Liahona
Nzambe Akosunga mpe Akobatela Biso
Sanza ya Mwambe 2024


“Nzambe Akosunga mpe Akobatela Biso, ” Liahona, Sanza ya Mwambe 2024.

Etinda ya sanza ya Liahona , Sanza ya Mwambe 2024

Nzambe Ako Sunga mpe Akobatela Biso

Lokola Kapiteni Moroni, tokoki kozwa lisalisi mpe nguya ya bonzambe mpo na bitumba tokutanaka na yango kati na bomoi.

Elilingi
Kapiteni Moroni asimbi nkombo ya bonsomi

Mayemi na Eric Chow

Yambo ntango natangaki buku ya Mormon, nasepelaki na lisolo ya bitumba katikati na Banefi mpe Balamani. Nasepelaki mingi na bondimi, mayele, mpe ndenge ya kosalela Kapiteni Moroni asalelaki, mokonzi moko ya basoda oyo aponamaki mokambi kati na mampinga ya banefi nyonso ntango azalaki bobele na mibu 25. Azalaki na bwanya, makasi mpe mayele. Amipesaki mobimba mpo na bonsomi mpe bomikoki ya bato na ye. (Tala Alma 48:11–12.)

Na esika ya komipesa lokumu yemei mpo na elonga ya basoda, Moroni apesaki lokumu ya elonga na Nzambe mpe na lisungi ya bule mampinga na ye ezwaki uta na basi mpe bana oyo bazalaki kobunda te. Alobelaki mokambi ya monguna alongama: “Nkolo … atiki bino o kati ya maboko ma biso. Mpe sikawa nalingi ete bososola ete oyo ezali mpo na eyamba ya biso mpe bondimi na biso kati na Klisto.” Nsima Moroni akabolaki bososoli ya esakola oyo: “Nzambe akosalisa, mpe akobomba, mpe akobatela biso, ntango molai lokola tozali sembo epayi na ye, mpe epayi ya bondimi na biso, mpe eyamba ya biso” (Alma 44:3, 4).

Nsima ya ntango molai, nayakii kososola ete Moroni asalelaki ndakisa ya mibeko oyo tokoki kosalela mpo na kosalisa biso kolonga mikakatano ya bomoi na biso ya mikolo oyo. Ntango tosaleli bondimi kati na Yesu Klisto, Mobikisi ya mokili, Akopambola biso na nguya na Ye. Kasi mpo na Ye kosala bongo mpe mpo na biso koyeba mapamboli na Ye, tosengeli kososola ntina na biso, lolenge ya kolonga mpe komilengela mpo na bitumba ya lisese tozali kobunda, lokola kaka Moroni amilengelaki mpe abundaki bitumba ya solo na bomoi na ye. Ntango tosali bongo,Tata ya Lola mpe Yesu Klisto bakosalisa mpe bakobatela biso.

Kososola Ntina na Biso

Moroni akundolelaki bato mbala na mbala nani bazalaki (basangoli ya boyokani ya Abalayama), ya nani bazalaki (bana balingami ya Nzambe), mpe ntina nini bazalaki kobunda (libota, bondimi mpe bonsomi). Moroni ateyaki bato na ye ete bazalaki kobunda mpo na libiki na bango mpe mpo na bonsomi uta na minyoko mpe bowumbu. Nzokande, banguna na bango bazalaki kobunda mpo na koluka lokumu mpe bokonzi na konyokolaka bato mosusu.

Ntango Banefi misusu balukaki kobotola bokonzi mpo na litomba na bango moko, Moroni apasolaki kazaka na ye mpe akomaki na eteni na yango makambo ya ntina ya nsango na ye: “Na kokanisaka Nzambe na biso, eyamba na biso, mpe bonsomi na biso, mpe kimia na bisi, basi na biso, mpe bana na biso.” Atombolaki dalapo yango, oyo abengaki “elembo ya bonsomi,” na nsuka ya nzete moko mpe asalelaki yango mpo na kokundola bato ntina nini etumba yango ezalaki mpe mpo na kosangisa bango na likambo yango. (Tala Alma 46:12–13, 19–20.)

