2021
Nzambe Alobaki na Biso Tobatisama
Sanza ya mibale 2021


“Nzambe Alobaki na Biso Tobatisama,” Liahona, Sanza ya mibale 2021

Etinda mpo na Liahona Sanza ya mibale 2021

Nzambe Alobaki na Biso Tobatisama

Yesu Klisto apesaki ndakisa ya kobatisamaka na moto moko oyo azali na likoki ya Nzambe.

Atako toyebi mingi te na ntina ya bomoi ya ye moko Yesu Klisto, toyebi mpenza ete abatisamaki ntango azalaki penepene na mibu 30 (tala Luka 3:23). Tala makambo misusu toyekoli etali libatisi uta na ndakisa na Ye.

Mpo na Moto Nyonso

Soki tozali ya kokola ekoka mpe ya kokomela ekoka mpo na koloba bokeseni kati ya malamu mpe mabe, Tata na Lola alingaka biso tobatisama (tala Malongi mpe Mayokani 18:42). Yesu azalaki ya kobonga nie, kasi Ye aponaki mpe kobatisama mpo na kolanda mitindo ya Nzambe (tala Matai 3:13–17; 2 Nefi 31:7). Atako baoyo basila kokufa bakoki kondima libatisi. Topesaka yango epayi na bango na kobatisamaka mpo na bango kati na batempelo. (Tala Malongi mpe Mayokani 128:15–18.)

Elilingi
libatisi

Esalami na Likoki

Yesu azwaki libatisi na moto ya mpamba te. Akendaki bobele epayi ya ndeko na Ye ya mobali Yoane, oyo azalaki na likoki ya bonganganzambe uta na Nzambe. Nsima ya liwa ya Yesu mpe ya bobomami ya bayekoli na Ye, likoki ya bonganganzambe wana ebungaki na mabele. Na nsima, na 1829, Yoane Mobatisi abimelaki Joseph Smith mpe apesaki ye likoki ya kobatisa na nkombo ya Nzambe. Mpo na bozongisi wana, tokoki kobatisama na likoki kaka se moko wana lelo.

Elilingi
bozongisi ya Bonganganzambe ya Alona

Elaka ya Bato Mibale

Libatisi esangisi elaka ya bato mibale, to boyokani, kati na biso mpe Nzambe. Tolaki:

  1. Kokamata likolo na biso moko nkombo ya Klisto.

  2. Komikundola Ye ntango nyonso.

  3. Kobatela mitindo na Ye.

Na eyano, Nzambe alaki ete Molimo na Ye akozala ntango nyonso elongo na biso. Maloba ya nsambo ya elambo ekokundolisaka biso boyokani oyo poso moko na moko. (Tala Malongi mpe Mayokani 20:77, 79.)

Elilingi
libota ezali kotanga na liyangani ya elambo

Kozwa Molimo Mosantu Ezali Eteni moko ya Motuya ya Libatisi

Ntango Yesu abatisamaki, Molimo Mosantu amonisamaki na lolenge ya ebenga (tala 2 Nefi 31:8). Lelo, nsima ya libatisi ya bato, bakulisami nkotisa. Oyo elingi koloba bazwi lipamboli ya kafukafu na yango babengisami kozwa likabo ya kopetola ya kimolimo ya Molimo Mosantu (tala 2 Nef 31:17). Molimo Mosantu akoki kokebisa biso na likama, kolendisa biso, kokamba biso tokamata mikano malamu, mpe kosunga biso toyoka bolingo ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 39:6).

Elilingi
Mwasi azali kokulisama nkotisa

Tokoki Koyambola Ntango Nyonso

Nzambe ayebaki ete tokosala mabungi. Atako makasi na biso ya malamu mpenza, tokosumuka mpe tokokweya mpo na kokokisa bilaka na biso ya libatisi. Boye Ye apesi moko na moko na biso libaku ya koyambola. (Tala Malongi mpe Mayokani 18:13.) Mikolo nyonso tokoki kosala nyonso mpo na kolimbisa mpe kobongisa mabe nyonso. Tokoki kosambela mpe kosenga bolimbisi ya Nzambe. Nsima, ntango tozwi elambo na motema moko ya bomikitisi, tokoki kozala na Molimo Mosantu elongo na biso (tala 3 Nefi 18:11).

Elilingi
Mwasi azali kosambela penepene ya mbeto

Makomi Elobi nini na oyo etali Libatisi?

Baboti basengeli kosunga bana na bango bamilengela mpo na libatisi (tala Malongi mpe Mayokani 68:25).

Baye bazali bilenge na nse ya mibu mwambe basengeli kobatisama te (tala Moroni 8).

Ntango tobatisami, tolaki “kolela na baoyo bazali kolela; … mpe kobondisa baoyo batelemi na mposa ya libondisi, mpe kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe na ngonga nyonso na makambo nyonso mpe na bisika nyonso” (Moziya 18:9).

Bimisa na lokasa