Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya yambo 8–14: “Nakokende mpe Nakosala.” 1 Nefi 1–5


“Sanza ya Yambo 18–14: ‘Nakokende mpe Nakosala.’ 1 Nefi 1–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

Sanza ya yambo 8–14. 1 Nefi 1–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Libota ya Lehi bazali kokende mobembo kati na esobe.

LehiAzali kokende Mobembop pembeni ya Mbu Motane, by Gary Smith

Sanza ya yambo 8–14: “Nakokende mpe Nakosala”

1 Nefi 1–5

Buku ya Mormon ebandi na lisolo ya libota moko ya solo oyo ezalaki kokutana na mikakatano ya solo. Esalamaki mibu 600 Liboso ya Mbotama ya Klisto, kasi ezali na makambo etali lisolo oyo oyo ekokaki komonana lokola momesano na mabota mingi lelo. Libota oyo ezalaki kofanda na mokili moko ya nkuna, kasi Nkolo alakaki na bango ete soki bakolanda Ye, Ye akokamba bango na bokengi. Na nzela bazalaki na bangonga malamu mpe bangonga mabe; ya mapamboli minene mpe makamwisi, kasi bazalaki lisusu na boswani mpe bowelani. Masolo mobimba boye ya libota komekaka kotia nsango malamu na misala ezali mingi te: baboti kobundaka mpo na kofula bondimi kati na libota na bango mpe komitungisaka na oyo etali bokengi, bana kokanaka bakondimela baboti na bango, mpe bandeko mibali kosalelaka zuwa mpe bowelani—mpe ntango mosusu kolimbisanaka moko na mosusu. Na nyonso wana, ezali na nguya kati na ndakisa ya libota ebonga nie te oyo ya bondimi.

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

1 Nefi 1–5

Liloba ya Nzambe ezali “na motuya mingi” mpo na ngai

Eteni moko ya likomi ya motuya na Buku ya Mormon ezali “motuya mingi” ya liloba ya Nzambe (1 Nefi 5:21). Ntango bozali kotanga 1 Nefi 1–5, boluka banzela liloba ya Nzambe epambolaki bango moko to na nzela ya bato mosusu libota ya Lehi (ndakisa, tala 1:11–15; 3:19–20; 5:10–22). Makambo oyo eteyi bino nini etali liloba ya Nzambe? Bozwi nini oyo efuli bino mpo na koluka kati na makomi?

Tala lisusu “As I Search the Holy Scriptures,” Hymns, no. 277.

1 Nefi 2

Nakoki kozwa mpe kolendisa litatoli na ngai ntango nazali kotalela Nkolo.

Nefi ayebani mpo na bondimi na ye ya nguya kati na Nkolo, kasi asengelaki kosala mpo na kozwa litatoli na ye—kaka lokola biso nyonso tosalaka. Botangi nini kati na 1 Nefi 2 oyo ezali kolakisa mpo na nini Nefi azalaki na makoki ya kozwa litatli ete maloba ya tata na ye ezalaki solo? mpo na nini Lamani mpe Lemuele bazwaki litatoli oyo? (Tala lisusu 1 Nefi 15:2–11). Ntango nini oyokaki Nkolo alembisi motema na yo?

Elilingi
elembo ya seminele

1 Nefi 3–4

Nzambe akolengela nzela mpo ete ngai nasala bolingi na Ye.

Ntango Nkolo atindaki bana mibali ya Lehi bazwa bapalaki ya motako, Apesaki mitindo ya ndenge te etali lolenge nini kosala yango yango. Oyo ezali mbala mingi solo mpo na boyangali tozwaka uta na Nzambe, mpe ekokaki kokanisama lokola Ye asengaki “likambo moko ya mpasi” (1 Nefi 3:5). Nini eyano ya Nefi efuli yo mpo na motindo ya Nkolo kati na 1 Nefi 3:7, 15–16?

Ntango bozali kotanga 1 Nefi 3-4, boluka mikakatano mingi Nefi akutanaki na yango. Lolenge nini Nkolo “alengelaki nzela” mpo ete Nefi “akokisa likambo oyo ye [atindaki]”? Mpo na nini ezali ntina mpo bino boyeba maye Nkolo asalaki mpo na Nefi?

Nzela moko ya nguya oyo Nzambe alengelaki biso tobatela mitindo na ye ezali na kotindaka Yesu Klisto kozala Mobikisi na biso. Bokanisa kotanga nsango ya Mokambi Dallin H. Oaks “Mobikisi na Biso asala nini mpo na biso?” (Liahona, Sanza ya mitano 2021, 75–77). Lolenge nini Yesu Klisto alengelaki nzela mpo na moko na moko na biso? Koyeba ete Ye alongaki makambo nyonso mpo na bino, nini bozali komiyoka na kokamwisama mpo na “kokende mpe kosala”?

Tala lisusu Gospel Topics, “Obedience,” Gospel Library.

Salela masolo mpe bandakisa mpo na koteya mabongi to mibeko ya nsango malamu. Ntango bozali komilengela mpo na koteya, bokanisa na makambo bokutanakinayango bino moko oyo ekoki kobakisa litatoli ya mibale na masolo kati na makomi. Ndakisa, ntango nini Nzambe alengelaki nzela mpo ete bino bosala bolingi na Ye?