Na bitumba ya molimo kati na bomoi, “tozali kobunda na mosuni mpe makila te, kasi na …bakambi ya molili … [mpe] na botomboki ya molimo” (Baefese 6:12). Biso, tosengami, lisusu kokundolama oyo ezali nitna nyonso ya bitumba. Mpaka Neal A. Maxwell (1926–2004), Moko ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ya kala, apesaki makanisi oyo na lisolo moko ya ntina mingi, atako ezali mokuse.

Na 2004, nakendaki kotala Mpaka Maxwell kati na kisuku na ye ya lopitalo kala mingi te liboso ye akufa. Azalaki na boboto mingi na moto nyonso atalaki to asalisaki ye. Basali ya lopitalo bakendaki na kisuku na ye mpe babimaki na kolela. Nalobaki na ye, “Mpaka Maxwell, oyo ezali mpenza pasi.” Asekaki mpe alobaki, “Oh, Dale, tozali bikelamu ya seko kobikaka na mokili ya kufa. Tozali libanda ya esika na biso, lokola mbisi libanda ya mayi. Ezali bobele ntango tozali na likanisi ya bomoi ya seko nde makambo oyo nyonso ekozala na ntina.

Tosengeli soko moke te kobungisa bomoni bomoto ya bonzambe mpe lobi ya seko na biso mpe babokasi ya zabolo oyo ezali kotelemela biso. Bososoli malamu ya mwango ya Tata na Lola ekolendisa biso tokobal kobunda mpo na kobunda mpo na lobiko na biso ya seko mpe mpo na bonsomi na biso uta na bowumbu ya molimo.

Elilingi
bato bazali kobongisa bisika makasi

Kosala mayele mpo na Elonga

Na bitumba nyonso mampinga na ye ebundaki, Moroni asalaki mayele mpo na kosala ete elonga ezala. Asalelaki banongi mpo na koyeba misala mpe makanisi ya banguna na ye. Alukaki bokambi uta na profeta, Alma. Na nsima Moroni asalelaki makanisi wana oyo efulamaki na lolenge na ye ya kobunda. Atyaki biloko engebene na mposa, kotyaka basoda mingi na bingumba oyo ezalaki na bifelo ya makasi te. Atyaki miango ya kosalela efandi likolo ya nsango ya mikolo wana.

Azwaki bongo mbano likolo ya mampinga ya banguna. Asepelaki soko moke te na bilonga ya kala; kasi akobaki kobongisa makoki na ye mpe ya mampinga na ye mpo na kolonga mikakatano ekoya.

Tokoki kosalela bamayele ekokani mpo na kobundisa botelemeli ya molimo. Tokoki kobanda na koyeba nini oyo Satana azali komeka kosala kati na bomoi na biso. Amekaka kobulunganisisa biso mayele uta mokano na biso Ntango tokutani na komekama, tosengeli komituna bisomei:

  • Lolenge nini makambo oyo na ngambo na ngai ekokani te na liloba ya Nzambe efulama?

  • Nini ezali bambano ya kosala makambo oyo?

  • Likambo yango ekosalisa ngai na kokokisa mokano na ngai awa na mabele?

Tosengeli lisusu koyeba mbuma mabe oyo ekoki kobotama soki tokwei ata na komekama ya mike. Ntango tokweyisami na komekama, tozali kolya “ngenge moke moke” (Alma 47:18), mayele ya mabe koleka oyo esalelami na nguya ya mabe mpe oyo ekoki komema na mbano ya makama na molimo.

Tokoki komilendisa bisomei na mimekano ya Satana na kolandaka botambwisi tozwaka uta na baprofeta na biso ya mikolo mya nsuka. Kosalaka bongo esalisaka biso kobatela limoni moko ya seko na nzela ya nini tokoki komeka misala na biso. Kosala mayele na lolenge tokoki kotelemela mimekano oyo ebimaka na bangambo nyonso ya bomoi ekosalisa biso na kosala maponi ya malamu na ntango. Mayele mpe miango ebongisami liboso ekosalisa biso na kotelemela bopengwisi mayele uta na mokano na biso ya seko.

