2023
Boya liboso na Ye
Sanza ya misato 2023


“Boya liboso na Ye,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya misato 2023.

Etinda Mpo ya Bokasi ya Bilenge Sanza ya misato 2023

Boya liboso na Ye

Mobikisi abiangi biso topesa mikumba na biso epai na Ye.

Elilingi
Yesu Klisto

Elili na Annie Henrie Nader

Boya liboso na ngai

Tokoki koya liboso ya Mobikisi na koyekoka nsango malamu na Ye, kozalaka na bondimi kati na ye, koyambolaka, kosalaka mpe kobatelaka mayokani, mpe kolandaka ndakisa na Ye.

kosala … kokumba bozito

Mosala ya nzoto mpe mikumba ya nzoto ekoki kolembisa biso, lolenge moko mpe oyo ya moto , makanisi, mpe molimo. Mobikisi apesaka biso kimia na Ye, kotala te mikumba ya ndenge nini tokoki komema.

ekangeneli

Ekanganeli ezali esalelo mpo na kokangisa bibwele mibale elongo mpo ete ekoka kobenda bojito elongo, lokola lokalo to wago. Ekangeneli mbala mingi ezali na mombonga (putele) ya nzeta efandisami likolo ya lipeka ya ebwele moko na moko, kokabolaka kilo.

koyekola

Tokoki koyekola koyeba Yesu Klisto na koyekolaka mateya na Ye mpe ndakisa na Ye—mpe na komekaka kolanda Ye.

kopema

Kopema ya Mobikisi ezali kimia na Ye, oyo ekitisaka makanisi na biso mpe milimo. Asalisaka biso tolonga mabanzo na biso ya mokili mpe Apesaka biso bokasi ya molimo ntango tomiyokaka ya kolemba.

botau … pepele

Kokamataka ekangeneli ya Mobikisi likolo na biso elingi koloba komikangisaka epai na Ye kati na mayokani. Elingi koloba kopesaka mitema na biso epai na Ye mpe mosala mwa Ye. Ntango tosalaka oyo, miikumba na biso eyokanaka bozito te koleka mpamba te Ye azali kosalisa biso.

Bimisa na lokasa