2018
Liloba ya Nzambe epai ya Bana na Ye
March 2018


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Misato 2018

Liloba ya Nzambe epai ya Bana na Ye

Makomi eyebisi biso ete eloko ya yambo Nzambe asalaki nsima ya kokela mobali mpe mwasi ezalaki koloba na bango.1 Azali na nsango ya ntina mpe ya motuya koleka ya kopesa bango. Mposa na ye ezalaki ya kotuka to koyokisa bango mpasi te kasi esengo mpe nkembo ya seko.

Mpe oyo ezalaki kaka ebandeli Uta na mokolo wana kino na oyo, Nzame akobaki kosolola na bana na Ye. Maloba na Ye ebombamaki, ebatelamaki mpe eyekolamaki na bayekoli ya nkola nyonso. Etosami na baoyo balukaka koyeba bolingi ya Nzambe, mpe basakolaka na bosolo ete “Nkolo Nzambe akosala eloko te, kasi amonisaka sekele na ye na basaleli na ye baprofeta.”2

Oyo etikalaki ndakisa uta ebandeli ya ntango, mpe ndakisa ezali kokoba kino lelo. Ezali kaka lisolo kitoko ya Biblia te; ezali nzela etiama ya Nzambe ya kolobela nsango ya ntina na bana na Ye. Atombolaka bato moko kati na biso, abengaka bango bazala baprofeta, mpe apesaka bango maloba baloba, oyo tobiangemi “kozwa, lokola kaka ewuti na monoko [Ye] moko.”3 Asakolaki, “Ata na mongongo na ngaimei na to na mongongo ya basali na ngai, ezali eloko moko”4

oyo ezali moko ya bankembo koleka, kolendisaka, mpe bansango ya elikia ya Bozongisi—Nzambe atikalaka kimia te! Alingaka bana na Ye. Atiki biso te tomitungisa na molili.

Mbala mibale na mobu nyonso, na Sanza ya minei mpe ya zomi, tozalaka na libaku ya koyoka mongongo ya Nkolo na nzela ya basali na Ye na makita na biso ya minene ya kitoko koleka.

Napesi bino litatoli na ngai moko ete kala na yambo molobi na likita linene azalaki kotambola mosika tii na podiomi, asalaki makasi, losambo, mpe boyekoli mingi na eyano na mokumba ya koloba. Nsango nyonso ya likita linene ezali na bantango bebo ya bomilengeli mpe bosengi na motema mpo na kososola nini Nkolo alingi mpo na Basantu na Ye bayoka.

Nini esengeli kosalema soki biso lokola bayoki tobakisaki bolengeli ya balobeli na ya biso moko? Boniboni lolenge ya bomilengeli na biso mpo na likita linene ekokaki kozala ya kokesena soki tomonaki likita linene lokola libaku ya kozwa bansango uta na Nkolo Ye moko? Na nzela ya maloba mpe miziki ya likita linene, tokoki kozela kozwa biyano na biso moko atako mituna to makambo nini tokoki kokutana na yango.

Soki bokomituna naino soki Tata na Lola akolobela bino, nakokundolisa bino maloba ya pete kasi ya mozindo loyembo ya bana na biso ya Eteyelo ya bana: “[Bozali] bana ya Nzambe, mpe atindaki [bino] awa.” Ntina na Ye ezali ya kosunga bino bozongela “kozala elongo na ye mokolo moko.”

Soki opusani pene ya Tata na Lola lokola mwana na Ye, okoki kotuna Ye na motema ya bosembo, “Kamba ngai, sunga ngai, tambola pene na ngai, salisa ngai nayeba nzela. Teya ngai nyonso nasengeli kosala.” Akolobela bino na nzela ya Molimo Mosantu, mpe nsima ezali mpo na bino “kosala bolingi na ye.” Nalaki ete soki bosali yango, “mapamboli ya nkita ezali na ebombelo.”5

Bokambi ya Nkolo esengelami lelo lokola naino esalema na lisolo ya mokili te. Ntango tomilengelaka mpo na koyoka liloba ya Nkolo, tokoki koluka na bokebi Molimo ya bosolo mpo ete na ntango Nkolo akoloba na nzela ya basaleli na Ye, tokoka kososola, komanyola, mpe kosepela elongo.6

Natatoli ete “na kosalaka makambo oyo bikuke ya lifelo ekofungwama mpo na [biso] te; iyo, mpe Nkolo Nzambe akobengana banguya ya molili liboso na [biso], mpe kosala ete balola eningana mpo na bolamu na [biso], mpe nkembo ya nkombo na ye.”7

Bimisa na lokasa