2015
Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Moto ya Mawa mpe Boboto
sánzá ya zómi na míbalé 2015


EtindayaBamamaBatalimpeBateyiSanzayaZominaMibale 2015

Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Moto ya Mawa mpe Boboto

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba nini bosengeli kokabola. Boniboni bososoli na bino ya bizaleli ya bonzambe ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

“Kati na makomi, motema mawa elakisi.mpenza ‘koyoka mpasi elongo na.’ Elingi mpe lisusu koloba kolakisa boboto, mawa, mpe ngolu mpo na moto mosusu.”1

“Yesu apesaki biso bandakisa mingi ya bokaboli mawa,” elobaki Mokambi Thomas S. Monson. Moto abukama makolo na lizanga Betheseda; muasi bakangaki na ekoo; muasi na lizia ya Yakobo, muana muasi moke ya Yailu; Lazalo, ndeko mobali ya Malia mpe ya Malata—moko na moko bazali ndakisa ya makambu ya mbalakata na nzela ya Yeliko. Moko na moko asengelaki lisalisi.

“Na moto abukana makolo ya Betheseda, Yesu alobaki, ‘Telema, kamata mbeto, mpe tambola.’ Na mwasi mosumuki toli epesami ete, ‘Kende, mpe kosumuka lisusu te.’ Mpo na kosalisa ye oyo ayaki kotoka mayi, Ye apesaki liziba ya mayi ‘oyo ekopesa bomoi ya libela.’ Na muana mwasi ya Yailu oyo akufaki motindo ebimaki ete, ‘Damsel, nalobi na yo telema.’ Na Lazalo oyo bakundaki, ‘Bima libanda.’

“Ntango Mobikisi alakisaki nguya ezanga ndelo ya kokabola mawa. … Tika ete tofungola ekuke ya mitema na biso, ete Ye—ndakisa ya bomoi ya bokaboli mawa ya solo—akoka kokota.”2

Makomi ya Kobakisa

Banzembo 145:8; Yekalia 7:9; 1 Petelo 3:8; Moziya 15:1, 9; 3 Nefi 17:5–7

Uta na Makomi

“Mobali na ngai mpe nga tofukamaki pembeni ya muana na biso ya mibu 17 mpe tobondelaki mpo na bomoi na ye,” elobaki Linda S. Reeves, mopesi toli ya mibale na bokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. “Eyano ezalaki te, kasi . … toyaki kososola … ete … [Mobikisi] ayokaka mawa mpo na biso na kati ya kolela na biso.”3

“Moko ya masolo uta na bomoi ya Mobikisi ezali lisolo ya Lazalo. Makomi eyebisi biso ete ‘Yesu alingaki Malata, … ndeko na ye ya muasi [Malia], mpe [ndeko na bango ya mobali] Lazalo.’”4 Ntango Lazalo abelaki, batindaki maloba epai ya Yesu, kasi ntango Akomaki Lazalo asi akifaki. Malia akendaki epai ya Yesu, akweyaki na makolo na Ye, mpe alelaki. Ntango Yesu amonaki Malia kolela, “ye ayokaki mawa mingi na nse ya motema, mpe … alelaki” (Yoane 11:33, 35).

“Oyo ezali mokumba na biso. Tosengeli koyoka mpe komona mpo na biso moko mpe nsima kosalisa bana nyonso ya Tata na biso ya Lola koyoka mpe komona mpe koyeba ete mobikis na biso amemaki likolo ye kaka masumu na biso nyonso te kasi lisusu mpasi na biso mpe minioko mpe mitungisi na biso bongo ete akoka koyeba nini tozali koyoka mpe ndenge ya kolendisa biso.”5

Matangi

  1. Mokambi na Makomi “Bokaboli mawa.”

  2. Thomas S. Monson, “The Gift of Compassion,” Liahona, Sanza ya Misatu. 2007, 4–5, 8.

  3. Linda S. Reeves, “The Lord Has Not Forgotten You,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 120.

  4. Linda S. Reeves, “The Lord Has Not Forgotten You,” 118.

  5. Linda S. Reeves, “The Lord Has Not Forgotten You,” 120.

Botala Motuna Oyo

Nani akoki kopambolama na mawa na yo?

Bimisa na lokasa