2015
Molimo Mosantu Akozala Moninga na Yo.
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2015


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, Sanza ya zomi na moko 2015

Molimo Mosantu Akozala Moninga na Yo.

Tokoki, soki totambwisi bomoi oyo na lolenge elongobani mpo na yango, kozwa lipamboli ya Molimo kozala na biso, kaka sikawa mpe nsima te kasi ntango nionso.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, nazali na esengo ya kozala na bino na mokolo ya Saba kati na likita linene ya Eklezia ya Nkolo. Nayoki, lokola boyoki, Molimo, Molimo kotatolaka mpo na bosolo ya maloba toyoki kolobama mpe koyembama.

Ntina na ngai lelo ezali komatisa mposa na bino mpe bomipesi na bino mpo na kosenga likabo elakelama epai na moko na moko na biso nsima ya libatisi. Na bokotisi na biso toyokaki maloba: “Yamba Molimo Mosantu.”1 Uta na ngonga wana, bomoi na biso ebongwanaki libela.

Tokoki, soki tozali na bomoi elongobana mpo na yango, kozwa lipamboli ya Molimo na biso, kaka na libaku te kasi ntango nionso. Boyebi uta na maloba ya losambo ya elambo lolenge nini elaka wana ekokisami: “O Nzambe, Tata wa Seko, tozali kosenga yo na nkombo ya Mwana wa yo, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa lipa liye mpo na milimo mya bango banso baye bakolia yango, ete bakoka kolia yango na bokundoli bwa nzoto ya Mwana wa yo, mpe batatola yo, O Nzambe, Tata wa Seko, ete balingi kokamata likolo na bango nkombo ya Mwana wa yo, mpe komikundola ye ntango inso mpe kobatela mitindo miye apesaki bango mpo ete bakoka ntango inso kozala na Molimo mwa ye elongo na bango.”

Mpe nde eyaka elaka oyo ya nkembo: “Ete bakoka ntango nionso kozala na Molimo mwa ye elongo na bango” (D&A 20:77; nsete biso nde tobeti).

Kozala ntango nionso na Molimo elongo na biso ezali kozala na bokambi mpe boyangeli ya Molimo Mosantu na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Tokoki, mpo na ndakisa, kokebisama mpo na kotelemela lisenginia ya kosala mabe.

Mpo na ntina wana kaka, ezali pete ya komona mpo na nini basali ya Nkolo bameki komatisa mposa na biso ya kokumbamela Nzambe na makita ya elambo. Soki tolie elambo na bondimi, Molimo Mosantu akozala bongo na makoki ya kobatela biso mpe baye tolingaka uta na masenginia oyo eyaka na bokasi ya koleka mpe mbala na mbala .

Kozala moninga ya Molimo Mosantu esalaka ete oyo ezali malamu ebenda bokebi mingi koleka kasi lisenginia ebenda bokebi moke kaka. Oyo yango moko esengeli kokoka mpo ete tozwa mokano ya kolongobana mpo ete Molimo azala na biso elongo ntango nionso.

Kaka lokola Molimo elendisaka biso toboya mabe, Ye mpe apesaka lisusu biso nguya ya kososola katikati ya solo mpe lokuta. Bosolo oyo ezali ntina mingi koleka etalisami kaka na nzela ya bobimisi uta na Nzambe. Mayele na biso ya moto mpe kosalela mayoki na biso ya nzoto ekokoka te. Tozali na bomoi na eleko wapi ata bato ya bwania bakozala na mpasi mpo na kokesenisa bosolo na lokuta ya mayele.

Nkolo ateyaki Apostolo na Ye Toma, oyo alingaki bosolo ya komona na miso ya Bosekwi ya Mobikisi na kosimbaka bapota na Ye, bobimisi wana ezali bosolo ya bokengi koleka: “Yesu alobi na ye ete, Toma, ondimi mpo ete osili komona ngai, Esengo na bango oyo bamoni te kasi basili kondima” (Yoane 20:29).

Bosolo oyo elakisaka nzela ya ndako epai ya Nzambe etalisami na Molimo Mosantu. Tokoki kokende na zamba ya bule mpe komona Tata koloba na elenge Joseph Smith te. Bosolo ya komona na miso moko te to maloba ya mayele kani te ekoki kondimisa ete Eliya ayaki lokola elakelama mpo na kopesa bafungola ya bonganganzambe oyo sikawa esimbami mpe esalelami na profeta na bomoi, Thomas S. Monson.

