2016
Kotambola na kimia na Ntango ya Momekano
sánzá ya míbalé 2016


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Mibale 2016

Kokitisa Mpepo na Kimia Kati na Mbonge ya Mipepe

Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Kala mingi te muasi na ngai, Harriet, mpe ngai tozalaki na libanda ya mpepo kotalaka bampepo kitoko kokita. Ezalaki mokolo moko ya mupepe, fimbu ya makasi ya mupepe ezalaki kobeta bampepo oyo ezalaki kopusana, kosalaka ete mpepo moko na moko ekima bipai mpe eningana ntango epusani.

Lokola tozalaki kotala etumba wana ya ekelamu ya mokili na masini, makanisi na ngai ezongaki na sima na boyekoli na ngai moko ya kokumba mpepo mpe ya mabongisi nayekolaki kuna—mpe maye nateyaki sima na bakumbi mpepo mosusu na ntango ya boyekoli.

“Bobunda te na oyo mpepo elingi yo osala kati kati na momekano,” nazalaki koyebisa bango mingi mingi. “Botikala kimia; kosimba simba na ndenge ya koleka te. Botia miso na bino na nzela ya katikati ya ekiteli ya mpepo. Soki olongwe wuta na nzela oyo mposa na yo eponi kokitela, sala na lombango kasi sala keba ete obongisa malamu mpenza. Tia elykia na makoki ya mpepo na yo. Bimisa nde mupepe libanda ya nzela na yo.”

Bakumbi mpepo ya mayele basosoli ete bango bakoki ntango nyonso kokamba makambo oyo ezali kosalema nzinganzinga na bango. Bakoki bobele kosukisa mbonge ya mipepe te. Bakoki te kosala ete mvula to mvula ya mpembe ebunga. Bakoki te kosala ete mopepe etelema to ebongola nzela na yango.

Kasi basosoli mpe lisusu ete kobanga mbonge ya mipepe to mipepe makasi ezali libunga—mpe ya motuya koleka kokangama na kobanga yango. Nzela moko ya kokitisa mpepo na kimia ntango makambo ezali mabe koleka malamu ezali kotikala na nzela malamu ya kosielumuka na nzela na ndenge ya malamu ekoki.

Lokola nazalaki kotala mpepo moko sima na mosusu kopusanaka mpo na kokita ya suka mpe namikundolaki mateyan ayekolaki wuta na mibu na ngai lokola mokumbi mpepo, namitungisaki soki ezalaki te na liteya moko kati na yango mpo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.

Tokoki te ntango nyonso kokonza mbonge oyo bomoi etie na nzela na biso. Bangonga mosusu makambo ekotambolaka te ndenge biso tolingi. Tokoki koyoka ete tozali koningana mpe kobetama na mbonge ya makambo tolongi kosala te, ntembe, kobanga, mawa, to makanisi ebele na moto.

Na bangonga yango, ezali pete kokangama na makambo nyonso oyo ezali kotambola mabe mpe kotia mikakatano na biso na katikati ya makanisi na biso. Masenginia ezali ete totia makanisi na etumba tozali na yango na esika ya Mobikisi mpe litatoli na biso ya bosolo.

Kasi yango ezali te lolenge ya malamu ya kotambola na katikati ya bitumba ya bomoi.

Kaka lokola mokumbi mpepo ya mayele atiaka makanisi na ye na mopepe makasi te kasi na katikati ya ekiteli ya mpepo mpe esika mpenza mpepo ekokita, boye nde esengeli biso totia makanisi na biso na katikati ya bondimi na biso—Mobikisi na biso, nsango malamu na Ye, mpe moango ya Tata na biso ya Lola—mpe ntina na biso monene—kozonga na kimia na esika na biso na lola. Tosengeli kotia elikya na biso na Nzambe mpe kotia makanisi na biso makasi ya kosala oyo moyekoli asengeli kosala. Tosengeli kotia miso, motema mpe makanisi na biso na kozalaka lolenge toyebi tosengeli kozala.

Kolakisaka bondimi na biso mpe elykia na Tata na biso na Lola na kobombaka na esengo mitindo na Ye ekomemela biso esengo mpe nkembo. Mpe soki totikali na nzela, tokozua na nzela na momekano—kotalaka te lolenge nini makasi ekoki komonana—mpe kozonga na kimia na ndako na biso ya lola.

Atako likolo ezingi biso ezali polele to etondi na mapata lokola kobenda mbonge ya makasi, lokola bayekoli ya Yesu Klisto, tosengeli liboso koluka bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, koyebaka ete soki tosali bongo, eloko nyonso tozali na yango bosenga ekopesamela biso mpenza (tala Matai 6:33).

Oyo liteya ya motuya ya bomoi !

Mingi lokola tokotia makanisi na biso na mikakatano, bitumba, ntembe, mpe babobangi na biso, mingi kolekamakambo yango ekokoma mikakatano makasi. Kasi mingi tokotia makanisi na biso na esika na biso ya suka na lola mpe bisengo ya kolandaka nzela ya bayekoli—kolingaka Nzambe, kosalelaka bato na biso ya mpembeni—mingi tokozala ya kolonga koleka ba ntango ya mbonge mpe ya momekano.

Baninga na ngai ya bolingo, ata makasi lolenge nini mipepe ya bomoi ekozinga biso, nsango malamu ya Yesu Klisto ekopesa biso ntango nyonso nzela esengeli mpo na kokokisa bantina na biso na bokonzi ya Tata na biso ya Lola.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Uchtdorf apesi biso toli ete “totia elikya na Nzambe mpe totikala na nzela ya kozalabayekoli mpe totia makanisi ya oyo esengeli tosala.” Kanisa kotuna baoyo yo ozali koteya lolenge nini bango batie makanisi na bango “na esika na biso ya suka ya lola mpe na bisengo ya kolandaka nzela ya kozala bayekoli” na ntango mikakatano ezali liboso na bango. Okoki kobenga bango kokanisa na ndenge nini bango bakoki kotia makanisi na litatoli na bango mpe na Klisto na bantango ya mpasi mpe kozua mokano na nzela ya libondeli na lolenge nini kolona moko to ebele ya makanisi wana na bomoi na bango.