2015
Pesa Ntango na Mobikisi
sánzá ya zómi na míbalé 2015


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Mibale 2015

Pesa Ntango na Mobikisi

Eleko mosusu ya Mbotama ebelemi mpo na biso koyaka elongo na yango mobu ya sika. Emonani lokola soki kaka lobi lobi oyo eleki ntango tozalaki kosepela mbotama ya Mobikisi mpe kozwa mikano.

Kati na mikano na biso mpo na mobu oyo, ezwaki biso mokano ya kopesa ntango na bomoi na biso mpe esika na mitema na biso mpo na Mobikisi? Likambo te boniboni tolongaki kino sikawa na mokano wana, nazali na elikia ete banso totombelaka kosala malamu koleka. Eleko oyo ya Mbotama ezali ntango malamu ya kososola mpe kozongisa bokasi na biso sika.

Na bomoi na biso oyo etonda misala, tozali naino na makambo mingi oyo ezali kobundela bokebi na biso, ezali na ntina mpenza ete tosala makasi ya koyeba mpe ya komipesa mpo na komema Klisto na kati ya bomoi na biso mpe na kati ya bandako na biso. Ezali na ntina mpenza ete biso, lokola Bato ya Bwania uta na Esti, totalela kaka monzoto na Ye mpe “tokumbamela ye.”1

Na bankola ya ntango nionso eleka, nsango uta na Yesu ezali bobele lolenge moko. Na Petelo mpe Andele na libongo ya Galilea, Ye alobaki, “Bolanda ngai.”2 Na Filipo libiangi eyaki, “Landa ngai.”3 Na Molewi oyo abandaki kokongola mpako eyaki malako ete, “Landa ngai.”4 Mpe na yo mpe ngai soki mpenza toyokameli, libiangi se moko wana ekokomela biso ete : “Bolanda ngai.”5

Wana ezali biso kolanda matambe na Ye lelo mpe wana ezali biso kolanda ndakisa na Ye, tokozala na mabaku ya kopambola bomoi ya basusu. Yesu abengisi biso tomipesa: “Tala, Nkolo asengi motema mpe molimo ya bolingi.”6

Ezali na moto moko oyo osengeli kosalisa na eleko ya Mbotama oyo? Ezali na moto moko oyo azali okende kotala ye?

Mibu mingi eleki nakendaki kotala mokufeli mobali moko ya mokolo na Noel na ndako na ye. Ntango nazalaki kuna, ngonga ya ekuke ebetaki. Kuna na ekuke monganga moko atonda misala mpe ya lokumu atelemaki. Babengaki ye te; kasi, ayokaki kaka etinda ya motema mpo na kokende kotala mokoni oyo azalaki kaka ye moko.

Na eleko oyo, mitema ya bato oyo bakangama na bandako ezali kozela mpe kosenga batala bango na Noel. Na Noel moko ntango nazalaki kokende na ndako ya lisalisi, nafandaki mpe nasololaki na basi ya mikolo mitano mitano, oyo ya mokolo koleka azalaki na mibu 101. Azalaki mokufi miso, kasi ayebaki lisusu mongongo na ngai.

“Episikopo, oyei penza noki te mobu oyo!” elobaki ye. “Nakanisaki okoya lisusu te.”

Tolekisaki ntango moko kitoko elongo. Nzokande, mokoni moko, azalaki kotala mpenza libanda na lininisa mpe abandelaki mbala na mbala, komilobaka ete, “Nayebi mwana na ngai ya mobali akoya kotala ngai lelo.” Namitunaki soki akoya, mpo ezalaki na bileko mosusu ya Noel oyo abengaka ye ata mbala moko te.

Nzokande ntango ezali naino mobu oyo mpo na kosembola loboko ya lisalisi, motema ya bolingo, mpe molimo ya bolingi—na maloba mosusu, ntango ya kolanda ndakisa oyo etiamaki na Mobikisi na biso mpe ya kosalisa lokola Alingaki komona biso kosalisa. Wana ezali biso kosalela Ye, tokozangisa libaku na biso te, lokola esalaki mobateli ya ndako ya bapaya ya kala,7 mpo na kopesa Ye ntango kati na bomoi na biso mpe esika kati na mitema na biso.

Ekoki biso kososola elaka monene etondisami kati na etinda oyo anzelu apesaki na babateli mpate ya kotikala kaka bobele na elanga: “na memeli bino nsango malamu ya esengo monene. … Mpamba te na mokolo oyo Mobikisi moko abotameli biso … , oyo azali Klisto Nkolo”?8

Lokola tozali kokabola makabo na Noel, tika ete tokundola, tosepela, mpe toyamba likabo monene oyo koleka makabo nyonso—likabo oyo ya Mobikisi mpe Mosikoli, ete tokoka kozua bomoi ya seko.

“Malamu nini ezali mpo na moto soki apesami likabo mpe ayambi likabo yango te? Na bongo, akosepela te na oyo epesami na ye, akosepela mpe te na oyo azali mopesi ya likabo yango.”9

Tika ete tolanda Ye, tosalela Ye, tokumisa Ye, mpe toyamba na bomoi na biso makabo na Ye mpo na biso, ete biso tokoka kozala na maloba ya Tata Lehi, “tozingama mbele libela na maboko ya bolingo na ye.”10

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Monson asengi biso “kosala na boyebi, na makasi esengeli mpo na komema Klisto na bomoi na biso mpe na kati ya ba ndako na biso.” Meka kosolola na baye ozali koteya lolenge nini bango bakoki kosala makasi oyo ya boyebi ya moto na moto, mpe lokola libota Meka kotuna bango kokanisa moto moko to libota oyo bakoki kokende kotala to kosalisa na Noel oyo “Ntango ezali nanu na mobu oyo ya kosembola loboko, motema ya bolingo mpe molimo ya bolingi.”

Bimisa na lokasa