2021
Yesu Klisto Asengaki na Biso Kozwa Elambo
Sanza ya misato 2021


“Yesu Klisto Asengaki na Biso Kozwa Elambo,” Liahona, Sanza ya misato 2021

Etinda Liahona Sanza ya misato 2021

Yesu Klisto Asengaki na Biso Kozwa Elambo

Topetolami mpe tobikisami ntango tokundoli Mobikisi na biso poso na poso.

Elilingi
Elambo ya Nsuka

Elambo ya Nsuka, na Carl Heinrich Bloch

Yambo Akufaki, Yesu Klisto aliaki bilei moko ya nsuka ebengamaki Elambo ya Nsuka. Na nsuka ya bilei oyo, Alakisaki elambo na balandi na Ye. Abukaki limpa mpe apambolaki yango. “Sala oyo na bokundoli na ngai,” Alobaki (Luka 22:19). Nsima Ye apambolaki mpe akabolaki nkeni ya vino.

Elilingi
libota ezali kozwa elambo

Eteni ya Losambo ya Poso na Poso

Ntango Eklezia ya Yesu Klisto ezongisamaki na mabele, elambo ekomaki eteni ya losambo ya poso na poso. Na ntango ya eklezia, elambo epambolami mpe ekabolami na baoyo bazali na bonganganzambe. Basambeli na kosalelaka maloba uta na makomi (tala Moroni 4; 5). Na nsima moto moko na moko kati na lingomba akolia limpa mpe akomele mayi mpo kokundola Yesu Klisto mpe mbeka na Ye mpo na biso, lolenge Asengaki biso kosala.

Elilingi
elenge mwasi azali kosambela

Foto na Angela Suitter

Kolengelaka mpo na Kokabola

Mpo kokoka na kozwa elambo, tosengeli na bosembo nyonso kokanisa na ntina na bomoi mpe maponi na biso. Tosengeli kobongwana na mabunga mpe masumu ya poso eleki, kutu kosengaka Nzambe mpo na bolimbisi. Tosengeli kobongo nie te mpo na kozwa elambo, kasi mitema na biso misengeli komikitisa.

Elilingi
Losambo na Getesemane

Losambo na Getesemane, na Del Parson

Koleka Mpenza Limpa mpe Mayi

Kozwa elambo ezali ntango ya bule, ya esantu. Losambo ya elambo ekundoli biso ete ntango tozwi limpa mpe mayi, tozali kukondola nzoto mpe makila Yesu Klisto apesaki mpo na biso. Tolaki kolanda Ye mpe kobika bomoi ya boklisto. Tolaki komeka kobatela mitindo na Nzambe. Na bozongi, Molimo Mosantu akolendisa, akokamba, mpe akobikisa biso.

Elilingi
libatisi

Kozongisa Mayokani Sika

Ntango baoyo ya biso baoyo babatisami balie elambo na motema peto, tozongisi sika liyokani tosalaki na libatisi. Kutu tozwi Molimo Mosantu mpe topetolami na lisumu lokola tobatisamaki lisusu. Oyo ezali elikya mpe ngolu Yesu apesi na moko na moko na biso. Ezali ata mokolo moko bobele nsima mpenza te mpo kobongwana mpe kolimbisama.

Elilingi
Yesu Klisto alakisi elambo na Banefi

That Ye Do Always Remember Me, na Gary L. Kapp, may not be copied

Makomi Eteyi nini na ntina na Elambo?

Tosengeli tomitala bisomei na molimo, na bosembo mpenza kotalaka na motema, yambo ya kozwa elambo (tala 1 Bakolinto 11:28).

Nsima Ye asekwaki, Yesu alakisaki bato na Ye na mikili ya Amerika lolenge nini kozwa elambo (tala 3 Nefi 18).

Baprofeta ya sika bayebisi biso kosalela limpa mpe mayi mpo na elambo, kasi oyo tolei to tomeli esali solo solo eloko te (tala Malongi mpe Mayokani 27:2). Ntango mosusu baoyo bazali na banzoto oyo eboyaka bilei basengeli kosalela eloko mosusu lokola limpa.

Elambo ya Nsuka, na Carl Heinrich Bloch; photograph of young woman praying na Angela Suitter; Prayer at Gethsemane, na Del Parson; That Ye Do Always Remember Me, na Gary L. Kapp, may not be copied

Bimisa na lokasa