Bondimisami ya bosolo eyelaka mwana mobali to mwana mwasi ya Nzambe oyo asengi likoki ya koyamba Molimo Mosantu. Lokola balokuta mpe bobuki lokuta ekoki kotalisama epai na biso na ngonga nionso, tozali na mposa ya nguya ya ntango nionso ya Molimo ya Solo mpo ete tobatelama na ntembe.

Ntango moko ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, George Q. Cannon alobaki ete tosengaka ntango nionso mpo ete Molimo azala na biso. Alakaki mpe nalaki yango mpe, ete soki tolandi nzela wana, biso “tokozanga mokolo moko te boyebi” ya bosolo, “mokolo moko te tokozala na ntembe to na molili,” mpe ya biso “bondimi ekozala makasi, [ya biso] esengo … mobimba.”2

Tozali na mposa ya lisalisi wana ya ntango nionso ya kozala moninga ya Molimo Mosantu mpo na ntina mosusu mpe. Liwa ya molingami moko ekoki koya na mbalakaka. Ezali litatoli uta na Molimo Mosantu na ntina ya solo ya Tata na Lola ya bolingo mpe Mobikisi mosekwi nde epesaka elikia mpe libondi ntango moto moko ya bolingo akufi. Litatoli wana esengeli ezala ya sika ntango liwa eyei.

Yango wana, mpo na bantina mingi, tosengeli kozala na mposa ya Molimo Mosantu ntango nionso. Tozali na mposa na yango, kasi lisusu toyebi uta na boyebi makambo ete ezali pete ya kobatela yango te. Moko na moko tokanisaka, tolobaka, mpe tosalaka makambo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo oyo ekoki kotuka Molimo. Nkolo ateyaki biso ete Molimo Mosantu ekozala moninga na biso ya ntango nionso ntango mitema na biso etondi na bolingani meke mpe ntango bolamu etondisi ya biso makanisi ntango nionso (tala D&A 121:45).

Mpo na banso oyo bazali kobunda na mibeko ya likolo oyo esengelami mpo na kozwa Molimo Mosantu lokola moninga, napesi bolendisi oyo. Ezali na bangonga ntango boyoki nguya ya Molimo Mosantu. Ekokaki kosalema lelo mpo na yo.

Bokoki kotala bangonga wana ya bofuli lokola nkona ya bondimi oyo Alma alimbolaki (tala Alma 32:28). Bolona moko na moko. Bokoki kosala yango na kosalelaka etinda oyo boyoki. Bofuli ya monene koleka nionso mpo na yo ekozala ya koyeba nini Nzambe alingi osala. Soki ezali mpo na kofuta moko na zomi to kokende kotala moninga oyo azali na mpasi, osengeli kosala yango. Atako ezali nini, bosala yango. Ntango bolakisi bolingi na bino ya kotosa, Molimo akotindela bino mayoki mingi koleka ya makambo nini Nzambe akolinga bino bosala mpo na Ye.

Wana ezali bino kotosa, mayoki uta na Molimo ekoya mbala mingi koleka, penepene mpe penepene kokomisaka kimoninga makasi. Nguya na bino ya kopona malamu ekobakisama.

Bokoki koyeba soki mayoki wana ya kosala mpo na Ye ezali uta na Molimo to uta na bamposa na bino moko. Soki mayoki yango ebalani na nini Mobikisi mpe baprofeta na Ye ya bomoi mpe bapostolo na Ye balobi, bokoki kopona kotosa na kondima. Nde Nkolo akotinda Molimo na Ye mpo na kozala na bino.

Ndakisa, soki boyambi liyoki ya molimo mpo na kotosa mokolo ya Saba, mingimingi ntango emonani lokola mpasi, Nzambe akotinda Molimo na Ye mpo na kosalisa.

Lisalisi wana eyelaki tata na ngai mibu mingi kala ntango mosala na ye ememaki ye na Australie. Azalaki ye moko na mokolo moko ya eyenga, mpe alingaki kolia elambo. Akokaki kozwa nsango moko te oyo etali makita ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka. Yango wana abandaki kotambola. Azalaki kosambela na bokutani ya banzela mpo na koyeba nzela nini akozwa. Nsima ya kotambolaka mpe kobalukaka ntango moko, atelemaki mpo na kosambela lisusu. Ayokaki liyoki moko ya kokita na balabala moko. Nokinoki abandaki koyoka loyembo kowutaka na eteni ya nse ndako moko ya etage pembeni wana. Atalaki na nzela ya fenetele mpe amonaki mwa bato bafandaki pembeni ya mesa ezipama na elamba ya mpembe mpe basani ya elambo.

