2023
Molimo Mosantu Akoki Kosalisa Biso
Sanza ya motoba 2023


“Molimo Mosantu Akoki Kosalisa Biso,” Liahona, Sanza ya motoba 2023.

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya motoba 2023

Molimo Mosantu Akoki Kosalisa Biso

Elilingi
mobali afandi mpe azali kotala botani ya moyi

Molimo Mosantu azali moto ya misato ya Bonzambe. Makomi elobeli Ye lisusu lokola Molimo, Molimo Mosantu, to Mobondisi. Ntango toyekoli koyoka mongongo na Ye, Akotatola epai na biso na ntina ya Yesu Klisto mpe akosalisa biso toyekola babosolo ya nsango malamu.

Moto ya Bonzambe

Tata na Lola, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu bazali Bonzambe. Balingaka biso mpe basalaka na bomoko mpo na kokokisa mwango ya libiki. Atako Tata na Lola mpe Yesu Klisto bazali na nzoto ya mosuni mpe mikuwa, Molimo Mosantu azali na yango te. Azali molimo.

Elilingi
Elilingi ya kitalatala ya Tata mpe Mwana

Nzeneneke ya Tata mpe Mwana

Molimo Mosantu “nzeneneke ya Tata mpe Mwana” (2 Nefi 31:18). Yango elimboli ete tokoki kozwa litatoli ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto na nzela ya Molimo Mosantu.

Atatolaka Bosolo

Molimo Mosantu atatolaka babosolo nyonso. Akosalisa biso toyeba ete nsango malamu—kobakisa mwango ya libiki, mitindo ya Nzambe, Bozongisi, mpe Bomikabi ya Yesu Klisto—ezali solo. Akolendisa litatoli na biso ntango tokobi kosambela, kobatela mitindo, mpe koyekola nsango malamu.

Elilingi
loboko esimbi kompa

Akambaka mpe Abatelaka Biso

Molimo Mosantu akoki kokamba biso na bikateli na biso mpe kobatela biso uta na makama ya nzoto mpe ya molimo. Akosalisa biso tozwa biyano na mituna na biso soki tosambeli mpe tomeki kosala maye mazali malamu. Akokamba biso ntango nyonso “mpo na kosala malamu” (Malongi mpe Mayokani 11:12).

Abondisaka Biso

Molimo Mosantu alobelami ntango mosusu lokola “Mobondisi” (Yoane 14:26). Akoki kotondisa biso “na elikya mpe bolingo ebonga nie” (Moroni 8:26) ntango totungisami, na mawa, to na bobangi. Ntango Asalisi biso toyoka bolingo ya Nzambe, tokoki kolonga bolembisi nzoto mpe kolendisama na mikakatano na biso.

Likabo ya Molimo Mosantu

Nsima ya libatisi na biso, tozwaka likabo ya Molimo Mosantu na bokuli ebengami nkotisa. Ntango kaka tozwaka likabo oyo, tokoki kozwa kimoninga ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu ntango tozali kobika na boyengebene.

Elilingi
mwasi azali kotanga makomi

Liyemi na J. Kirk Richards

Lolenge nini Toyokaka Molimo Mosantu

Molimo Mosantu alobelaka bato na ndenge ebele. Yango ekoki kozala na kimia, mayoki ya bolendisi to mamoni na ntina ya maye ya koloba to kosala. Ntango tosambelaka mpo na bokambi mpe toyokaka banungunungu na Ye, tokoki koyekola lolenge nini Ye alobelaka biso.

Bimisa na lokasa