2018
Komilengelaka mpo na Koyoka Mongongo ya Nzambe
March 2018


Bilenge

Komilengelaka mpo na Koyoka Mongongo ya Nzambe

Mokambi Uchtdorf alimboli lolenge nini eloko ya yambo Nzambe asalaki nsima ya kokela mobali mpe mwasi ezalaki ya koloba na bango mpe kopesa bango nsango malamu mingi koleka mpe makebisi. Tozwaka lipamboli ya lolenge moko na Sanza ya Minei mpe ya Zomi na ntango ya likita linene, ntango bakambi ya Eklezia bateyaka biso mpe bapesaka biso toli oyo Nkolo alingi biso toyoka.

Boyoka naino mongongo ya Nzambe na nzela ya basali na Ye na ntango ya likita linene? Oyoka naino nsango moko songolo kopesaka yo eyano oyo ozalaki koluka uta kala? Na kati na zulunale, okoki kokoma boyebi wana mpe lolenge nini yango esalisaki yo. Nsima milengela mpo na koyoka mongongo ya Nkolo na likita oyo ezali koya na kokomaka mituna oyo ozali na yango mpe koyekolaka yango na ntango ya boyekoli na yo ya makomi. Kosambela epai ya Tata na Lola, kosengaka mpo na kozwa biyano mpe bomoni na ntango ya likita. Ntango ozali koyoka na basali ya Nkolo, bokebi ezala na bososoli na yo moko. Nini oyekolaki? Boniboni omiyokaki ya kofulama mpo na kobongwama? Koma mayoki wana mpo ete yango ezali Molimo kolobelaka yo!

Mikundolaka ntango nyonso ete Tata na Lola alingaka yo mpe akokamba yo na nzela malamu. Ntango oluki oyoka mongongo na Ye na nzela ya basaleli na Ye, okopambolama mpe kolendisama.

Bimisa na lokasa