2021
Boyei kotala ya Yoane Mobatisi
Sanza ya mibale 2021


“Boyei kotala ya Yoane Mobatisi,” Moninga, Sanza ya mibale 2021

Etinda mpo na Moninga Sanza ya mibale 2021

Boyei kotala ya Yoane Mobatisi

Elilingi
Joseph Smith mpe Oliver Cowdery bazali kosambela

Bilili na Apryl Stott

Mokolo moko Joseph Smith mpe Oliver Cowdery batunamaki motuna. Lolenge ya malamu ya kobatisama ezalaki nini? Basambelaki mpo na koyeba eyano.

Elilingi
Yoane Mobatisi

Anzelu moko ayaki. Ezalaki Yoane Mobatisi. Abatisaka Yesu. Alobaki na bango ete basengelaki kozala na bonganganzambe mpo na kobatisa bato.

Elilingi
Yoane Mobatisi azali kopesa Joseph Smith Bonganganzambe ya Alona

Yoane apambolaki Joseph mpe Oliver. Apesaki bango bonganganzambe. Sikawa bakokaki kobatisa bato lolenge Yesu abatisamaki.

Elilingi
Oliver Cowdery azali kobatisa Joseph Smith

Joseph abatisaki Oliver na ebale. Nsima Oliver abatisaki Joseph. Nsima, basusu mingi babatisamaki mpe.

Elilingi
tata azali kobatisa mwana ya mwasi

Mpo Tata ya Lola ayanolaki losambo ya Joseph Smith, bonganganzambe ezongisami lisusu likolo ya mabele! Nakoki kobatisama lokola ebatisamaki Yesu.

Kopakola langi na Lokasa

Tokoki Kobatisama

Elilingi
A pencil drawing of Joseph baptizing Oliver Cowdery.

Bokoki kosala nini mpo na kolanda Yesu Klisto?

Bimisa na lokasa