Sikawa, wana ekoki komonana lokola likambo monene mingi te epai na bino, kasi ezalaki likambo kitoko mpenza mpo na ye. Ayebaki elaka ya losambo ya elambo ekokisamaki: “Komikundola ye ntango nionso mpe kobomba mitindo miye apesaki bango; Ete bakoka ntango nionso kozala na Molimo mwa ye elongo na bango” (D&A 20:77).

Wana ezalaki bobele ndakisa moko ya ntango asambelaki mpe asalaki maye Molimo elobelaki ye Nzambe alingaki ye asala. Akobaki kosala yango mibu na mibu, lokola bino na ngai tokoba. Azalaki soki moke te kolobela makambo na ye ya molimo. Akobaki kaka kosala mwa makambo mpo na Nkolo oyo atindamaki kosala.

Ntango nionso mwa maboke ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka basengaki ye kolobela bango, asalaki yango. Likambo te soki ezalaki bato 10 to 50 to boniboni alembaki. Apesaki litatoli na ye ya Tata, mwana, Molimo Mosantu, mpe ya profeta ntango nionso Molimo atindaki ye asala yango.

Mabiangi na ye ya likolo mingi koleka na Eklezia ezalaki na lisanga linene ya Bonneville Stake, wapi alongolaki matiti na ferme ya likonzi, mpe ateyaki kelasi moko ya Eteyelo ya Eyenga. Na mibu mingi, ntango azalaki na mposa na yango, Molimo Mosantu azalaki wana lokola moninga na ye.

Natelemaki pembeni ya tata na ngai na lisuku ya lopitalo. Mama na ngai, mwasi na ye ya mibu 41, alalaki na mbeto. Tozalaki kotala ye ngonga molai. Tobandaki komona mayoki ya mpasi kolimwa na elongi na ye. Misapi ya maboko na ye, oyo ya kokangama na makofi, esembolamaki. Maboko na ye eyaki kopema na mipanzi na ye.

Bampasi ya cancer ya mibu ebele ezalaki kosuka. Namonaki na elongi na ye kolakisa kimia. Apemaki mwa moke, nsima kokangama ya mpemba, mpe nsima aninganaki lisusu te. Totelamaki wana kozelaka soki pema ekoya lisusu.

Na nsuka, Papa alobaki na malembe, “Mwa mwana mwasi akei ndako.”

Atangisaki pinzoli moko te. Wana ezalaki mpo ete Molimo Mosantu apesaki ye kala liboso bososoli ya nani azalaki, wapi awutaki, mpe oyo ye akomaki, mpe wapi azalaki kokende. Molimo atatolaki epai na ye mbala mingi bolingo ya Tata ya Lola, na ntina ya Mobikisi oyo abukaki nguya ya liwa, mpe bololo ya bokangisi ya tempelo oyo akabolaki elongo na mwasi mpe libota na ye.

Molimo andimisaki ye liboso kala ete bolamu mpe bondimi na ye elongisaki ye mpo na bozongi epai ya ndako ya lola wapi akokanisama lokola mwana malamu ya elaka mpe akoyambama na lokumu.

Mpo na Tata na ngai; yango ezalaki likambo oyo elekaki elikia. Molimo Mosantu akomisaki likambo yango solo mpo na ye.

Sikawa, basusu bakoki koloba ete maloba na ye mpe basosoli na mayele na ye oyo etali ndako ya lola ezalaki kaka likanisi moko ya elikia, bososoli ya londende ya kozwa mobali na ngonga ya liwa na ye. Kasi ayebaki bosolo ya seko bobele lolenge bokoki koyeba yango.

Azalaki moto ayekola oyo alukaki bosolo etali mokili oyo na bomoi na ye ya kimokolo mobimba. Asalelaki bisalelo ya boyebi malamu mpenza mpo na kopesama lokumu na baninga na ye na mokili mobimba. Mingi ya oyo asalaki na chimie eutaki na komonaka na miso na yemei ya molimo babiteni kotambolaka mpe nsima kofandisaka oyo azali komona na ye na nzela ya babomeki na labo.

Kasi alandaki mateya mosusu mpe amonaki bosolo oyo ya ntina mingi koleka mpo na ye mpe mpo na moko na moko na biso. Bobele na nzela ya Molimo Mosantu nde ekokaki biso komona bato mpe makambo lokola Nzambe azali komona yango.

Likabo wana ekobaki na lopitalo ntango mwasi na ye akufaki. Tosangisaki biloko ya mama na ngai mpo na komema na ndako. Papa azalaki kotelema mpo na kotonda minganga mpe badokotolo nionso oyo tozalaki kokutana na bango na nzela ya kobimela tii na motuka. Nakanisi ete namiyokaki ete tosengelaki kobima mpo na kozala biso moko na mpasi na biso.

