2016
Tata ya Lola Alobaki epai na Ngai na nzela ya Lisikulu ya Likita moko
sánzá ya mínei 2016


Bilenge

Tata ya Lola Alobaki epai na Ngai na Nzela ya Lisikulu ya Likita Moko

Mokomi afandi na Sergipe, Brazil.

Nazalaki na bantembe na oyo etali maye nasengelaki koyekola na université. Bato mingi balobaki mabe na oyo etali mateya oyo nalingaki koyekola, yango wana nasambelaki Nkolo mpo na koyeba soki Andimaki mokano na ngai.

Eyano na ngai eyaki mokolo ya nsima ntango nazalaki kotanga lisikulu ya likita linene na Liahona. Nayokaki lokola soki Tata ya Lola azalaki koyebisa ngai ete Akokaki kopona mpo na ngai te—oyo ezalaki mokano oyo nasengelaki kozwa ngai moko. Nayebaki ete ata naponi nini, nasengelaki kosala makasi mpo na kolonga.

Nayebaki ete losambo na ngai eyanolamaki. Bondimisami na Molimo Mosantu esalisaki ngai nazwa mokano. Nayekoli kopesa bokasi na ngai ya malamu mingi mpe nayebi ete Tata ya Lola akosalisa ngai.

Bimisa na lokasa