Yoko ndakisa ezali ya tekinoloji Tekinoloji ekoki kozala mbeli ya minu mibale, na mbala moko eloko ya mosala mpe eloko mabe, kolandaka lolenge tosalelaka yango. Mpo na kosalisa biso tosala maponi ya bwanya na bapareyi na biso, bilenge mpe mikolo bakoki kotala “Kozwa mokumba ya tekinoloji” mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge: Mokambi Mpo na Kopona. Yango ekokundolisaka biso mokano na biso, elakisaka biso epayi ya Yesu Klisto, mpe esalisaka biso tobengisa Molimo Mosantu kati na bomoi na biso. Kobongisa lolenge nini, ntango nini, mpe esika nini tokosalela tekinoloji ekolendisa biso na kotelemela mayele mabe, ya mokili.

Elilingi
Balamani bazali kobundisa bisika makasi ya Banefi

Komilengela mpo na Bitumba ya Masesei

Mpo na kosalaka yambo bitumba eya, Moloni alengelaki bato na ye moko na moko na bilamba ya ntolo, nguba, bikoti, mpe bilamba ya kilo. Alengelaki bato na ye elongo na kozingáká bingumba na bisika makasi, kobwaka maboke ya mabele nzinganzinga na yango.

Na molimo, tomilengelaka moko na moko na kobatelaka mitindo ya Nzambe. Tosalaka mpe tobatelaka mayokani na Nzambe yango ebengisaka nguya ya Yesu Klisto kati na bomoi na biso. Tomipesaka biso moko na mosala losambo ya moto ye moko, lokola kosambela, kokila bilei, mpe kolukaka makomi. Tosalaka mpe na bondimi, koyanolaka na botambwisi ya molimo tozwaki. Tomilengelaka na bososoli mpe toliaka elambo lolenge elongobani. Ntango tosali bongo, Mobikisi akomi ya solo mingi na bomoi na biso, kaka lokola Ye azalaki ya solo mpo na Moroni, oyo azalaki sikisiki na bondimi na ye na Yesu Klisto. Moroni ayebaki ete akokaki kotya motema na Mobikisi mpo na bokambi mpe bokangoli (tala Alma 48:16). Biso, lisusu, tokoki kotya motema na Yesu Klisto mpo na bokambi mpe bokangoli

Tokoki komilengela lisusu na kolendisaka mabota na biso. Tata na biso ya Lola abongisaki mabota mpo na kosalisa biso tozala na esengo mpe tososola lolenge nini kozonga epayi na Ye. Libota na biso ekoki kozala liziba ya lisalisi mpo na biso. Biso nyonso tokoki koyoka esengo mpe bolingo na komikundolaka ete tozali eteni ya libota monene ya Nzambe, ata soki ezalela ya makambo ya moko na moko ya mabota na biso ezali ndenge nini.

Tokoki na lisanga kozwa makasi mpe komilengela mpo na bitumba na biso ya molimo ntango tozali kosangana na masanga ya Basantu. Makonzi mpe badistiliki epesaka biso esika ya kokimela mpe ya bokengi. Tokoki koleisana na molimo moko mosusu, kosalisa moko na mosusu mpo na kobatela mitindo ya Nzambe, mpe kolendisana moko na mosusu mpo na kotia motema na Klisto, ntango nyonso mpe mingimingi na ntango ya mikakatano. Ntango tosanganaka, tomonaka ete tobundaka bitumba na biso bisomei te. Tozali na baninga, bateyi, mpe bakambi oyo bakoki kosalisa mpe kobatela biso. Tozali makasi koleka ntango tomilengeli elongo.

Na lolenge ya kokamwa, Moroni alobaki ete esengo nyonso ya bato na ye eutaki na kozala sembo na bondimi na bango na Nzambe mpe na lingomba na bango. Lokola Moroni, tosengeli kososola ete esengo eyaka na ntina ya Tata na Lola mpe mwango na Ye mpe na ntina ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye. Ntango tokomi kososola mokano na biso, mayele ya kolonga, mpe komilengela mpo na bitumba ya elilingi, tokozwa lisalisi ya bonzambe mpe nguya.

Lokola Moroni, nayebi ete Tata ya Lola mpe Yesu Klisto bamemaka bonsomi ya suka kowuta na bowumbu—bonsomi kowuta na liwa mpe lisumu. Bapambolaka biso na nguya na bango ntango totalelaka bango na makambo nyonso

Matangi

  1. Taking Charge of Technology,” Gospel Library.

  2. Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi (2022), Gospel Library.

  3. Tala Russell M. Nelson, “Esengo mpe Kokoba Kozala na Molimo,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2016, 82.

Bimisa na lokasa