2016
Bana Basi ya Tata na Biso na Lola
sánzá ya mínei 2016


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Minei 2016

Bana Basi ya Tata na Biso ya Seko

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni kososola “Libota: Esakola na Mokili” ekobakisa bondimi na bino kati na Nzambe mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Makomi eteyi biso ete “tozali bana ya Nzambe” (Misala 17:29). Nzambe abengaki Emma Smith, mwasi ya Profeta Joseph Smith, “mwana na ye ya mwasi” (D&A 25:1). Esakola ya Libota eteyi biso ete tozali moko na moko “molimo ya bolingo … mwana mwasi ya baboti ya lola.”1

“Na ezaleli na biso [yambo ya mbotama], toyekolaki oyo etali bomoto na biso ya bomwasi ya seko,” elobaki Carole M. Stephens, mopesi toli ya yambo na bokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi.

“Mobembo na biso na bokufi na mabele ebongolaki bosolo wana te.”2

“Tata na bino na Lola ayebi nkombo na yo mpe ayebi makambo na yo,” elobaki Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. “Ayokaka nsambo na yo. Ayebi baelikya mpe bandoto na yo, kobakisa bobangi mpe mitungisi na yo.”3

“Moko na moko na biso azali kati na mpe asengeli na libota ya Nzambe,” elobaki Ndeko mwasi Stephens. “Mabota ya mabele nionso ekeseni. Mpe ntango tozali kosala malamu mingi oyo tokoki mpo na kokela mabota esengeli ya makasi, kozala moko na libota ya Nzambe etali te lolenge ya ezalela songolo—kozala ya kobala, kozala moboti, kozala na mosolo, esika na biso na lingomba, to kutu lolenge ya ezalela oyo tokomanaka na bato na internet.”4

Makomi ya Kobakisa

Yilimia 1:5; Baloma 8:16; Doctrine et Alliances 76:23-24

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Na lisolo ya Limoni ya Yambo,5 Profeta Joseph Smith aluki koyeba babosolo mingi—lokola oyo elobi ete Tata na biso ya Lola ayebi nkombo na biso.

Elenge Joseph abundaki mpo na koyeba na eklezia nini asengelaki kokota mpe azwaki bokambami na Yakobo 1:5. Joseph asukisaki ete akotuna Nzambe.

Na ntongo moko ya eleko ya moi moke na 1820, akendaki na zamba mpo na kosambela kasi nokinoki asimbamaki na nguya moko ya molili. Na yango akomaki ete:

“Kaka na ngonga oyo ya likama monene namonaki likonzi ya pole kaka likolo ya moto na ngai kongenga koleka moyi, oyo ekitaki malembe malembe kino kokita likolo na ngai.

“Emonanaki kala mingi te nde namimonaki ngaimei ya kokangolama uta na monguna oyo akangisaki ngai. Ntango pole yango ezalaki likolo na ngai namonaki Bato mibale, oyo ya bango bongengi mpe nkembo ekoki kolimbolama te, kotelemaka likolo na mopepe. Moko na bango alobaki na ngai, kobiangaka ngai na nkombo mpe alobaki, kolakisaka na mosusu —Oyo azali Mwana wa Ngai wa Bolingo Yokela Ye!” (Joseph Smith—Mambi ma Kala 1:16–17).

Matangi

  1. “Libota: Esakola na Mokili,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2010, 129.

  2. Carole M. Stephens, “Libota Ezali ya Nzambe,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 11.

  3. Jeffrey R. Holland, “To Young Women,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2005, 28.

  4. Carole M. Stephens, “Libota Ezali ya Nzambe,” 11.

  5. Tala Gospel Topics, “First Vision Accounts,” topics.lds.org.

Botala oyo.

Lolenge nini koyeba ete ozali mwana mwasi ya Nzambe ezali kosala mikano na yo?

Bimisa na lokasa