2016
’Boyekola Epai na Ngai’
sánzá ya mísáto 2016


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya misato 2016

“Boyekola Epai na Ngai”

Na Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka, tozali banso bateyi mpe bayekoli. Libiangi malamu oyo mpo na banso ewuti na Nkolo na biso: “Boyekola epai na ngai … mpe bokozwa bopemi ya milimo na bino.”1

Nabengisi Basantu nionso ya mikolo mya Nsuka bamanyola na bokasi na bango ya koteya mpe koyekola mpe kotalela Mobikisi lokola Mokambi na bango. Toyebi ete “moteyi oyo awuti na Nzambe”2 azalaki mingi koleka moteyi ya pete. Ye oyo ateyaki biso kolinga Nkolo Nzambe na biso na motema na biso mobimba, na milimo na biso mobimba na bokasi na biso mobimba, mpe na mayele na biso mobimba, mpe kolinga bazalani na biso lokola tomilingaka biso moko , azali Molakisi Moteyi mpe Ndakisa ya bomoi ya kobonga nie.

Azali oyo alobaki: “Boya, bolanda ngai.”3 “Napesi ndakisa mpo na bino.”4

Bobele kaka soki bobongwami

Yesu ateyaki mwa liloba ya pete oyo ezwami na Matai. Sima na Ye mpe bayekoli na Ye kokita na Ngomba ya Bobongwani, bapemaki na Galileya mpe sima bakendaki na Capernaum. Kuna bayekoli bayaki epai ya Yesu, na kotunaka:

“Nani azali na ntina koleka kati ya bokonzi ya lola ya Nzambe?

“Mpe Yesu abengaki mwana moke mpo na ye, mpe atiaki ye kati na bango,

“Mpe alobaki, Ya solo nayebisi bino, Kaka bobele soki bobwangani, mpe bokomi lokola bana mike, bokokota na bokonzi ya lola te.”5

Na Eklezia, ntina ya liteya ya nsango malamu ezalaka te ya kokotisa nsango na kati ya makanisi ya bana ya Nzambe, ekoki kozala na libota, na kelasi, to na misio. Ezalaka te ya kolakisa nini ezali boyebi ya baboti, bateyi, to misionele. Kasi ezali mpenza ya komatisa boyebi na ntina ya Mobikisi mpe Eklezia.

Ntina ya motuya ya liteya ezali ya kosunga bana mibali mpe ya basi ya Tata na Lola bazonga epai na Ye mpe basepela na Ye mpo na bomoi ya libela. Mpo na kosala yango, liteya ya nsango malamu esengeli kolendisa bango na nzela ya boyekoli ya mokolo na mokolo mpe ya mayokani ya bule. Ya motuya ezali ya komifulana mpo na kokanisa, koyoka, mpe sima kosala eloko moko na ntina ya mabongisi ya nsango malamu ya bomoi. Ntina ezali ya komatisa bondimi na Nkolo Yesu Klisto mpe kokoma mobongwami na nsango malamu na Ye.

Liteya oyo epambolaka mpe ebongolaka ezali liteya oyo elandaka ndakisa ya Mobikisi. Bateyi oyo balandaka ndakisa ya bolingo ya Mobikisi mpe basalisaka baoyo bango bateyaka. Bafulaka bayoki na bango na mateya ya seko ya bosolo ya bonzambe. Bazalaka na bomoi ya peto ya ndakisa.

Balingaka mpe basalisaka.

Mosala ya Mobikisi mobimba elakisaki bolingo ya mozalani. Ya solo, bolingo mpe mosala na Ye ezalaki mbala mingi liteya na Ye. Na lolenge wana, bateyi namikundoli malamu mingi koleka, bazalaki bateyi oyo bayebaki, balingaki, mpe babatelaki bayekoli na bango. Balukaki baoyo babungaki. Bateyaki mateya ya bomoi oyo nakomikundola ntango nionso.

Moteyi moko ya boye ezalaki Lucy Gertsch. Ayebaki moko na moko ya bayekoli na ye. Azangaki te kobenga baoyo bazalaki kozanga koya na mokolo ya Eyenga to baoyo bazalaki koya te. Nayebaki ete amitungisaki mpo na biso. Moko te kati na biso akobosana ye to mateya ateyaki.

Mibu ebele eleki, ntango Lucy akomaki pembeni ya kufa na ye, nakendaki kotala ye. Tomikundolaki mikolo wana kala mpenza yambo ntango azalaki moteyi na biso. Tolobaki na ntina ya moko na moko ya kelasi na biso mpe tosololaki mpo na oyo moko na moko azalaki kosala sikawa. Bolingo na ye mpe bolengeli ewumelaki mpo na ntango mobimba.

