2016
Moboko Moko mpo na Litatoli na Ngai.
sánzá ya míbalé 2016


Bilenge

Moboko Moko mpo na Litatoli na Ngai.

Mokomi afandaka na Idaho, Etazini ya Amerika.

Ntango nazalaki na mibu 16, moninga moko ayaki na ndako na biso elongo na bamisionele. Na kati ya sanza moko kaka uta na lisolo ya liboso na bamisionele, mituna na ngai nyonso eyanolamaki na polele nyonso. Nayokaki Molimo Mosantu kotatola na ntina ya bosolo ya bitinda etali Bozongisi ya liloba. Ezalaki eloko moko ya kokesana oyo naino nayoka ata mokolo moko te, mpe nayebaki ete nyonso na kati na yango ezalaki ya solo.

Nzokande, nakutanaki na bato oyo babwakisaki ngai mpe batelemelaki ngai mingi koleka liboso. Namimonaki ngai moko, nalembaki, mpe nayebaki te nini nasala. Soki nazalaki kosala eloko ya sembo, mpo na nini nazalaki kokutanaka na mikakatano ebele boye? Nakokaki kososola te lolenge nini mitungisi ezalaki malamu mpo na ngai. Bamisionele bateyaki ngai kokila mpe kosambela, kutu na katikati ya mokolo ya kelasi. Ntango makambo ekomaki mpasi koleka namipesaki na bozindo na losambo mpe mbala moko nayokaki lilendisi ya Molimo.

Mposo ya libatisi na ngai ezalaki na mitungisi ebele. Mokonzi na ngai akanaki kolongola ngai na mosala soki nalekisaki te libatisi na ngai kosalama mpo na kosala na esika ya moto moko oyo azalaki te, nasukaki na lopitalo na mabanga na libumu, mpe baboti na ngai basengaki ngai kolongwa na ndako. Na makambo mingi oyo nakokaki te kokonza, eloko moko kaka nakokaki kosala ezalaki kotalela Nkolo.

Moko moko ya mitungisi ya boye ekomaki bolamu mpo na ngai. Basungaki ngai koyekola malongi ya nsango malamu, oyo epesaki ngai moboko moko mpo na litatoli na ngai.

Bimisa na lokasa