Yaka, Landa Ngai 2024
Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia


“Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo Libota mpe Eklezia,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia 2024

Elilingi
Libota ezali koyekola makomi

Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota

Mokanda Oyo Ezali Mpo na Nani?

Mokanda oyo oyo ezali mpo na moto nyoso oyo alingi koyekola uta na Buku ya Mormon—moto na moto, lokola libota, mpe kati ya bakelasi ya Eklezia. Soki na mikolo eleki bozalaki koyekola nsango malamu mbala na mbala te, mokanda oyo ekoki kosalisa bino mpo na kobanda. Soki bozalaka na momesano ya koyekola nsango malamu, mokanda oyo ekoki kosalisa bino bozwa mabaku ya ntina mingi koleka.

Bato mpe Mabota na Ndako

Esika malamu mpo na koyekola nsango malamu ezali na ndako. Bateyi na bino ya eklezia bakoki kosunga bino, mpe bokoki kozwa makasi uta na bandimi misusu ya palwase. Kasi mpo na kobika na molimo mpenza, yo na libota na yo bosengeli koleisama mokolo na mokolo uta “liloba malamu ya Nzambe” (Moroni 6:4; tala lisusu Russell M. Nelson, “Opening Remarks,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 6–8).

Salela mokanda oyo na lolenge oyo omoni ekoki kosalisa yo. Mateya yango ezali kolakisa na polele bosolo mosusu ya seko ekutami na Buku ya Mormon mpe ezali kopesa makanisi mpe milulu mpo na kosalisa yo otanga makomi na yo moko, elongo na libota na yo, to elongo na baninga. Ntango ozali koyekola, landa botambwisi ya molimo mpo na kozwa bosolo ya seko oyo ezali ntina monene mpo na yo. Luka mateya ya Nzambe mpo na yo, mpe landa babotindindiki oyo ozwii.

Bateyi mpe Bayekoli na Eklezia

Soki ozali koteya na kelasi ya Eteyelo ya Bana, kelasi ya Eteyelo ya Eyenga ya bilenge to bakolo, lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona, to kelasi ya Bilenge Basi, oipesami makasi ya kosalela mateya oyo ezali na kati ya bisaleli oyo ntango ozali komilengela mpo na koteya. Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia ezali molongo na yo ya koteya mpo na kelasi ya Eyenga. Makanisi ya koyekola na mokanda oyo ebongisami mpo na koyekola na ndako mpe na eklezia. Ntango ozali komilengela mpo na koteya, banda na kozwaka mayele ya yomoko kati na makomi. Bomilengeli na yo ya motuya mpenza ekosalama ntango ozali koluka na mozindo makomi mpe ozali koluka bofuli ya Molimo Mosantu. Luka bosolo ya seko oyo esalisi yo okoma mingi lokola Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Yaka, Landa Ngai ekoki kosalisa yo koyeba mingi ya bosolo yango mpe kososola eloko nini makomi elobeli.

Bomba na makanisi ete koyekola nsango malamu, na malamu na yango mpenza, etie ndako to libota na katikati mpe esungami na Eklezia. Na maloba mosusu, mokumba na yo monene ezali kosalisa bato ozali koteya na makasi na bango ya koyekola mpe kobika nsango malamu na ndako to libota. Pesa bango mabaku ya kokabola mayele, makanisi, mpe mituna na bango etali biteni ya makomi. Bengisa bango bakabola bosolo ya seko oyo bango bamoni. Yango ezali motuya mingi koleka kosilisa kotanga biteni ebele ya mokanda.

Eteyelo ya Bana

Bomilengeli na yo ya koteya na Eteyelo ya bana ebandi ntango oyekoli Buku ya Mormon yo moko mpenza mpe elongo na libota na yo. Ntango ozali kosala yango, zala ya kofungwama na mayoki ya molimo mpe makanisi uta na Molimo Mosantu etali bana na kelasi na yo ya Eteyelo ya bana. Zala ya kosambela mpenza, mpe Molimo ekoki kofula yo na makanisi ya kosalisa bango bayekola nsango malamu ya Yesu Klisto.

Ntango ozali komilengela mpo na koteya, osengeli kozwa bofuli mosusu na kotalaka makanisi ya koteya na mokanda oyo. Liteya moko na moko na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia ezali na eteni moko babengo “Makanisi mpo na Koteya Bana.” Kanisa mpo na makanisi oyo lokola makanisi epesami mpo na kotindika boifulami na yo. Oyebi bana na kelasi na yo ya Eteyelo ya bana—mpe okoyaa koyeba bango kutu malamu ntango ozali kosolola elongo na bango na kelasi. Nzambe ayebi bango nyonso mpe, mpe Ye akofula yo na lolenge ya malamu koleka mpo na koteya mpe kopambola bango.