Sikawa nasosolaki ete amonaki makambo oyo bobele Molimo Mosantu akokaki kolakisa ye. Amonaki bato wana lokola banzelu batindamaki na Nzambe mpo na kokengela bolingo na ye. Bakokaki komimona lokola basali ya bokolongono na nzoto, kasi Papa azalaki kotonda bango na nkombo ya Mobikisi.

Nguya ya Molimo Mosantu ekobaki na ye ntango tokomaki na ndako ya baboti na ngai. Tosololaki mwa miniti na kisuku ya masolo. Papa asengaki bolimbisi mpo na kokende na kisuku na ye ya pembeni.

Nsima ya miniti moke, azongaki na kisuku ya masolo. Azalaki na mwa koseka. Atambolaki tii epai na biso mpe alobaki na malembe, “Nabangakaki ete Mildred akoya na mokili ya molimo ye moko. Nakanisaki akobunga nzela na katikati ya ebele ya bato.”

Nsima alobaki na esengo, “Nasambelaki kaka sikawa. Nayebi Mildred azali malamu. Mama na ngai azalaki kuna mpo na kokutana na ye.”

Namikundoli kosekaka moke lokola alobaki eye wana, kobanzaka nkoko na ngai ya mwasi, makolo na ye kokimaka, kodusoloka na kati ya ebele ya bato mpo na kondima ete azalaki kuna mpo na kokuta mpe koyamba bokilo na ye ya mwasi wana ezalaki ye kokoma.

Sikawa, moko ya bantina tata na ngai asengelaki mpe ayambelaki libondi ezalaki mpo ete azalaka ntango nionso kosambela na bondimi uta bomwana na ye. Amesanaki kozwa biyano oyo ezalaki koya na motema na ye mpo na kopesa libondi mpe kolakisa nzela. Likolo ya kozalaka na momesano ya kosambela, ayebaki makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi. Yango wana ayebaki mingongo ya nse ya momesano ya Molimo, oyo bokoki koyoka lelo.

Kozala moninga ya Molimo ezalaki mingi koleka kobondisa mpe kokamba ye. Ebongolaki ye na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Ntango tondimi ete elaka ya kozalaka na Molimo elongo na biso ntango nionso, Mobikisi akoki kopesa biso bopetoli esengelami mpo na bomoi ya seko, likabo ya monene na makabo nionso (tala D&A 14:7).

Bokanisa maloba ya Mobikisi: “Sikawa oyo ezali motindo: Boyambola, bino banso nsuka ya mabele, mpe boya epai na ngai, ete bokoka kosantisama na bozwi ya Molimo Mosantu, ete bokoka koteleme na bozangi mbindo liboso na ngai na mokolo ya nsuka” (3 Nefi 27:20).

Mitindo wana eyaka elongo na elaka oyo uta na Nkolo:

“Mpe sikawa, solo, solo, nalobi na bino, botia elikia na bino na Molimo wana oyo akambaka mpo na kosala malamu—iyo, mpo na kosala na boyengebene, mpo na kotambola na bomikitisi, mpo na kosambisa na bosembo; mpe oyo ezali Molimo na ngai.

“Solo, solo, nalobi na bino, nakopesa bino Molimo na ngai, oyo akongengisa mayele na bino, oyo akotondisa molimo na bino na esengo” (D&A 11:12–13).

Natatoli epai na bino ete nzambe Tata azali na bomoi, ete Yesu Klisto Mosekwi akambaka Eklezia na Ye, ete Thomas S. Monson asimbi bafungola ya bonganzambe, mpe ete bobimisi na nzela ya Molimo Mosantu ekambaka mpe esungaka Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe bandimi na yango ya bomikitisi.

Natatoli lisusu epai na bino ete mibali malamu oyo balobeli biso lelo lokola batatoli ya Yesu Klisto, lokola bato ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, babengami na Nzambe. Nayebi ete Molimo ekambaki Mokambi Monson mpo na kobenga bango. Mpe ntango boyokaki bango mpe matatoli na bango, Molimo Mosanto endimisi bino oyo nazali kolobela bino sikawa. Babiangami na Nzambe. Nasungi bango mpe nalingaka bango mpe nayebi ete Nkolo alingaka bango mpe asungaka bango na mosala na bango. Mpe nalobi yango na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Manuel 2: Administration de l’Eglise (2010), 20.3.10.

  2. Tala George Q. Cannon, in “Minutes of a Conference,” Millennial Star, Sanza ya mitano 2, 1863, 275–76.

Bimisa na lokasa