2016
Mapamboli ya Botosi
sánzá ya zómi 2016


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Zomi 2016

Mapamboli ya Botosi

“Liteya monene tokoki koyekola na kufa,” Mokambi Thomas S. Monson ateyaki, “ezali ete ntango Nzambe alobaka mpe totosi, tokozala ntango nyonso malamu.”1

Tokozala lisusu ya kopambolama. Ntango Mokambi Monson alobaki na likita linene eleki kala te: “Ntango totosaka mitindo, biso moko tokozala na esengo koleka, koleka bokokisi, mpe mikakatano mike. Mimekano mpe makambo na biso ekozala pepele mpo na komema, mpe tokozwa mapamboli elakama ya [Nzambe].”2

Na matangi malandi ya mosala ya Mokambi Monson, ntango Mokambi ya Eklezia, ye akundolisi biso ete mitindo ezali bokambami ya solo koleka na esengo mpe kimia.

Bokambami mpo na Mobembo

“Mitindo ya Nzambe etiami mpo na kobangisa biso te to mpo ete ekoma makama mpo na esengo na biso te. Bobele ngambo mosusu ezali bosolo. Ye oyo akelaki biso mpe oyo alingaka biso na bobongi nie ayebi lolenge nini tosengeli kozala na bomoi na ntina ete tozwa esengo monene. Atiaki kati na biso mateya oyo, soki tolandi yango, ekokamba biso na kimia na nzela ya mobembo ya kufa oyo ezali ntango nyonso likama. Tokanisaka maloba ya loyembo ya lolenge moko: “Pour trouver la paix! Kati na yango ezali na bobatelami; kati na yango ezali na kimia [tala “Pour trouver la paix,” Cantique, no. 194].”3

Bokasi mpe Boyebi

Botosi ezali elembo ya baprofeta; yango epesi bango bokasi mpe boyebi o ntaka ya bikeke. Ezali na ntina monene mpo na biso koyeba ete biso, mpe lokola, tozali na likoki ya kokoka na liziba oyo ya bokasi mpe boyebi. Ezali komonana mpo na moko na moko na biso lelo ntango totosi mitindo ya Nzambe. …

“Boyebi oyo tozali koluka, biyano oyo tozali na yango mposa, mpe bokasi oyo tozali na yango mposa lelo mpo na kotelemela mikakatano ya mokili kilikili mpe ya mbongwana ekoki kozala ya biso ntango totosi na bolingi mitindo ya Nkolo.”4

Bopona Kotosa

“Bowumeli ya bantango na biso ezali ya botosi. Mikanda mpe batelevizio ezali kolakisa kitoko ya bizaleli na bitando, bilombe ya bato na masano—baoyo bazali mingi mingi bilenge bazali na mposa ya kolanda—ntango bazali kozanga kotosa mitindo ya Nzambe mpe bamipesi mobimba na masumu, ntango mosusu na bozangi makama. Boye te! Ezali na ntango ekoya tokosambisama—lokola kilo ya motango. Moto nyonso na mokili—soki na bomoi oyo te, sima na bomoi ekoya. Mokolo ya Esambiselo ekoya mpo na bato nyonso. … Nabondeli bino bopona kotosa.”5

Esengo mpe Kimia

“Bokoki kokanisa ete baye bazali kosalela bisengo ya mokili bazali na esengo koleka bino. Mingi kati na bino bakoki kolemba na makambo ya Eklezia ezali kosenga. Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, nayebisi bino, bongo, ete ezali na eloko moko oyo ekoki komema esengo koleka na babomoi na biso to kimia koleka na milimo na biso koleka Molimo oyo ekoki koya epai na biso ntango tolandi Mobikisi mpe totosi mitindo.”6

Kotambola na Bosembo

“Natatoli epai na bino ete, mapamboli na biso elakama ezali koleka ndelo. Atako mbonge ya mapata esangani, atako bamvula enokeli biso, boyebi na biso ya nsango malamu mpe bolingo na biso ya Tata na biso ya Lola mpe ya Mobikisi na biso ekolendisa biso mpe kosunga biso mpe komemela biso esengo na mitema ntango totamboli sembo mpe totosi mitindo. Ekozala na eloko moko te kati na mokili oyo ekoki kokweyisa biso.”7

Bolanda Mobikisi

“Nani azalaki Moto oyo ya mawa, oyo amesenaki na mpasi”? Nani azali Mokonzi oyo ya nkembo, Nkolo oyo ya bankolo? Azali Molakisi na biso. Azali Mobikisi na biso. Azali Mwana ya Nzambe. Azali Mosali ya Lobiko na biso. Azali kobianga na kolakisaka nzela, ‘Bolanda ngai.’ Ateyaka ete, ‘Bokende, mpe bosala lolenge moko.’ Asengi ete, ‘Botosa mitindo na ngai.’

“Tika tolanda Ye. Tika tomekola ndakisa na Ye. Tika totosa maloba na Ye. Na kosalaka bongo, topesaka Ye likabo ya bonzambe ya botondi.”8

Matangi

  1. “They Marked the Path to Follow,” Liahona, Sanza ya Zomi. 2007, 5.

  2. “Botosa Mitindo,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2015, 83.

  3. “Botosa Mitindo,” 83.

  4. “Botosi Ememaka Mapamboli,” Liahona, Sanza ya Mitano 2013, 90, 92.

  5. “Believe, Obey, and Endure,” Liahona, Sanza ya Mitano 2012, 129.

  6. “Stand in Holy Places,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2011, 83.

  7. “Be of Good Cheer,” Liahona, Sanza ya Mitano 2009, 92.

  8. “Finding Joy in the Journey,” Liahona, sanza ya Zomi na moko 2008, 88.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Monson ateyi biso na ntina ya mapamboli ebele tokoki kozwa na kotosaka, mpe lisusu bokasi, boyebi, esengo, mpe kimia. Banzaka kotuna baoyo bozali koteya boniboni bango bapambolamaki ntango batosaki mitindo. Bosengeli kolendisa bango bakoba kobanza mapamboli na bango mpe bakoma kati ya zulunale makanisi na bango mpe misala. Bosengeli lisusu kolendisa bango balakisa botondi na bango epai ya Nzambe mpo na mapamboli na bango na kokobaka kozala na botosi.

Bimisa na lokasa