2016
Botongono na Bondimi ya Bankoko na Biso
sánzá ya nsambo 2016


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Nsambo 2016

Botongono na Bondimi ya Bankoko na Biso

John Linford azalaki na mibu 43 ntango ye mpe mwasi na ye, Maria, mpe bana na bango ya mibali misato bazwaki mokano ya kotika ndako na bango na Gravely, Angleterre, mpo na kokende mobembo bankoto ya bakilometele mpo na kosangana na Basantu na lubwaku ya Great Salt Lake. Batikaki nsima mwana na bango ya mobali ya minei, oyo azalaki kosala misio, kotekaka biloko na bango, mpe bazwaki nzela na Liverpool kati na masuwa Thornton.

Mobembo na nzela ya mbu tii na New York City, mpe uta kuna na nzela ya mabele tii na Iowa, ezali na nkpokoso te. Nzokande, mibulu ebandaki moke nsima ba Linfords mpe Basantu ya Mikolo ya Nsuka oyo bananaka na Thornton batikaki Iowa City na sanza ya nsambo 15, 1856, lokola ndambo ya bato ya kompani ya balokalo ya maboko ya James G. Willie ya nsango mabe.

Eleko ya mpasi mpe mobembo ya mindondo ememaki bokono mpe liwa ya mingi kati na kompani, lokola John. Na nsuka akomaki na bokono mpe botau mpenza ete esengelaki babenda ye na likalo ya maboko. Na ntango kompani ekomaki na Wyoming, ezalela na ye ebebaki mpenza. Ekipi ya kobikisa uta na Salt Lake City ekomaki na sanza ya zomi 21, mwa bangonga nsima ya nsuka ya mobembo ya kufa ya John. Akufaka na ntongontongo wana pembeni ya mabongo ya Sweetwater River.

Ezalaki John na mawa ete atekaka elengi mpe bopete mpo na bitumba, bomipimi, mikakano ya kokamata libota na ye na Siona?

“Te, Maria,” ye alobaki na mwasi na ye kaka liboso akufa. “Nazali na esengo ete toyaki. Nakozala na bomoi te mpo na kokoma na Salt Lake, kasi yo mpe bilenge mibali bokokoka, mpe nazali mpenza na mawa te mpo na oyo eyeli biso soki bana na biso ya mibali bakoki kokola mpe kobokola mabota na bango na Siona.”1

Maria mpe bana na ye ya mibali basilisaki mobembo na bango. Ntango Maria akufaki penepene na mibu 30 nsima, ye mpe John batikaki nsima lisango ya bondimi, ya mosala ya bomipesi, mpe ya libonza.

Kozala Mosantu ya Mokolo ya Nsuka esengeli kozala pionie, mpamba te ndimbola ya pionie ezali “moko oyo akendaka liboso mpo na kolengela mpe kofungola nzela mpo ete basusu balanda.”2 Mpe kozala pionie ezali komesana na komibonza. Atako bandimi ya Eklezia basengeli lisusu kotika bandako na bango te mpo na kosala mobembo mpo na kokende na Siona, basengeli mbala mingi kotika nsima mimesano ya kala, babonkoko ewumeli mingi, mpe baninga ya bolingo. Basusu bazwaka mikano ya mpasi kotika nsima baye libota oyo bazali kotelemela kimondimi na bango ya Eklezia. Basantu ya Mikolo ya Nsuka bakendaka liboso, nzokande, kosambelaka ete bandeko ya motuya bakososola lisusu mpe kondima.

Nzela ya pionie ezali pete te, kasi tolandaka kati na matambe Pionie aluti—kutu Mobikisi—oyo akendaki liboso, kolakisaka biso nzela ya kolanda.

“Yaka, kobila ngai,”3 Abengisaki.

“Nazali nzela, bosolo, mpe bomoi,”4 Alobaki.

“Yaka epai na ngai,”5 Abengaki.

Nzela ekoki kozala na mimekano. Basusu bamonaka yango mpasi mpo kokoka litio mpe makebisi ya solo ya bandeko ya zoba oyo basekaka bopeto ya nzoto, bosembo, mpe botosi ya mitindo ya Nzambe. Mokili ekitisi ntango nionso kokangama na imobeko. Ntango Noa apesamaki malako mpo na kotonga masuwa, bato ya zoba batalaki likolo ezanga mapata mpe nsima basekaki mpe bawololaki—kino mvula eyaki.

Na mokili ya Amelika bikeke eleki kala, bato batiaki ntembe, baswanaki, mpe bazangaki kotosa kino moto ezikisaki Zalayemila, mabele ezipaki Moronihah, mpe mai ezindisaki Moroni. kowololi, koseka,maloba ya soni, mpe lisumu ezalaki lisusu te. Ekitanisamaki na kimia ya mbalakaka, molili makasi. Motema molai ya Nzambe esilaka, manaka na Ye ekokisamaki.

Maria Linford mokolo moko te abungisaki bondimi na ye atako monioko na Angleterre, mikakatano ya mobembo na ye epai ya “esika oyo Nzambe … alengelaki,”6 mpe mimekano elandaki oyo aniokwamaki mpo na libota na ye mpe Eklezia.

Na molulu pembeni ya lilita na 1937 oyo esalamaki mpo na bokundoli Maria, Mpaka George Albert Smith (1870–1951) atunaki bakitani na ye: “Bokozala na botongono na bondimi ya bankoko na bino? … Bokobunda mpo na kolongobana na ntina ya mabonza nionso [bango] basalaki mpo na yo.”7

Wana ezali biso kobunda kotonga Siona na mitema na biso, na bandako na biso, na mangomba na biso, mpe na bikolo na biso, tika tomikundola mpiko ya sikisiki mpe bondimi ewumela ya baoyo bapesaki nionso ya bango ete tokoki kosepela na mapamboli ya nsango malamu ezongisami, elongo na elikia mpe elaka na yango na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Matangi

  1. Tala Andrew D. Olsen, The Price We Paid (2006), 45–46, 136–37.

  2. The Compact Edition of the Oxford English Dictionary (1971), “pioneer.”

  3. Luka 18:22.

  4. Yoane 14:6.

  5. Yoane 7:37; tala lisusu 3 Nefi 9:22.

  6. “Come, Come, Ye Saints,” Hymns, no. 30.

  7. Tala Olsen, The Price We Paid, 203–4.

Koteya uta na Etinda Oyo

Bokanisa kotuna baye bozali koteya bakanisa bato oyo na bomoi na bango bakeyi liboso mpe bazali bapionie mpo na bango. Nsima botuna bango ntango nini basengelaki kozala bapionie mpe kolengele nzela mpo na basusu. Bengisa bango bamaniola bangonga oyo basengelaki kobonzela mpe mpo na nini elongobanaki. Bokoki nsima komeka bango bakoma litatoli na bango ya “Pionie aluti,” Mobikisi.