Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya Yambo 1–7: Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto. Nkasa ya Boyingisi ya Buku ya Mormon


Sanza ya yambo 1–7: Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto. Nkasa ya Boyingisi ya Buku ya Mormon,” Yaka, Landa Ngai—mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya Yambo 1–7. Nkasa ya Boyingisi ya Buku ya Mormon,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Mormon azali kokoma na bapalaki ya wolo

Sanza ya yambo 1–7: Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto

Nkasa ya Boyingisi ya Buku ya Mormon

Liboso kuto bokoma na 1 Nefi mokapo 1, bokomona ete Buku ya Mormon ezali buku ya momesano te. Nkasa na yango ya boyingisi ezali kolimbola lisolo ya makambo mazingami maye ezanga bokokanisi—oyo ekotisi botali uta na banzelu, makundoli ya kala ekundamaka bikeke mingi eleki na mopanzi ya ngomba, mpe elenge mobali moko kobongolaka makundoli yango na nguya ya Nzambe. Buku ya Mormon ezali kaka te lisolo ya bonkoko ya Amelika ya kala. Ezali koluka kondimisa banso “ete Yesu azali Klisto” (lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon), mpe Nzambe Yemei ayangelaki lolenge nini ekomamaki, ebatelamaki, mpe elengelamaki mpo na biso. Mobu oyo, ntango bozali kotanga Buku ya Mormon, bosambela na ntina na yango, mpe bosalela mateya na yango, bokobengisa nguya ya Mobikisi na bomoi na bino. Mpe bokoki komiyoka kotindikama mpo na kolobaka, lokola Banzeneneke Misato balobaki kati na ya bango litatoli, “ezali ya kokamwa na miso [na ngai].”

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

Lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon

Koyekola Buku ya Mormon ekoki kolendisa bondimi kati na Yesu Klisto.

Oyo lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon ezali na mingi koleka kaka nkombo. Katikati na makambo mosusu, ezali kotanga bantina mingi ya makundoli ya bule oyo. Boluka bantina kati na lokasa ya nkombo. Mituna lokola oyo ekoki kosalisa bino bomanyola: mpo na nini tozali na Buku ya Mormon? Lolenge nini Buku ya Mormon ekeseni na babuku misusu?

Sikoyo ekokaki kozala ngonga malamu ya kosala mwango ya moto ye moko to ya libota mpo na kotanga Buku ya Mormon mobu oyo. Ntango nini mpe esika wapi bokotangela? Lolenge nini bokobengisa Molimo kati na boyekoli na bino? Ezali na likambo moko ekeseni bokoki koluka ntango ozali koyekola? Ndakisa, bokoki koluka biteni ya makomi oyo ezali kokokisa bantina bomonaki na lokasa ya nkombo. Bokoki kobomba molongo ya milongo ya makomi oyo ezalikotonga bondimi kati na yesu Klisto.

Tala lisusu 2 Nefi 25:26; Mosiya 3:5–8; Alma 5:48; 7:10–13; Elamani 5:12; 3 Nefi 9:13–18; 11:6–14; Moroni 10:32–33.

Elaka ya profeta Mokambi Russell M. Nelson alobaki, “Nalaki ete ntango bozali komaniola maye boyekoli [kati na Buku ya Mormon], maninisa ya lola ekofungwama, mpe bokozwa biyano na mituna na bino moko mpe boyangeli mpo na bomoi na bino moko” (“The Book of Mormon: What Would Your Life Be Like without It?,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 62–63).

Elilingi
elembo ya seminele

Boyingisi na Buku ya Mormon; “Litatoli ya Banzeneneke Misato”; “Litatoli ya Banzeneneke Mwambe

Nakoki kozala nzeneneke ya Buku ya Mormon.

Molimo Mosantu akoki kotatola epai na yo ete Buku ya Mormon ezali ya solo, atako kutu omonaki bapalaki ya wolo te lokola emonaki Banzeneneke Misato mpe Banzeneneke Mwambe. Ntango bozali kotanga maloba na bango, bokanisa oyo etali lolenge nini matatoli na bango elendisi oyo ya binos.

Nini efuli bino etali lolenge nini banzeneneke bakabolaki litatoli na bango ya Buku ya Mormon? Bokanisa lolenge nini bokoki kokabolela litatolina bino ya Buku ya Mormon. Ndakisa, bokanisa ete bozali kosolola na moninga moko oyo ayoka naino na ntina ya Buku ya Mormon liboso te. What would you tell him or her about it? Lolenge nini bokomeka kofula moninga na bino mpo na kotanga yango? Bokanisa kozongela kotanga Boyingisi ya Buku ya Mormon. Bokoki komona makambo mikemike kuna oyo ekozala ntina mpo na kokabola elongo na moninga na bino. Bavideo oyo elandi ekoki lisusu kopesa bino makanisi:

Bokanisa kosala molongo ya nkombo ya makambo bokokabola na moninga moko etali Buku ya Mormon. Bomeka kokabola Buku ya Mormon kosalelaka aplikasio ya Buku ya Mormon.

