2022
Nini Esalemaka na Mayangani ya Eyenga na Eklezia?
Sanza ya Motoba 2022


“Nini Esalemaka na Mayangani ya Eyenga na Eklezia?,” Liahona, Sanza ya motoba 2022.

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya motoba 2022

Nini Esalemaka na Mayangani ya Eyenga na Eklezia?

Elilingi
Basi mibale bayambani

Bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba mikolo mya Nsuka basanganaka Eyenga nyonso mpo na kosanjola Nzambe mpe koteya moko mpe mosusu nsango malamu ya Yesu Klisto. Banso toyambami kosangana, mpe bandimi bakozua libaku ya kosambela, kopesa masukulu, mpe koteya mateya soki bango balingi. Mayangani yango esungaka bandimi kokembisa moko na mosusu na bondimi mpe kozala “mitema ekangami esika moko na bosangani mpe bolingo” (Moziya 18:21).

Elilingi
mwana mobali na kiti ya bakakatali kolekisaka elambo

Liyangani ya Elambo

Bandimi ya paluase to etape basangana Eyenga nyonso mpo na liyangani ya elambo. (Baoyo ya bondimi na biso te bayambami mpo na kosangana mpe.) Elambo epesamaka na bandimi katikati ya liyangani wana mpo na kosunga bango komikundola Yesu Klisto (tala April 2022 Gospel Basics article mpo na nsango etali elambo). Liyangani esangisi lisusu nsambo, miziki ya kosanjola, mpe masukulu epesami na bandimi na ntina ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Elilingi
bana basi mibale kosekaka na eklezia

Mayangani Misusu

Sima ya liyangani ya elambo, bandimi bakabuanaka na bakelasi mpe masanga makoki. Bana ya sanza 18 kino mibu 11 basanganaka na eteyelo ya bana. Na biyenga ya yambo mpe misato nyonso, bandimi nyonso mosusu basanganaka na Eteyelo ya Eyenga. Na biyenga ya miable mpe ya minei, basangana na Lingomba ya Bamama basungi, Bilenge basi, to mayangani ya masanga makoki ya banganganzambe.

Nsambo

Nsambo na mayangani ya Eklezia epesamaka na bandimi. Nsambo ezalaka pete mpe etambwisami na nzela ya Molimo Mosantu. Bandimi na losambo basalelaka maloba oyo elakisi bolingo mpe limemia mpo na Tata ya Lola. Yango esangisi maloba Yo, Yayo, Yabino, mpe Bino ntango ya kobondela Ye.

Balisukulu

Moto moko ya episikopo to mokambi ya etape asengaka bandimi bapesa balisikulu na liyangani ya elembo. Balisukulu yango elobelaka obele nsango malamu ya Yesu Klisto. Balobi basalelaka makomi mpe maloba ya bakambi ya Eklezia ntango bazali kolengela balisikulu na bango. Bakabolaka lisusu litatoli ya mapamboli ya mibeko ya nsango malamu na babomoi na bango.

Mateya

Sima ya liyangani ya elambo, bandimi bakoyekola na ntina ya nsango mlamu na bakelasi mike. Mateya ekoki kozala oyo etali makomi, malakisi uta likita linene, to makambo mosusu. Atako kutu moteyi akotambuisa liteya, yango ezali botangi te. Bato nyonso ya kelasi bakoki kokabola makanisi na bango etali mama ya likambo.

Elilingi
Mobali kolobaka likolo ya mesa na Eklezia.

Litatoli

Mbala moko na sanza, liyangani ya elambo esangisaka liyangani ya litatoli. Mingimingi ezalaka na Eyenga ya yambo ya sanza. Katikati ya liyangani yango, bandimi bakoki kopesa matatoli na bango ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Kopesa litatoli elingi koloba kotatola ete babosolo ya nsango malamu efulami na Molimo Mosantu.

Bolengeli

Bandimi bakolengela mpo na mayangani ya Eyenga nakosambelaka, koyekolaka makomi, mpe kozalaka ya kobongama mpo na koyamba lifuli ya Molimo Mosantu. Soki osengami kopesa lisukulu to koteya liteya, kanisa na kosambelaka na ntina ya lolenge nini okoki koteya mibeko ya nsango malamu. Salela makomi. Pesa litatoli ya bosolo. Bakambi ya Eklezia na bino bakoki kosunga yo mpo na kolengela, soki esengelami.

Bimisa na lokasa