2021
Bonganganzambe ya Nzambe
Sanza ya Mwambe 2021


“Bonganganzambe ya Nzambe,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya mwambe 2021, 20–21.

Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya mwambe 2021

Bonganganzambe ya Nzambe

Malongi mpe Mayokani 84

Oyo elenge nyonso asengeli koyeba na ntina ya bonganganzambe mpe mokangano na bango na yango.

Elilingi
bilenge

Osili komona lolenge nini yango ekoki kozala mobulungano ntango liloba moko esalelami na banzela mibale? Ndakisa, na lokota ya Angele liloba mabele elimboli makambo mibale, mokili likolo na yango tofandi mpe bosoto na nse ya makolo na biso. Nyonso mibale ezali malamu, kasi oyo oyoki ntango osaleli liloba etali bobele oyo ozali kolobela na ntango wana. Mpo na kokomisa makambo mobulu makasi, soki mabele elingi koloba mokili na biso, ezali lisusu na likanisi ya bosoto, mpo ete bosoto ezali likolo ya mokili.

Kolimbolaka Liloba Bonganganzambe

Liloba moko tosalelaka na ndenge mibale na Eklezia ezali bonganganzambe. Liloba yango elimboli nguya mobimba mpe likoki ya Nzambe. Nzokande, tosalelaka lisusu bonganganzambe na lolenge moko oyo ezali na ndelo—mpo na kolimbola “nguya mpe likoki oyo Nzambe apesaka na banganganzambe bakulisama mpo na kosalela na makambo nyonso ya ntina mpo na lobiko ya bana ya Nzambe.”1

Bonganganzambe oyo epesami na mobali ezali nguya mobimba ya Nzambe te. Etando oyo elandi elakisi likambo oyo.

Na nkoma oyo omoni ndakisa mosusu ya nguya ya Nzambe, oyo ezanga nsuka mpe ezali na ndelo te. Na kati na yango, omoni lisusu ndakisa ya nguya mpe ya likoki ya bonganganzambe ya Nzambe oyo Ye akulisaka to apesaka, mibali balongobani mpo na kosalela na Eklezia ya Klisto.

Ndakisa ya Likoki ya Nguya ya Bonganganzambe na Bomoi na Bino

Mapamboli nyonso ya bonganganzambe ezali mpo na bana basi mpe bana mibali nyonso balingami ya Tata na Lola. Mokanda ya mibale etalisi bobele mapamboli oyo eyelaka bino na nzela ya moto oyo azali na bafungola ya bonganganzambe to oyo likoki ya bonganganzambe epesameli ye.

Oyo ezali molongo oyo Nzambe atiaki mpo na lingomba mpe mosala ya Eklezia na Ye na mabele. Ndakisa mosusu ya likoki ya bonganganzambe ya Nzambe ezali na mokambi ya lisanga likoki ya badiakona to bateyi oyo azali na bafungola mpo na kokamba mosala ya lisanga likoki na ye, mapamboli ya tata oyo epesami na libota, mpe makuli mpe mayokani ya tempelo .

Mibali, Basi, mpe Bonganganzambe

Atako bokuli na mosala ya bonganganzambe epesami bobele na mibali, Mokambi Dallin H. Oaks, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo, alimbolaki libongi moko ya ntina: “Bonganganzambe ezali nguya mpe likoki ya bonzambe oyo esimbami na bondimami mpo na kosala na mosala ya Nzambe mpo na litomba ya bana na Ye nyonso. Bonganganzambe ezali te baoyo bakulisami na mosala ya bonganganzambe to baoyo basalelaka likoki na yango. Mibali oyo basimbi bonganganzambe bazali bonganganzambe te. … Tosengeli te kolobela mibali oyo bakulisama lokola bonganganzambe.2

Atako basi bakulisamaka na bonganganzambe te, Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki, “ntango otiami mpembeni mpo na kosala na libiangi na nse ya boyangeli ya moto oyo asimbi bafungola ya bonganganzambe … opesami likoki ya bonganganzambe mpo na kosala na kati ya libiangi wana.”3 Bandakisa mosusu na yango ezali na masanga ya bakambi ya kelasi ya Bilenge Basi, bandeko basi bamisionele oyo basakolaka nsango malamu, bakambi na bapalwasi mpe makonzi oyo batiami mpembeni mpo na koteya mpe kokamba, mpe basali ya makuli na tempelo.

Nguya ya Bonganganzambe Epambolaka Moto Nyonso

Mapamboli oyo bino bilenge mibali mpe basi bozwaka ezali ya bino na nzela ya mayokani bosalaka na libatisi mpe mayokani oyo bokosala na tempelo. Atako soki bozali na nganganzambe na kati ya libota te, bokoki kaka kopambolama na nguya ya bonganganzambe ya Nzambe na bomoi na bino ntango bozali kobatela mayokani oyo bosalaki elongo na Ye (tala 1 Nefi 14:14).

Ntango tozali kotambwisa bomoi na biso engebene na mayokani na biso, tozwaka mapamboli oyo elendisaka mpe epambolaka biso. Tobengisi bino bomanyola mapamboli ya bonganganzambe na bomoi na bino—mapamboli oyo eyaka na nzela ya nguya ya bonganganzambe ezanga nsuka mpe maye oyo eyaka mingi mingi na nzela ya likoki ya bonganganzambe oyo ekulisami mpe epesami na Eklezia ya Nzambe.

Matangi

  1. Dale G. Renlund and Ruth Lybbert Renlund, The Melchizedek Priesthood: Understanding the Doctrine, Living the Principles (2018), 11.

  2. Dallin H. Oaks, “The Melchizedek Priesthood and the Keys,” Sanza ya minei. 2020 likita linene (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 69).

  3. Mokambi Russell M. Nelson, “Spiritual Treasures,” Sanza ya zomi. 2019 likita linene (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2019, 78).

Bimisa na lokasa