Tala lisusu Ronald A. Rasband, “This Day,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2022, 25–28; Gospel Topics, “Book of Mormon,” Gospel Library; “An Angel from on High,” Hymns, no. 13.

Elilingi
Joseph Smith mpe Banzeneneke Misato bazali kosambela elongo

Banzeneneke Misato bapesi litatoli ya Buku ya Mormon.

Litatoli lya Profeta Joseph Smith

Bobimi ya Buku ya Mormon ezalaki likamwisi.

Soki moto moko atuni yo wapi esika Buku ya Mormon ewutaki, bokoloba nini? Lolenge nini bokolimbola loboko ya Nzambe na kopesaka biso Buku ya Mormon? Ntango bozali kotanga litatoli ya Joseph Smith, bosala keba na lolenge nini alibolaki yango. Koyekamaka na maye bozali kotanga, lolenge nini bokanisi Nzambe ayokaka na oyo etali motuya ya Buku ya Mormon?

Tala lisusu Ulisses Soares, “The Coming Forth of the Book of Mormon,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 32–35; Saints, vol. 1, The Standard of Truth, 21–30; Gospel Topics Essays, “Bobongoli ya Buku ya Mormon,” Gospel Library.

Mpo na makanisi mingi, tala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon

Kotanga Buku ya Mormon esalisaka ngai nazala na bondimi bondimi kati na Yesu Klisto.

  • Botika bana na bino batala mpe basimba mokanda moko ya Buku ya Mormon. bosalisa bango balakisa na nkombo ya nse, Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto. Bokoki lisusu kosalisa bango bamona, likolo ya lokasa ya nkombo, maloba “Yesu Klisto azali Klisto, Nzambe ya Seko, komimonisaka yemei epayi ya bikolo nyonso.” Bosalisa bango basosola ete oyo elingi koloba Buku ya Mormon eteyaka biso oyo etali Yesu Klisto. Na mokuse bolobela bango lolenge nini Buku ya Mormon elendisi bondimi na bino kati na yesu Klisto. Bokoki lisusu kotuna bango oyo etali masolo na bango balingaka ya Buku ya Mormon. Koyemba “Masolo ya Buku ya Mormon” (Children’s Songbook, 118–19) ekoki kokundolisa bango masolo misusu oyo.

Boyingisi ya Buku ya Mormon

Buku ya Mormon ezali libanga likonzi ya eyamba na biso.

  • lokasa ya molulu mpe elilingi ya poso oyo ezali na nse ekoki kosalisa bana na bino basosola maloba oyo ya Joseph Smith kati na Boyingisi na Buku ya Mormon: “Buku ya Mormon [ezali] libanga likonzi ya eyamba na biso.” Ekozala lisusu esengo kotonga to koyema egude na libanga likonzi na likolo. Nini ekoki kosalama soki libanga likonzi elongolami? Nini elingaki kosalama soki tozalaki na Buku ya Mormon te? Bokoki kotanga elongo eteni ya nsuka ya boyingisi mpo na komona nini lisusu toyekoli ntango toyambi bosolo ya Buku ya Mormon. Lolenge nini tokoki kosala ete Buku ya Mormon ezala libanga likonzi ya bondimi na biso na Yesu Klisto?

Elilingi
Egude ya mabanga na libanga likonzi oyo etelemisi yango na esika

Buku ya Mormon ezali libanga likonzi ya eyamba na biso.

Litatoli ya Banzeneneke Misato”; “Litatoli ya Banzeneneke Mwambe

Nakoki kozala nzeneneke ya Buku ya Mormon.

  • Mpo na kosalisa bana na biso basosola nini elingi koloba kozala nzeneneke, bokoki kolimbolela bango likambo moko bomoni oyo bamoni te. Nsima botika bango basala lokola mpo na bino. Yango ekoki komema na lisolo ya etali bato 11 oyo bamonaki bapalaki ya wolo uta na yango Buku ya Mormon ebongolelamaki. Ntango bozali kotanga matatoli yango elongo, bokoki kosolola oyo etali mpo na nini banzeneneke oyo balingaki bato mosusu bayeba oyo etali matatoli na bango. Nani tolingi alobela maye etali Buku ya Mormon?

Litatoli ya Profeta Joseph Smith

Buku ya Mormon epesamaki epayi na biso na nguya ya Nzambe.

  • Mpo na kosalisa bana na biso bayekola lolenge nini Nzambe apesaki biso Buku ya Mormon, bokoki kotanga biteni ya “Litatoli lya Profeta Joseph Smith” epayi na bango. Bokoki lisusu kosalela “Mokapo 1: Lolenge nini Tozwilaki Buku ya” (na Masolo ya Buku ya, 2–4). Bana na bino bakoki lisusu kosepela kosakana na lisolo yango mwa bangonga.

Mpo na makanisi mingi, tala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga zulunale.

Elilingi
Joseph azali kozwa bapalaki ya wolo uta na Moroni

Moroni Azali Kopesa Bapalaki ya Wolo, na Gary L. Kapp

Bimisa na lokasa