Elilingi
Lehi mpe Sariah azali kopesa mbote na Nefi mpe bandeko na ye ya mibalii

Batondisamaki na Esengo, na Walter Rane

1 Nefi 4:1–3; 5:1–8

Komikundolaka misala ya Nzambe ekoki kopesa ngai bondimi ya kotosa mitindo na Ye.

Ntango nini Lamani mpe Lemuele bazalaki solo koyimayima, bazalaki mbala mingi penepene na Nefi mpe Lehi mpo na kolendisa mpe kopamela bango. Ntango boyoki mposa ya koyimayima, ekoki kozala na lisalisi ya kotanga maloba ya Nefi mpe Lehi. Lolenge nini Nefi mpe Lehi bamekaki kosalisa bausu batonga bondimi kati na Nzambe? (tala 1 Nefi 4:1–3; 5:1–8; tala lisusu 7:6–21). Boyekoli nini oyo ekoki kosunga bino ntango bomekami koyimayima to kotomboka?

1 Nefi 4:5–18

“Nakambamaki na Molimo.”

Na 1 Nefi 4:5–18, boyoki nini etali makoki ya Nefi ya koyeba mpe kolanda Molimo? Bokoki koyekola Mokambi etinda ya Russell M. Nelson “Revelation for the Church, Revelation for Our Lives” (Liahona, Sanza ya mitano 2018, 93–96) mpo na koyekola mingi etali kozwa emoniseli uta na Nkolo.

Mpo na makanisi mingi, botala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

1 Nefi 2:16

Nakoki kozala na litatoli na ngaimei.

  • Lolenge nini Nefi ayebaki ete oyo tatana ye ateyaka ezalaki solo. Bosalisa bana na bino bamona biyano na mituna kati na 1 Nefi 2:16, 19. Bakoki lisusu kosepela kokoma bikela ya babriki to biloko mosusu mpe nsima kotonga eloko moko na biloko yango. Yango ekoki kokamba na lisolo etali lolenge nini misala oyo esalisaka biso totonga litatoli.

  • Bokoki kolakisa bana na bino bafoto to biloko oyo kolakisa makambo bakoki kolukela litatoli, ndakisa Buku ya Mormon mpko to foto ya Yesu klisto, tempelo, to profeta na bomoi. Bobengisa bango bazwa moko mpe bakabola matatoli na bango ya eloko wana. Bokoki lisusu koyebisa bana na bino lolenge nini bozwilaka litatoli na bini. Mpo na nini biso tozali na mposa ya litatoli?

1 Nefi 3–4

Nzambe akosalisa ngai nabatela mitindo na Ye.

  • Bokanisa kosalela moko to mikanda mingi oyo mpo na kosalisa bana bino balobela lolenge nini Nzambe asalisaki Nefi azwa bapalaki ya motako: 1 Nefi 3–4; lokasa ya molulu ya poso oyo; “Nephi’s Courage” (Children’s Songbook, 120–21); mpe “mokapo 4: Bapalaki ya Motako” (katina Masolo ya Buku ya Mormon, 8–12).

  • Bino mpe bana bino bokoki kosepela kosambela moko nsima ya mosusu 1 Nefi 3:2–7. Ntango mosusu bokoki kosalalokola kozala Nefi mpe kosenga bana na bino bazonga na Yelusaleme mpo na kozwa bapalaki ya motako. Bobengisa bango bayanola na malob ana bangomei lokola soki bazalaki Lamanii mpe Lemuele to Nefi. Makambo mosusu nini Nzambe atingi biso tosala? (tala bafoto 103–15 ikati na Gospel Art Book to Mosiya 18:8–10 mpo na makanisi). Lolenge nini tokoki kozala lokola Nefi?

1 Nefi 3:19–21; 5:10–22

Makomi mazali na bozwi monene.

  • Makomi mazalaki motuya mpenza epayiya libota ya Nefi. Mpo na kolakisa oyo, bokoki kobengisa bana na bino mpo na kosalisa bino baloba to basala maye nefi mpe bandeko na ye ya mibali basalaki mpo na kozwa bapalaki ya motako: basalaki mobembo ya ntaka molai, batikaki wolo na bango mpe palata, mpe babombamaki na lidusu ya libanga mpo na kobikisa bomoi na bango. Nsima bokoki kotanga 1 Nefi 5:21 mpe kosolola mpo na oyo etali mpo na nini makomi mazalaki motuya mpenza epayi ya libota ya Lehi. Mpo na nini mazali motuya epayi biso? Lolenge nini tokoki kosalela makomi lokola bozwi?

Elilingi
Nefi mpe libota na ye bazali koyekola bapalaki

Nefi mpe libota na ye bapesaki makomi motuya.

1 Nefi 4:6 .

Molimo Mosantu akolakisa ngai ntango nazali koluka kosala bolingi ya Nzambe.

  • Nsima kotalaka lisusu elongo kati na 1 Nefi 3 lolenge nini Nefi mpe bandeko na ye ya mibali bamekaki kozwa bapalaki ya motako, botanga elongo na ban ana bino 1 Nefi 4:6 mpo na komona maye Nefi asalaki oyo epesaki ye nzela ya kolonga nsuka nsuka. Nsima bana bino bakoki kosala molongo ya makambo oyo Nzambe alingi bango basala. Lolenge nini Molimo Mosantu asalisaka biso na makambo ya boye?

Mpo na makanisi mingi, botala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga zulunale.

Elilingi
Nefi atelemi penepene ya Labana na nse ya kolangwa

Natosaki Solo Mongongo ya Molimo, na Walter Rane

Bimisa na lokasa