2016
Botongono na Bondimi na Bango
sánzá ya nsambo 2016


Bilenge

Botongono na Bondimi na Bango

Mokambi Monson alobi oyo etali libota ya pionie moko mpe nsima atangi Mokambi George Albert Smith: “Bokozala na botongono na bondimi ya bankoko na bino? … Bobunda mpo na kolongobana na mabonza nionso [bango] basalaki mpo na bino.” Atako bozali na nkoko moko ya pionie to mondimi moko ya nkola ya yambo ya Eklezia, ezali bino koluka bandakisa ya bondimi mpo na bokambami mpe bokasi? Tala lolenge malamu oyo bokoki kobandela:

1. Bosala molongo ya bato oyo bosepelaka na bango. Bakoki kozala bato ya libota na binomei (ya kala to ya sika), baninga, bakambi ya Eklezia, to bato kati na makomi.

2. Bokoma mabongi bazali na yango oyo bolingaka. Mama na bino azali motema molai? Ntango mosusu moninga na bino azali boboto na basusu. Ntango mosusu bolingaka nkonzo ya Kapiteni Moroni.

3. Zwa libongi moko uta na molongo na yo mpe mituna, “Boniboni nakoki kozwa libongi oyo? Nini nasengeli kosala mpo na kokolisa yango na bomoi na ngai?”

4. Bokoma miango na bino mpo na kokolisa libongi oyo mpe botia yango esika songolo oyo bokomona yango mbala mingi, mpo na kokundolisa bino lotomo na bino. Bosambela mpo na lisalisi ya Tata na Lola mpe bokoma bokoli na bino ntango nionso. Soki bomiyoki ete bokolisi mpenza libongi oyo, bokoki kozwa libongi ya sika mpo na kosalela.

Bomikundola ete wana ezali biso kokolisa mabongi minene kati na bisomei, tozali kaka te kopesa lokumu na bondimi ya bankoko na biso mpe mabonza basalaki te, kasi tokoki lisusu kozala nguya mpo na malamu na baye bazali zingazinga na biso.

Bimisa na lokasa