Nalingaka etinda ya Nkolo oyo ezwami kati ya Doctrine & Alliances:

“Napesi bino motindo ete bosengeli koteyana malongi ya bokonzi.

Boteya na etingya mpe ngolu na ngai ekozala na bino”6

Lucy Gertsch ateyaki na etingya mpo alingaki bosembo.

Alakisi Elikia mpe Bosolo

Apostolo Polo ateyaki “Bomilengela ntango nionso mpo na koyanola moto nionso oyo akotuna bino ntina ya elikia oyo ezali kati na bino.”7

Ntango mosusu elikia monene oyo moteyi akoki kolakisa ezali elikia oyo ezwami kati ya bosolo ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

“Mpe nini ezali oyo bolikielaka?” Mormon atunaki. “Tala nalobi epai ya bino ete bokozala na elikia na nzela ya Bomikabi ya Klisto Klisto mpe na nguya ya bosekwi bwa ye, mpo ya kosekwisama epai ya bomoi bwa seko, mpe eye na ntina ya bondimi bwa bino na ye engebene na elako.”8

Bateyi, bomatisa mingongo na bino mpe botatola bosolo ya lolenge ya Bonzambe. Bolobela litatoli na bino na ntina ya Buku ya Mormon. Bomema bosolo ya nkembo mpe ya kitoko oyo ezali kati ya mwango lobiko. Bosalela bisaleli endimama ya Eklezia, mingimingi makomi, mpo na koteya bosolo ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto na bopeto mpe bosembo na yango. Bomikundola etinda ya Mobikisi na “boluka makomi; mpo kati na yango bokanisi bozali na bomoi ya seko: mpe yango nde bokotatola na ntina na ngai.”9

Bosunga bana ya Nzambe basosola oyo ezali malamu mpe ntina na bomoi oyo. Bosunga bango bamatisa bokasi na bango ya kopona banzela oyo ekobatela bango na lolenge ya bozangi likama na nzela ya bomoi ya seko.

Boteya bosolo, mpe Molimo Mosanto akozala na bino.

“Boyekola epai na Ngai”

Mpo ete Yesu Klisto azalaki motosi ya kobonga nie mpe sembo na Tata na Ye, “amatisaki mayele mpe ntina, mpe na ntina ya Nzambe mpe moto.”10 Tozwi mokano ya kosala bongo? Kaka lokola Yesu Klisto “bozwa ngolu mpo na ngolu,”11 tosengeli kozala na motema ya kokita mpe na bompikiliki ya koluka pole mpe boyebi kowuta na Nzambe na nzela ya bokasi ya boyekoli ya nsango malamu.

Ezaleli ya koyoka ezali eloko ya ntina mpo na boyekoli. Ntango ya bolengeli mpo na koteyama, tosambelaka mpo na koluka bofulami mpe bondimami kowuta na Molimo Mosanto. Tomanyolaka, tosambelaka, tosengaka mateya ya nsango malamu, mpe tolukaka bolingi ya Tata mpo na biso.12

Yesu “ateyaki … makambo ebele na masese,”13 oyo esengaka matoyi ya koyoka, miso mpo na kotala, mpe mitema mpo na kososola. Ntango tozali na bomoi elongobani, tokoki koyoka malamu nungunungu ya Molimo Mosanto, oyo ekoki “kotangisa [biso] makambo nionso, mpe komema makambo nionso na [bokundoli] na biso.”14

Ntango toyanolaka na libiangi malamu ya Nkolo, “Boyekola epai na ngai,” Tokomaka bakaboli ya nguya na Ye ya bonzambe. Tika ete, na yango, tokende liboso na molimo ya botosi, kolandaka Ndakisa na biso na liteya lokola kaka Ye alingi biso toteya mpe koyekola.

Koteya uta na Etinda oyo

Mokambi Moson abengisi biso “tomanyola [bokasina] biso ya koteya mpe koyekola mpe kotalela Mobikisi lokola Mokambi na biso na kosalaka bongo.” Bosengeli koyeba koluka makomi na baoyo botalaka mpo na kozwa bomoni kati ya nzela oyo Yesu Klisto ateyaki mpe ayekolaki. Bokoki kobanda na mwa ndambo ya makomi oyo Mokambi Monson atalisaki, lokola na Matai 11:29, Yoane 5:30, mpe Malako 4:2. Bokoki kosolola boniboni boyekolaki na ntina ya Klisto ekoki kosunga bino “bokoma bakaboli ya nguya na Ye ya bozambe.”

Bimisa na lokasa