2016
Libala Etindami na Nzambe
sánzá ya míbalé 2016


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Mibale 2016

Libala Etindami na Nzambe

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni kososola “Libota: Esakola na Mokili” ekobakisa bondimi na bino kati na Nzambe mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Baprofeta, bapostolo, mpe bakambi bazali kokoba kosakola na “polele ete libala kati ya mobali moko mpe mwasi moko etindami na Nzambe mpe ete libota ezali na katikati ya moango ya Mokeli.”1

Mpaka Robert D. Hales ya Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale alobaki: “Libota oyo etongami na libala ya mobali moko mpe mwasi moko epesaka esika ya malamu koleka mpo ete moango na Nzambe ekoba. …

“… Biso te to moto moko te ya bokufi akoki kobongola etinda ya bonzambe ya libala.”2

Bonnie L. Oscarson, Mokambi Monene ya Bilenge Basi, alobaki: “Moto nyonso, kotalaka te lolenge nini makambo ya libala na bango to motango ya bana, akoki kozala mobundeli ya muango ya Nkolo oyo etalisami na Lisakola ya Libota. Soki ezali moango ya Nkolo, esengeli kozala mpe moango na biso!”3

Mpaka Christofferson akobaki: “Ebele kati na bino bopekisami lipamboli ya libala mpo na bantina ebele oyo totangi: kozanga bomoni ya kobika, Boyebani ya nzoto ya muasi na muasi mpe mobali na mobali, ebosono ya nzoto to ya makanisi, to kaka bobangi moko ya kokoka makambo te. … To ozalaka kati na libala, kasi libala yango ekufaki. … Mingi kati na bino bobalani kasi bakokaki te kozwa bana. …

“Atako bongo, … moko na moko akoki kosunga kobatela moango ya bozambe ekende liboso na nkola nyonso.”4

Makomi ya Kobakisa

Genese 2:18–24; 1 Bakolinti 11:11; Doctrine et Alliances 49:15–17Masolo ya Solo

Ndeko mobali Larry M. Gibson, mopesi toli ya kala na bokambi bonene ya Bilenge Mibali, akundolaki ntango Shirley, lelo mwasi na ye, alobaki:

“‘Nalingi yo mpo nayebi ete yo olingi Nkolo koleka bolingo na yo mpo na ngai.’ …

“Eyano wana ezalaki na ndimbola mingi mpo na ngai. …

“… [Mpe] nalingaki ete ye ayoka ntango nyonso ete nalingaki Nkolo likolo ya nyonso mosusu.”5

Mpaka David A. Bednar ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ateyaki: “Nkolo Yesu Klisto azali ntina ya motuya na liyokani moko ya lisanga ya libala. … [Kanisa ete] Nkolo atelemaki na songe ya lisanga [moko], elongo na mwasi moko na ngambo moko mpe mwasi moko na ngambo mosusu. Sikoyo kanisa nini eyei na lisanga kati na mobali mpe mwasi soki bango moko na moko mpe mbala na mbala ‘bayei na Klisto’ mpe bakobi kozala ‘bato oyo babongi nie kati na Ye’ (Moroni 10:32). Na ntina na mpe nzela ya Mosikoli, mobali mpe mwasi basangani elongo.”6

Matangi

  1. “Libota Esakola na Mokili,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2010, 129.

  2. D. Todd Christofferson, “Why Marriage, Why Family,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 52.

  3. Bonnie L. Oscarson, “Defenders of the Family Proclamation,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 15.

  4. D. Todd Christofferson, “Why Marriage, Why Family,” 52.

  5. Larry M. Gibson, “Fulfilling Our Eternal Destiny,” Ensign, Sanza ya Mibale 2015, 21–22.

  6. David A. Bednar, “Marriage Is Essential to His Eternal Plan,” Liahona, Sanza ya Motoba 2006, 54.

Bolanda Oyo.

Boniboni nazali ngai moko mpe mbala na mbala kosala makasi ya “kokoma epai na Klisto”?

Bimisa na lokasa