2016
Makuli mpe Mayokani ya Tempelo
Sanza ya Motoba 2016


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Motoba 2016

Makuli mpe Mayokani ya Tempelo

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososola “Libota: Esakola na Mokili” ekobakisa bondimi na bino na Nzambe mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Makuli nyonso ya ntina mpo na libiki mpe bonetolami etambolaka nzela moko na mayokani na Nzambe. “Kosalaka mpe kobombaka mayokani elakisi kopona kokangama biso moko na Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klisto,” elobaki Linda K. Burton, mokambi monene ya Lisanga ya Bamama Basungi.1

Mpaka Neil L. Andersen ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobaki ete, “Nkolo alobaki, ‘Na makuli … nguya ya bompikiliki emonisami.’

“Ezali na mapamboli na ndenge mosusu kowuta na Nzambe mpo na bato nyonso oyo balongobani mpe oyo babatisami, bazui Molimo Mosantu mpe bazali kolia elambo mbala na mbala.”2

“Ntango mibali mpe basi bakei na tempelo,” elobaki Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, “bazali nyonso na epakolami elongo na nguya ya ndenge moko, oyo ezali nguya ya bonganganzambe …

“… Mibali nyonso mpe basi nyonso bazali na makoki ya kozwa nguya oyo mpo na kosalisa kati na bomoi na biso moko. Moto nyonso oyo asalaki mayokani ya bule na Nkolo mpe oyo akumisi mayokani yango abongisami koyamba emoniseli ya ye moko mpenza, kopambolama na mosala ya banzelu, kosangana na Nzambe, koyamba botondisami ya nsango malamu, mpe, na nsuka ya nyonso kokoma pembeni ya Yesu Klisto na nyonso Tata azali na yango.”3

Makomi ya Kobakisa

1 Nefii 14:14; Doctrine et Alliances 25:13; 97:8; 109:22

Masolo ya Solo

Na 2007, mikolo minei sima ya koningana ya mabele ya makasi na Peru, Mpaka Marcus B. Nash ya bantuku nsambo akutanaki na mokambi ya etape Wenceslao Conde mpe muasi na ye, Pamela. “Mpaka Nash atunaki ndeko Muasi Conde boni bana na ye ya mike bazalaki. Na kosekaka, ye azongisaki ete na nzela ya bolamu ya Nzambe bango nyonso bazalaki na kimia mpe malamu. Ye atunaki oyo etali ndako ya ba Conde.

“‘Yango ekendaki,’ ye alobaki na pete nyonso.

“… Mpe sima,’ Mpaka amonaki, ‘ozali koseka ntango tozali kosolola.’

“‘Iyo,’ ye alobaki, ‘nasambelaki mpe nazui kimia. Tozali na nyonso tosengeli na yango. Tozali na moko mpe mosusu, tozali na bana na biso, tokangemaki na tempelo, tozali na eklezia kitoko, mpe tozali na Nkolo. Tokoki kotonga na lisungi ya Nkolo.’ …

“Nini ezali ntina ya kosalaka mpe kobombaka mayokani na Nzambe oyo epesi biso nguya ya koseka kati ya bampasi, kobongola mikakatano na elonga … ?”

“Liziba ezali Nzambe. Nzela mpo na kokoma na nguya wana ezali na nzela ya mayokani na biso na Ye.”4

Matangi

  1. Linda K. Burton, “The Power, Joy, and Love of Covenant Keeping,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2013, 111.

  2. Neil L. Andersen, “Power in the Priesthood,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2013, 92.

  3. M. Russell Ballard, “Men and Women in the Work of the Lord,” Liahona, Sanza ya Minei. 2014, 48–49.

  4. See D. Todd Christofferson, “The Power of Covenants,” Liahona, Sanza ya Mitano 2009, 19, 20–21.

Bolanda Oyo

Lolenge nini makuli mpe mayokani ya tempelo ekopesa biso makasi mpe nguya ?

Bimisa na lokasa