Liahona
Bondeko ya Nguya
Sanza ya Mwambe 2024


Etinda ya sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge , Sanza ya Mwambe 2024

. Bondekoya Nguya

Boyokani ezali mingi koleka kondimana; ezali bondeko.

Elilingi
bakiti ya langi ya mayi ya pondu

Nazali tii lelo na foto ya bakiti ya langi ya mayi ya pondu wapi Mpaka Pistone mpe Mpaka Morasco bafandaki ntango bateyaki libota na ngai na ndako na biso na Argentine. Bateyaki na nguya ya milimo makasi ete ndeko na ngai ya mwasi ya mibu 10 mpe ngai na mibu 9 tokimaki mbango kosimba bakiti nsima ya kokende na bango, kolikyaka ete nguya ekolengisa biso

Na sosolaki sasaipi ete nguya eyakiuta na bakiti te kasi uta na kozala na bondeko ya boyokani na Nzambe mpe Yesu Klisto

Mayele ya Libatisi na Ngai

Nasalaki boyokani na ngai ya yambo na Sanza ya Zomi na Moko 13, 1977. Nazali komikundola mingi te na oyo etali libatisi na ngai, kasi nazali komikundola Mpaka Pistone kosalisaka ngai kati na mayi mpe Mpaka Morasco kosala likuli ya nkotisa ntango suki na ngai ezalaki nainu mayi Nazali komikundola lisusu esengo nayokaki ntango baninga ya sika ya palwasi bazalaki koyamba ngai mpe kopesa ngai bipwepwe na lolenge ya Argentine mpe mposa makasi nayokaki ya kokoma mwana mwasi ya sembo ya Tata na Lola.

Elilingi
libota na libatisi

Elenge Ndeko Mwasi Spannaus (na katikati) elongo na baboti na ye (na loboko ya mwasi), ndeko na ye ya mwasi Silvina (mosika na loboko ya mobali), mpe Mpaka Morasco.

Nsima, nasosolaki ete esengo nayokaki ewutaki na likabo ya Molimo Mosantu. Nayekolaki ete ntango nazali kobatela mayokani na Nzambe na bosembo, Molimo akolinga kozala elongo na ngai. Molimo Mosantu azali kaka moko ya mapamboli ya nguya oyo ewutaka na boyokani ya bondenko elongo na Nzambe mpe Yesu Klisto

Sikawa, atako ntango bantina, makanisi mpe misala na ngai ekiti, nazalaka na elikya ya kokoba komeka. Mpo na nini? Mpamba te kolia elambo elambo epesaka ngai likoki ya kozongisa sika mayokani na ngai mpe kosala mayokani ya sika poso na moko na moko. Nazali na botondi makasi mpo na lipamboli oyo.

Boyokani ya Bondeko, ya Esengo

Toyokaka mbala na mbala ete mayokani ezali bilaka ya nzela mibale kati na biso na Nzambe. Atako yango ezali solo, yango ezali bobele nyonso bongo te. Solo, “Kobatela boyokani ezali te likambo ya mombongo ya malili te kasi ezali nde bondeko ya esengo.”

Na bongo lolenge nini okelaka boyokani ya bondeko na Tata na Lola mpe Mobikisi? Balingaka yo mingi na motema moko mpe balingaka kopambola yo (tala 3 Nefi 14:11). Kasi bondeko nyonso ya nzela mibale esengaka ntango mpe bolingo na ngambo nyonso mibale.

Olingi kolekisa ntango mingi na Bango? Ntango ozali kosala makambo oyo bango balingaka kosala, ozali kotambola elongo na Bango! Yango ekoki kozala pete lokola koyokelaka moninga moko na ntango ya mikakatano, kozwaka ntango ya kosakana na ndeko moko, to kokotisaka moto moko oyo amiyoki babwakisi ye. Kala mingi te, nalekisaki ntango ya kotambola elongo na Nzambe na kobomba bansango ya mongongo mpe kotinda batexto epayi ya moninga moko na Argentine oyo azalaki koyoka ete azali ye moko. Nakanaki lisusu kobatela mokanda na ngai ya tempelo mpo ete nakoka kolekisa ntango elongo na Nkolo na ndako na Ye ya bule. Bokoki kosambela mpo na makanisi oyo ekosalisa bino kolekisa ntango elongo na Tata na Lola mpe Mobikisi na bino.

Olingi kolakisa Bango ete ozali na ekenge? Botalela mitindo oyo bosalelaki boyokani mpo na kobatela lokola nzela ya komonisela bolingo na bino, kasi te lokola molongo ya mibeko. Ndakisa, kobika Liloba ya Bwanya, nayekolaki lolenge ya kolamba bilei malamu. Sikawa, nazali koteya bana na ngai ya basi basala lolenge moko. Ntango bozali na bolingi ya kobatela mibeko ya Nzambe, bolingo na bino mpo na Ye mpe mpo na Mobikisi ekokola.

Boyokani ya bondeko na biso na Tata na Lola mpe Yesu Klisto ekosalisa biso toyeba Bango malamu koleka mpe kozwa nguya na bango mingi koleka mpo na bomoi na biso—mingi mpenza koleka eloko nyonso oyo liboke ya bakiti ya langi ya mayi ya mpondu ezali na yango mpo na kopesa. Mpe nguya oyo ekobongola biso libela na libela!

Litangi

  1. Ann M. Madsen, na Truman G. Madsen, The Temple: Where Heaven Meets Earth (2008), 69.

Bimisa na lokasa