2016
Tokelamaki na elili ya Nzambe.
sánzá ya mísáto 2016


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya misato 2016

Tokelamaki na Elilingi ya Nzambe

Boyekola etinda oyo na nzela ya losambo mpe boluka koyeba maye bosengeli kokabola. Boniboni bokososola “Libota: Esakola na Mokili” ematisaka bondimi na bino na Nzambe mpe epambolaka baoyo bobatelaka na nzela ya mateya ya botali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

“Mpe Nzambe alobaki, Tika ete tokela moto na elilingi na biso, sima ya lolenge na biso. …

“Na yango Nzambe akelaki moto na elilingi na Yemei, na elilingi ya Nzambe nde akelaki ye; mobali mpe mwasi bakelamaki, ye nde akelaki bango” (Genese 1:26–27).

Nzambe azali Tata na biso ya Lola, mpe Akelaki biso na elilingi na Ye. Na bosolo oyo, Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “Nzambe Tata na biso azali na matoyi ya koyoka nsambo na biso. Azali na miso ya komona misala na biso. Ye azali na monoko ya kolobela biso. Azali na motema ya koyokela biso mawa mpe bolingo. Azali solo. Azali na bomoi. Tozali bana na Ye, tokelama na elilingi na Ye. Tokokani na Ye mpe Ye akokani na biso.”1

“Basantu ya mikolo mya Nsuka bazwaka bato nionso lokola bana ya Nzambe na lolenge ya bozindo mpe na mobimba; bazwaka bato nionso na lolenge ya bonzambe, na bomoto, mpe bokasi.”2 Moko na moko azali “mwana mobali mpe mwana mwasi ya molimo alingama ya baboti ya lola.”3

“[Profeta] Joseph Smith lisusu ayekolaki ete Nzambe alingi bana na Ye bazwa bomoi enetolama ya lolenge moko oyo Ye akabolaka.”4 Lokola Nzambe alobaki, “Botala, oyo ezali mosala na ngai mpe nkembo na ngai—ya kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto” (Moses 1:39).

Makomi ya Kobakisa

Genese 1:26–27; 1 Bakolinto 3:17; Doctrine & Alliances 130:1

Uta na Makomi

Ndeko mobali ya Yelede kati na Buku ya Mormon alukaki lolenge ya kopelisa mwinda na masuwa mwambe oyo elengelamaki mpo na komema Bajaredite na nzela ya mayi kino na mabele ya elaka. Ye “apasolaki na libanga monene mwa mabanga ya mike zomi na motoba” mpe asambelaki ete Nzambe akoka “kosimba mabanga wana” na mosapi na Ye “ete ekoka kongenga liboso ya molili.” Mpe Nzambe “atandaki loboko na Ye mpe asimbaki mabanga moko na moko.” Mpe elamba elongwaki mosika uta o miso mya ndeko mobali wa Yelede, mpe “amonoki mosapi mwa Nkolo; mpe ezalaki lokola mosapi ya moto moko. …

“Mpe Nkolo alobaki epai na ye: Endimi yo maloba maye nakoloba?

“Mpe ayanolaki: Iyo, Nkolo.”

Mpe “Nkolo amimonisaki Yemei epai [ya ndeko ya Yelede]” mpe alobaki, “Omoni yango ete bokelamaki na elilingi na ngaimei? Iyo, atako bato nionso bakelamaki na ebandeli na elilingi na ngaimei.” (Tala Etele 3:1–17.)

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Nayebi Ete Mosikoli wa Ngai Azali na Bomoi,” na Lapole ya Likita, Sanza ya mineyi. Cantiques, 1966, 63.

  2. Makambo ya nsango malamu, “Kokoma lokola Nzambe,” topics.lds.org; tala lisusu Moses 7:31–37.

  3. “Libota” Esakola na Mokili,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2010, 129.

  4. Makambo ya nsango malamu, “Kokoma lokola Nzambe,” topics.lds.org; tala lisusu Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 221.

Tala Motuna Oyo

Boniboni koyeba ete bato nionso bakelamaki na elilingi na Nzambe esungaka biso na bosangani na basusu?

Bimisa na lokasa