2016
Libota Etindami na Nzambe
sánzá ya zómi 2016


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali Sanza ya Zomi 2016

Libota Etindami na Nzambe

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososola “Libota: Esakola na Mokili” ekobakisa bondimi na bino na Nzambe mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

“Na maloba ya [loyembo ya eteyelo ya bana], ‘Libota ezali ya Nzambe,’ … tokundolisami na malongi ya peto,” elobaki Carole M. Stephens, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. “Toyekolaka kaka te ete libota ezali ya Nzambe kasi lisusu ete tozali banso moko na moko eteni ya libota ya Nzambe. …

“… Moango ya Tata mpo na bana na Ye ezali moango ya bolingo. Ezali moango ya kosangisa bana na Ye—libota na Ye—elongo na Ye.”1

Mpaka L. Tom Perry (1922–2015) ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobaki: “Tondimi lisusu ete mabota ya makasi endimama ezali kaka te eteni ya yambo ya mangomba ya sikisiki ya bato, mombongo ya sikisiki, mpe mimesano ya sikisiki ya mituya—ete ezali lisusu eteni ya yambo ya boseko mpe ya bokonzi mpe boyangeli ya Nzambe.

“Tondimi ete libongisi mpe boyangeli ya lola ekotongama nzinganzinga na mabota mpe mabota ya minene.”2

“Moto nyonso, kotalaka te lolenge nini makambo ya libala na bango to motango ya bana, akoki kozala mobundeli ya moango ya Nkolo oyo etalisami na Lisakola ya libota,” elobaki Bonnie L. Oscarson, Mokambi Monene ya Bilenge Bamama. Soki ezali moango ya Nkolo, esengeli kozala mpe moango na biso!”3

Makomi ya Kobakisa

Doctrine et Alliances 2:1–3; 132:19

Malongi ya Libota

Ndeko mwasi Julie B. Beck, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi ya kala, ateyaki ete teoloji ya libota eyekami mingi mingi na Bokeli, Bokwei, mpe Bomikabi ya Yesu Klisto:

“Bokeli ya mabele epesaki esika epai oyo mabota ekokaki kofanda. Nzambe asalaki mobali mpe mwasi baoyo bazalaki bikelamu mibale ya ntina ya libota. Ezalaki eteni ya moango ya Tata ya Lola oyo Adama mpe Ewa bakangama mpe basala libota ya seko.

“… Bokwei epesaki yango nzela mpo bango babota bana mibali mpe bana basi.

“Bomikabi ya [Klisto] epesaka nzela ya bokangami ya libota elongo mpo na libela na libela. Epesaka nzela na mabota ezwa bokoli ya seko mpe bobongi nie. Moango ya esengo, ebiangami lisusu moango ya lobiko, ezalaki moango ekelamaki mpo na mabota. …

“… Oyo ezalaki malongi ya Klisto. … Na bozangi libota, moango ezali te; ntina ya bomoi ya kufa ezali te.”4

Matangi

  1. Carole M. Stephens, “Libota Ezali ya Nzambe,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 11, 13.

  2. L. Tom Perry, “Mpo na nini Mikakatano na Libala mpe Libota—Bisika nyonso na mokili,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 41.

  3. Bonnie L. Oscarson, “Balobeli ya Esakola na Libota,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 15.

  4. Julie B. Beck, “Teaching the Doctrine of the Family,” Liahona, Sanza ya Misato. 2011, 32, 34.

Tala Motuna Oyo

Mpo na nini libota ezali lisanga ya ntina mingi na ntango mpe na seko?

Bimisa na lokasa