2015
Ndenge ya kosalisa na eleko ya Noel
sánzá ya zómi na míbalé 2015


Bilenge

Ndenge ya kosalisa na eleko ya Noele

Mokambi Monson azui ntango ya kotala bampaka mpe baoyo na lopitalo, mingi mingi na eleko ya Noel Ye amonaki ete ezali na baoyo wana bazali kosepela mpo bayambaki bapaya, nzoka nde basusu batiaki elikya ya mpamba mpo na bapaya oyo batikalaki koya te. Ezali na bato oyo bazali kozela moto moko—ntango mosusu na Noel oyo, yo okoki kozala moto yango.

Oyo elandi ezali molongo ya biloko moke oyo ekoki kosalisa yo koyeba solo ete moko te akomiyoka ye moko te na Noel oyo. Okoki yo moko kokanisa banzela mingi mosusu oyo okoki kosalisa bato ya lingomba na yo na eleko oyo. “Ezali awa na moto moko oyo azali kozela okende kotala ye?”

  • Sala mikanda ya kotombela Noel mpo na kotindela bamisionele mpe bandimi ya banzemba mpe mpaka ya paluasi to etape na yo.

  • Mipesa mpo na kosala elongo na lingomba moko ya bato ya esika.

  • Pesa Babuku ya Mormon lokola makabo ya Noel na baninga mpe bato ya nzinga-nzinga.

  • Tala bampaka na paluasi to libota na yo.

  • Koma mua maloba na mikanda mpo na kopesa na bato ya nzinga-nzinga.

Bimisa na lokasa