2021
Bonganganzambe Ezali Nguya ya Nzambe
Sanza ya Mwambe 2021


“Bonganganzambe Ezali Nguya ya Nzambe,” Liahona, Sanza ya mwambe 2021

Etinda mpo na Liahona Sanza ya mwambe 2021

Bonganganzambe Ezali Nguya ya Nzambe

Nzambe apambolaka biso na nzela ya nguya ya bonganganzambe. Mapamboli ya bonganganzambe ezali mpo na moto nyonso.

Bonganganzambe ezali nguya ya Nzambe. Asalelaka nguya oyo mpo na kopambola bana na Ye nyonso mpe kosunga bango bazonga kofanda na Ye. Nzambe apesaki nguya ya bonganganzambe epai ya bana na Ye na mabele. Na nguya oyo, bakambi ya bonganganzambe bakoki kokamba Eklezia, mpe banganganzambe bakoki kosala makuli ya bule, lokola libatisi, oyo esalisa biso toya pene ya Nzambe. Mobali mpe mwasi nyonso oyo azwi na bolongobani makuli ya bonganganzambe mpe abateli mayokani (bilaka ya bule) azali na ndingisa ya kozwa nguya ya Nzambe.

Elilingi
elambo

Nguya ya Bonganganzambe Epesamaki epai ya Joseph Smith

Ntango Yesu Klisto azalaki na mabele, Akambaki Eklezia na Ye na nguya ya bonganganzambe. Apesaki lisusu nguya oyo epai ya Bapostolo na Ye. Bikeke mingi nsima ya kufa na bango, bandimi mingi bakabwanaki na Eklezia. Babongolaki na lolenge ya mabe nsango malamu mpe lolenge Eklezia ezalaki kosala. Bonganganzambe ya Nzambe ezalaki lisusu te likolo ya mabele. Na 1829 Yesu Klisto atindaki Yoane Mobatisi mpe Bapostolo Petelo, Yakobo mpe Yoane mpo na kopesa Joseph Smith bonganganzambe. Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka ezali lingomba se moko na mabele oyo ezali na likoki oyo ewuta na Nzambe.

Elilingi
Bozongisi ya Bonganganzambe ya Melekisedeki

Mongongo ya Petelo, Yakobo mpe Yoane, na Linda Curley Christensen mpe Michael T. Malm

Bafungola ya Bonganganzambe

Bafungola ya bonganganzambe ezali likoki ya kokamba bosaleli ya bonganganzambe, lokola kopesaka ndingisa mpo na kosala makuli. Yesu Klisto azali na bafungola nyonso ya bonganganzambe. Mokambi ya Eklezia azali bobele moto se moko na mabele oyo akoki kosalela bafungola ya bonganganzambe mpo na kokamba Eklezia mobimba. Na nse ya bokambi na ye, basusu bakoki kosalela bafungola mosusu mpo na kosala mosala ya Nzambe. Bakambi lokola baepisikopo mpe bakambi ya makonzi basalelaka bafungola ya bonganganzambe mpo na kokamba bapalwasi mpe makonzi na bango. Mpo mabiangi ya kosalela ewutaka na bakambi oyo bazali na bafungola ya bongangazambe, mibali mpe basi oyo basungaka na mabiangi basalelaka likoki ya bonganganzambe ntango bazali kokokisa mikumba na bango.

Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe ya Alona

Bonganganzambe ezali na biteni mibale: Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe Bonganganzambe ya Alona. Na nzela ya Bonganganzambe ya Melekisedeke, bakambi ya Eklezia bakambaka misala nyonso ya molimo ya Eklezia, lokola mosala ya misio mpe ya tempelo. Bonganganzambe ya Melekisedeke esalaka na nse ya likoki ya Bonganganzambe ya Melikisedeke. Esalemaka mpo na kosala makuli lokola libatisi mpe elambo.

Elilingi
libatisi

Mapamboli ya Bonganganzambe

Na nzela ya mayokani mpe makuli, Nzambe apesaka mapamboli ya bonganganzambe na bana na Ye nyonso. Mapamboli ezali na libatisi, likabo ya Molimo Mosantu, elambo mpe makuli ya tempelo. Mibali mpe basi oyo bazwi dotasio na kati ya tempelo bazwaka likabo ya nguya ya bonganganzambe ya Nzambe na nzela ya mayokani na bango. Tokoki lisusu kozwa mapamboli ya bonganganzambe ya libiki na bokono, bolendisi mpe bokambi.

Elilingi
bakwelani ya sika na tempelo

Makomi Elobi nini na Ntina ya Bonganganzambe?

Bonganganzambe oyo ezalaki na mikolo ya kala ezali kaka yango moko oyo ezali sikawa (tala Mose 6:7).

Bafungola ya bonganganzambe esungaka mpo na kondimisa ete tokokisaka mosala ya Nkolo na lolenge ya malamu (tala Doctrine et Alliances 42:11).

Mibali oyo bazali na bonganganzambe bakoki kosalela yango “bobele na nse ya mabongi ya boyengebene” (Doctrine et Alliances 121:36).

Mikumba misusu ya baoyo basimbi bonganganzambe elimbolami na Doctrine et Alliances 20:38–67.

Bimisa na lokasa