2023
Mapamboli ya Bonganganzambe
Sanza ya misato 2023


“Mapamboli ya Bonganganzambe,” Liahona, Sanza ya misato 2023.

Etinda Liahona Sanza ya misato 2023

Mapamboli ya Bonganganzambe

Elilingi
Klisto azali kokulisa Bapostolo Zomi na mibale

Klisto Azali kokulisa Bapostolo Zomi na Mibale, na Harry Anderson

Lipamboli ya bonganganzambe epesamaka na bofuli ya moto oyo azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke. Mapamboli ya bonganganzambe esalisaka bana nyonso ya Nzambe bazwa nguya, libiki, bolendisi, mpe bokambi na Ye.

Bonganganzambe

Bonganganzambe ezali nguya mpe likoki ya Nzambe. Mibali balongobana oyo bazali na Bonganganzambe ya Melekisedeke basalaka na nkombo ya Yesu Klisto ntango bapesaka mapamboli ya bonganganzambe. Ntango bapesaka mapamboli oyo, balandaka ndakisa ya Mobikisi ya kopambolaka basusu.

Elilingi
maboko kotiamaka likolo ya moto moko

Foto na David Bowen Winters

Lolenge nini Mapamboli Mapesamaka

Mapamboli mapesamaka na kotiaka maboko na moto. Nganganzambe ya Melekisedeke atiaka maboko na ye likolo ya moto ya moto oyo azali kozwa lipamboli yango. Nsima apesi lipamboli lokola Molimo ekambi. Baoyo bapesaka mapamboli mpe baoyo bazwaka yango basalelaka bondimi kati na Nzambe mpe batiaka elikia kati na bolingi mpe ngonga na Ye.

Kopesa Nkombo mpe Kopambola Bana

Nsima ya kobotama ya mwana, moto azali na bonganganzambe apesaka ye nkombo mpe lipamboli (tala Malongi mpe Mayokani 20:70). Oyo esalamaka mbala mingi na likita ya kokila bilei mpe litatoli. Mwana apesamaka liboso nkombo. Nsima nganganzambe apesaka mwana lipamboli.

Elilingi
elenge mobali azali kopesama lipamboli ya bonganganzambe

Foto na Welden C. Andersen

Mapamboli mpo na bakoni

Banganganzambe bakoki kopesa mapamboli na bato bazali na bokono. Lipamboli ya lolenge oyo ezali na biteni mibale: kopakola mafuta mpe kokanga epakolami. Yambo, nganganzambe atiaka litanga ya mafuta ya oliva oyo ebulisamaki, to epambolamaki, likolo ya moto ya moto mpe apesaka losambo ya mokuse. Nsima nganganzambe mosusu akangisaka epakolami yango mpe apesaka moto yango lipamboli lokola akambami na Molimo Mosantu.

Mapamboli ya Bolendisi mpe ya Toli

Banganganzambe ya Melekisedeke bakoki lisusu kopesa mapamboli ya bolendisi mpe ya toli na bato ya libota na bango mpe na basusu oyo basengaka yango. Tata oyo azali na Bonganganzambe ya Melekisedeke akoki kopesa mapamboli ya tata na bana na ye. Oyo ekoki kosalisa mingimingi ntango bana bazali kokutana na mikakatano ekesena.

Kotia Bandimi Mpembeni mpo na Kosalela Mabiangi

Ntango bandimi ya Eklezia bazwaka mabiangi, bapesamaka lipamboli ntango batiamaka na mosala mpo na kosalela Nzambe. Mokambi ya bonganganzambe apambolaka bango na likoki ya kosala kati na libiangi yango. Mokambi ya bonganganzambe lisusu apesaka bango lipamboli mpo na kosalisa bango kati na mosala na bango.

Elilingi
Mwasi azali kotanga lipamboli ya nkoko

Foto na Shauna Stephenson

Mapamboli ya Nkoko

Mondimi ya Eklezia alongobana nyonso akoki kozwa lipamboli ya nkoko. Lipamboli oyo epesaka toli ya moto ye moko uta na Nkolo. Ekoki kopesa bokambi mpe bolendisi na bomoi mobimba ya moto. Elobaka lisusu molongo (kouta) ya moto na ndako ya Yisalaele. Bobele nkoko moko abulisama akoki kopesa lolenge ya lipamboli oyo.

Bimisa na lokasa