2016
Lisakoli mpe Bobimisi ya Moto Ye Moko
sánzá ya mínei 2016


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Minei 2016

Lisakoli mpe Bobimisi ya Moto ye Moko

Eklezia ya Solo ya Yesu Klisto ezongisama mpe ezali na mabele lelo. Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ekambami ntango nionso na baprofeta mpe bapostolo, baye bazwaka ntango nionso bokambami uta na lola.

Ndakisa ya bonzambe wana ezalaki lisusu ya solo na kala. Totangi na Biblia: “Solo Nkolo Nzambe akosala likambo te, soki akobimisa sekele na ye te na basali na ye baprofeta” (Amosa 3:7).

Nzambe alobaki lisusu na ntango na biso, na nzela ya Profeta Joseph Smith. Abimisaki na nzela ya Profeta Joseph nsango malamu ya Yesu Klisto na mobimba na yango. Azongisi bonganganzambe na Ye elongo na bafungola mpe makoki, banguya, mpe misala na yango nionso ya nguya ya bule ya bonganganzambe.

Na ntango na biso, baprofeta mpe bapostolo na bomoi bapesami ndingisa ya koloba, koteya, mpe koyangela na likoki ewuti na Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu Klisto. Mobikisi alobaki na Profeta, “Maye Ngai Nkolo nalobi, nalobi, mpe nakobongwana te, atako balola mpe mabele ekoleka, liloba na ngai ekoleka te, kasi ekokokisama nionso, soki na mongongo na ngaimei to na mongongo ya basali na ngai, ezali ezali lolenge moko” (D&A 1:38).

Kati na likita linene ya mbala ya mibale na mobu, topambolami na libaku ya koyoka liloba ya Nkolo mpo na biso uta na basali na Ye. Wana ezali litomba eluti ntalo. Kasi motuya ya libaku wana eyekami likolo ya soki toyambi maloba na nse ya nguya ya Molimo se moko wana na nzela yango epesamelaki epai ya basali wana (tala D&A 50:19–22). Kaka lokola bazwaka bokambami uta na lola, biso mpe tosengeli bongo. Mpe yango esengi biso bokasi ya molimo moko wana.

“Sala Mosala na Yo”

Mibu mingi eleki moko ya baye Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale asengaki ngai natanga lisikulu ya likita moko oyo ye azalaki kolengela mpo na likita linene. Nazalaki moko ya elenge ya lisanga likoki. Napesamaki lokumu na nzela ya bondimi na ye ete nakokaki kosalisa ye kozwa maloba Nkolo alingaki ye aloba. Alobaki na ngai na koseka moke, “O, oyo ezali mbala ya 22 ya komeka lisikulu oyo.”

Nakanisaki toli Mokambi moko ya bolingo mpe boboto Harold B. Lee (1899–1973) apesaka ngai liboso kobetaka nsete makasi: “Hal, soki olingi kozwa bobimisi, sala mosala na yo.”

Natangaki, namaniolaki, mpe nasambelaki mpo na komeka wana ya mbala ya 22. Nayekolaki malamu lokola ekokaki ngai na nguya ya Molimo Mosantu. Na ntango moto ya lisanga likoki wana apesaki lisikulu na ye, nasalaki mosala na ngai. Namituni soki nasalaki, kasi nayebi ete nabongwanaki ntango nayokaki lisikulu kopesama. Bitinda eyaki epai na ngai mosika koleka maloba oyo natangaka mpe oyo alobaki. Maloba ezalaki na ntina makasi koleka oyo natangaki ntango nakomaki wana. Mpe etinda emonanaki lokola kolobela ngai moko, ya kokokana na bamposa na ngai.

Basali ya Nzambe bakilaka mpe basambelaka mpo na kozwa etinda oyo Azali na yango mpo na baoyo bazali na mposa ya bobimisi mpe bofulami. Maye nayekolaki uta na likambo wana, mpe misusu mingi lokola yango, ezali ete mpo nakozwa matomba minene epesami na koyokaka baprofeta mpe bapostolo na bomoi, tosengeli kofuta ntalo bisomei ya kozwa bobimisi.

Nkolo alingi moto nionso akoka koyoka etinda na Ye, mpe Ayebi mitema mpe makambo ya moko na moko. Ayebi bosemboli nini, bolendisi nini, mpe bosolo ya nsango malamu nini ekosalisa malamu mingi moto moko na moko mpo na kopona nzela na ye ya kotambola mpo na kokende na bomoi ya seko.

Biso baye toyokaka mpe totalaka bansango ya likita linene ntango mosusu tokanisaka na nsima, “Nini namikundoli malamu mingi?” Elikya ya Nkolo mpo na moko na moko na biso ezali ete eyano na biso ekozala: “Nakobosana mokolo moko te bangonga oyo nayokaki mongongo ya Molimo na bongo mpe motema na ngai koyebisaka ngai maye nakoki kosala mpo na kosepelisa Tata na ngai ya Lola mpe Mobikisi.”

Tokoki kozwa bobimisi ya moto ye moko ntango tozali koyoka baprofeta mpe bapostolo mpe wana ezali biso kosala na bondimi mpo na kozwa yango, kaka lokola Mokambi Lee alobaki tokoki. Nayebi ete yango ezali solo uta na boyebi mpe na nzela ya litatoli ya Molimo.

Koteya uta na Etinda Oyo

Kanisa kotanga na mongongo makasi lisolo ya Mokambi Eyring oyo etali boyekoli komeka ya lisikulu ya likita ya moko ya lisanga likoki na ye . Okoki kotuna, “Ntalo ya kozwaka bobimisi ezali nini?” Nsima ya lisolo na bino, okoki kobengisa baye bokeyi kotala bamaniola mpe basalela mwango moko mpo na kozwa bitinda ya likita linene oyo ekoya “na nguya ya Molimo se moko wana na nzela na yango epesamelaki epayi ya basali [ya Nzambe].”

Bimisa na lokasa