2016
Likoki na Biso mpo na Kimoboti
sánzá ya nsambo 2016


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Sambo 2016

Likoki na Biso mpo na Kimoboti

Na losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni kososola “Libota: Esakola na Mokili” ekomatisa bondimi na bino na Nzambe mpe epambola baye bobatelaka na nzela ya mateya ya botali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

“Ezalaki na ntina ete bana ya molimo ya Nzambe bazwa na mbotama na bokufi mpe na libaku ya kokola na bomoi ya seko,” eteyaki Mpaka Dallin H. Oaks ya Lisanga likoki ya Babostolo Zomi na Mibale. “Mpo na ntina monene mingi ya mwango monene ya esengo, nakanisi ete babomengo ya motuya likolo ya mabele mpe kati na lola ezali bana na biso mpe bakitani na biso.”1

Mpaka Robert D. Hales ya Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale alobaki:

Tondimelaka mabota, mpe tondimelaka bana. …

“‘… Nzambe alobelaki [Adama mpe Ewa] ete, Bobotana mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili’ [Genese 1:28]. …

“Motindo oyo tobosani to etiami pembeni te na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.”2

Atako banso na biso te tokomaka baboti na bomoi oyo, tokoki kobokola bana ya mibu nionso. Tosepelaka na mapamboli ya kozalaka eteni ya libota ya Tata na Lola, mpe tokutanata na baesengo mpe mikakatano ya kozalaka eteni ya libota na mabele. Mpe mpo na mingi, kimoboti ezelaka bango na baboseko oyo ezali liboso.

Makomi ya Kobakisa

Nzembo 127:3; Matai 18:3–5; 1 Nefi 7:1; Moses 5:2–3

Masolo ya Solo

“Mingongo mingi na mokili lelo ezali kotala mpamba motuya ya kozalaka na bana to bazali kopesa makanisi ya kozelisa to kotiaka ndelo ya motango ya bana kati na libota,” elobaki mpaka Andersen. “Mwana na ngai ya mwasi kala te atindelaki na lidolo ya Interneti ekomama na mama ya Moklisto moko (ya bondimi na biso te) oyo azali na bana mitano. Alobaki ete: ‘[Kokolaka] na bonkoko oyo, ezali mpasi mpenza ya kozwa mayele ya bibilia na ntina ya bomama. … Bana bazali mosika na nse ya koyekola. Na nse ya mobembo ya mokili solo. Na nse ya likoki ya kobima na butu mpo na lisano na yo. Na nse ya kobongisa nzoto na bino na ndako ya ngalasisi. Na nse ya mosala kani okoki kozala na yango to elikia kozwa.’ Nsima abakisi ete: ‘Bomama ezali lisano te, ezali libiangi. Bozwaka bana te mpo bozali komona bango kitoko koleka batembele. Ezali eloko moko te ya kosala soki bokoki kofina bango soki bozwi ntango. Ezali mpo na yango Nzambe apeselaki bino Ntango.’”3

Notes

  1. Dallin H. Oaks, “The Great Plan of Happiness,” Ensign, Nov. 1993, 72, 75.

  2. Neil L. Andersen, “Children,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2011, 28.

  3. Neil L. Andersen, “Children,” 28.

Botala Oyo

Na ndenge nini libota na biso na mabele ezali lokola libota na lola?

Bimisa na lokasa