Yango ekoko kozala ete ete bana kati na kelasi na yo basila kosala milulu misusu na Yaka, Landa Ngai elongo na mabota na bango. Ezali MALAMU. Kobandela ezali malamu. Kanisa kobengisa bana bakabola elongo na moko na mosusu oyo bango bayekolaki na ndako—kasi osengeli lisusu kobongisa banzela mpo ete bana basala elongo ata soki bango bazali koyekola na ndako te. Bana bayekolaka bosolo ya nsango malamu mingi koleka ntango bosolo eteyami mbala na mbala na nzela ya milulu ekeseni. Soki omoni ete molulu ya boyekoli ezali malamu mpo na bana, kanisa kobandela yango, mingimingi soki ozali koteya bana mike. Osengeli lisusu kozongela molulu moko uta na liteya moko eleki.

Na basanza oyo ezali ba baeyenga mitano, bateyi ya Eteyelo ya bana balendisami mpo na kosombitina mateya ya Yaka, Landa Ngai oyo ezali na manaka ya eyenga ya mitano na lisano moko to mingi ya milulu oyo ya koyekolela“Appendix B: Mpo na Eteyelo ya bana—Kolengelaka Bana mpo na Bomoi na Nzela ya Liyokani na Nzambe.”

Bakelasi ya Eteyelo ya Eyenga mpo Bilenge mpe Bakolo.

Moko ya ntina monene oyo tosanganaka na bakelasi ya Biteyelo ya Eyenga ezali kosungana mpe kopesana makasi na moko mpe mosusu ntango tozali kobunda mpo na kolanda Yesu Klisto. Lolenge moko ya pete mpo na kosala yango ezali kotuna motuna moko “Eloko nini Molimo Mosantu ateyaki yo na poso oyo ntango otangaki Buku ya Mormon na Yaka, Landa Ngai?” Biyano na motuna oyo ekoki kokamba na masolo ya ntina monene oyo etongaka bondimi na Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye.

Nsima okoki kobengisa lisolo efandisami likolo ya makanisi mpo na koyekola kati na Yaka, Landa Ngai. Ndakisa, likanisi moko mpo na koyekolai ekoki kotinda koluka na mozindoi Alma 36 mpe kosalaka molongo ya maloba oyo eteyi oyo etalii mosala ya Mobikisi na boyamboli. Osengeli kotuna bato ya kelasi bakabola mpe basolola oyo etali maloba bamonaki. To okoki kolekisa mwa natngo na kolasalaka molongo elongo lokola kelasi moko.

Masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona mpe Bakelasi ya Bilenge Basi

Ntango masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona mpe bakelasi ya Bilenge Basi bakutanaka na baeyenga, ntina na bango ezali mwa moke ya kokesana uta na bakelasi ya Eteyelo ya Eyenga. Lisusu mpo na kosalisana moko mpe mosusu ayekola nsango malamu ya Yesu Klisto, lisanga yango lisusu bakutanaka mpo na kopesanaka toli na oyo etali bokokisi mosala ya libiki mpe bonetoli (tala General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 1.2. Basala yango na nse ya botambwisi ya bokambi ya kelasi mpe lisanga likoki.

Na ntina yango, liyangani moko na moko ya kelasi to ya lisanga likoki esengeli ebanda elongo na moko ya bokambi ya lisanga likoki to ya kelasi kotambwisaka lisolo etali makasi ya,ndakisa, kobika nsango malamu, kosalisa bato bazali na bosenga, kokabola nsango malamu, to kosangana na mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota.

Nsima na ntango yango mpo na kopesa toli elongo, moteyi moko akotambwisa kelasi to lisanga likoki na koyekolaka nsango malamu elongo. Bakambi ya mikolo to bato ya kelasi to ya lisanga likoki akoki kopesama ndingisa ya koteya. Kelasi to Bokambi ya lisanga likoki, kosololaka elongo na bakambi ya bakolo, basalaka misala yango.

Bato bapesami ndingisa ya koteya basengeli bamilengela na kosalelaka makanisi mpo na koyekola oyo ezali na mateya ya poso ya Yaka, Landa Ngai. Naliteya moko na moko, ielembo oyo elakisi molulu moko oyo ezali mingimingi ntina mpo na bilenge. Nzokande, makanisi nyonso kati naliteya ekoki kosalelama lokola molulu ya boyekoli mpo na bilenge.

Ndakisa ya manaka mpo na mayangani ya lisanga likoki mpe ya kelasi, tala bobakisi D.

Bimisa na lokasa