebi ete nzoto na biso ezali tempelo, ya kosalela na lokengo mpe limemia. Milimo na biso misengeli kotondisama na makanisi ya botombwami mpe ya lokumu mpe kobatelama nsomi na makambo wana oyo ekobebisa yango. Mpo na kozala na Molimo Mosantu lokola moninga na biso ya ntango nionso, tosengeli kozala bato balongobani. Bandeko mibali mpe bandeko basi, bopeto ekomemela biso kimia ya makanisi mpe ekolongisa biso mpo na kozwa bilaka ya Mobikisi. Ye alobaki ete, “Bapambolama ezali baoyo bazali na motema peto: mpo bakomona Nzambe.”6

Soki tolakisi ndakisa na maloba, na lisolo, na bolingani, na molimo, na bondimi, na bopeto, tokomikokisa mpo na kozala mwinda mpo na mokili.

Tika naloba na bino banso, mpe mingimingi na bino bilenge, ete lokola mokili ezali kokende se kokende mosika na mabongi mpe malako epesamela biso na Tata ya Lola moko ya bolingo, tokotelema libanda ya bato ebele mpamba te tozali ya kokesana. Tokozala ya kokesana mpamba te tolataka na kolukaka bilamba ya ntalo mpe ya kobenda bokebi ya bato te. Tokozala ya kokesana mpamba te tolobaka maloba ya bosantoli te mpe mpamba te tosalelaka te bilei to bimeli oyo ezali mabe mpo na nzoto na biso. Tokozala ya kokesana ntango toboyi maseki ya mabe mpe maloba ya kotiola basusu. Tokozala ya kokesana ntango tozwi mokano ya kotondisa mayele na biso na maponi ya bapanzi nsango ya buzoba mpe ya kokitisa mpe oyo ekolongola Molimo na bandako mpe na bomoi na biso te. Tokozala ya bokesani mingimingi ntango tokosala maponi koyebaka nini ezali malamu mpe mabe—maponi oyo ezali koyokana na mabongisi mpe mibeko ya nsango malamu. Makambo oyo ekesenisaka biso na mingi oyo mokili epesaka biso lisusu pole mpe molimo oyo ekongenga na mokili oyo ezali se kokoma ya molili.

Ezalaka mbala mingi mpasi mpo kozala ya kokesana mpe kotikala yo moko kaka kati ya bato ebele. Ezali lolenge ya bato ete babanga nini basusu bakoki kokanisa to koloba. Maloba ya nzembo ezali kopesa bolendisi: “Nkolo azali pole na ngai mpe lobiko na ngai; ngai nakobanga nani? Nkolo azali makasi ya bomoi na ngai; ngai nakoyoka nani bobangi?”7 Ntango totii Klisto na katikati ya bomoi na biso, mpiko ya bondimi na biso ekozwa esika ya bobangi na biso.

Bomoi ezali ya kobonga nie mpo na moto ata moko kati na biso te, mpe ntango mosusu mimekano mpe kpokoso tokutanaka na yango ekoki koleka, kosala ete pole na biso ekufa. Nzokande, na lisungi ya Tata na biso ya Lola, elongo na lisungi ya basusu, tokoki kozwa lisusu pole wana oyo ekongengisa lisusu nzela na biso mpe kopesa biso pole oyo basusu bakoki kozala na yango mposa.

Mpo na kolimbola, nakokabola na bino maloba ya kitoko ya nzembo moko ya ntoki oyo natangaki mbala ya liboso mibu mingi mileki:

Nakutanaki na mopaya moko na butu

Oyo mwinda na ye ezimaki.

Natelemaki mpe natikaki ye apelisa

Mwinda na ye uta na oyo ya ngai.

Mopepe makasi ebetaki nsima

Mpe eningisaki mokili nzinganzinga.

Mpe ntango mopepe esilaki

Mwinda na ngai ekufaki!

Kasi mopaya wana azongelaki ngai—

Mwinda na ye ezalaki kopela malamu!

Ye, abombaki moto wana ya ntalo mpenza

Mpe apelisaki ya ngai!8

Bandeko mibali mpe bandeko basi, mabaku na biso ya kongenga ezingaka biso mokolo na mokolo, na bisika nionso tozali. Ntango tolandi ndakisa ya Mobikisi, tokozala na libaku ya kozala mwinda na bomoi ya basusu, bazala baye ya libota mpe baninga na biso, basali elongo na biso, bato bayebani na biso mwa moke, to bapaya mpenza.

Na moko na moko na bino, nalobi ete bozali bana mibali mpe bana basi ya Tata na biso ya Lola. Bowutaki epai na Ye mpo na kozala na mabele oyo mpo na eloko moko, mpo na kolakisa bolingo mpe mateya ya Mobikisi, mpe mpo na kotika na mpiko pole na bino engenga ete bato nionso bamona. Ntango eleko wana na mabele esili, soki osalaki eteni na yo, ya yo lipamboli ekozala ya nkembo ya kozonga kozala elongo na Ye libela.

Boniboni maloba oyo ya Mobikisi ezali na elikia: “Nazali pole ya mokili: oyo alandi ngai akotambola na molili te, kasi akozala na pole ya bomoi.”9 Na ntina na Ye natatoli. Ye azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso, Molobeli na biso epai ya Tata. Ye azali Ndakisa mpe Bokasi na biso. Ye azali “pole oyo engengaka na molili.”10 Ete moko na moko na biso na lokito ya mongongo na ngai akoka kolapa ndai ya kolanda Ye, kokomaka bongo pole ya kongenga mpo na mokili, ezali losambo na ngai na nkombo ya bule, kutu Yesu Klisto Nkolo, amene.