Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya yambo 22–28: “Olatisami na Bibundeli ya Bosembo mpe na Nguya ya Nzambe.” 1 Nefi 11–15


Sanza ya yambo 22–28: “Olatisami na Bibundeli ya Bosembo mpe na Nguya ya Nzambe” 1 Nefi 11-15,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya yambo 22–28. 1 Nefi 11–15,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
bato bazali kolia mbuma ya nzete ya bomoi

Bolingo na Nzambe, by Sabrina Squires

Sanza ya yambo 22–28: “Olatisami na Bibundeli ya Bosembo mpe na Nguya ya Nzambe”

1 Nefi 11–15

Ntango Nzambe azali na mosala monene mpo ete profeta na Ye asala, Apesaka mbala mingi profeta wana limoni monene. Mose, Yoane, Lehi, mpe Joseph Smith banso bazwaki mamoni lokola wanat—mamoni oyo etandolaki makanisi na bango mpe esalisaki bango bamona mpenza lolenge nini mosala ya nzambe monene mpe kitoko oyo efulaka ezali mpenza.

Nefi lisusu azwaki moko ya mamoni oyo ebongolaka bomoi. Amonaki mosala ya Mobikisi, mambi makoya nsima ya bana ya Lehi na mboka ya elaka, mpe mikolo ya nsuka ya mosala ya Nzambe. Nsima ya limoni oyo, Nefi alengelamaki malamu mpo na mosala oyo ezalaki liboso. Mpe kotangaka limoni oyo ekoki kosalisa kolengela bino mpe—mpo ete Nzambe azali na mosala mpo ete bino bosala kati na bokonzi na Ye. Bozali kati na “basantu ba eklezia ya Mwana na mpate” oyo Nefi amonaki, “oyo bapanzamaki likolo ya etando nyonso ya mabele; mpe balatisamaki na bibundeli ya bosembo mpe na nguya ya Nzambe na nkembo monene.” (1 Nefi 14:14).

Tala lisusu “Nephi Sees a Vision of Future Events” (video), Gospel Library.

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

1 Nefi 11

Nzambe atindaki Yesu Klisto lokola ndakisa ya bolingo na Ye.

Ntango Nefi atunaki anzelu maye etali ndimbola ya nzete ya limoni ya Lehi, anzelu yango akokaki koloba na pete, “Ezali kotalisa bolingo ya Nzambe.” Na esika na yango, alakisaki Nefi milongo ya bilembo mpe makambo ya bomoi ya Mobikisi. Boluka bilembo mpe makambo oyo ntango bozali kotanga mpe komanyola 1 Nefi 11. Bozwi nini oyo esalisi yo kososola mpo na nini Yesu Klisto azali ndakisa ya nsuka ya bolingo ya Nzambe?

Bokoki lisusu kokanisa kotala Bible Videos kati na Gospel Library oyo ekokani na makambo Nefi amonaki. Lolenge nini Mobikisi asalisaki bino boyoka bolingo ya Tata na Lola?

Tala lisusu Susan H. Porter, “Bolingo ya Nzambe: Suka ya Esengo ya Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 33-35.

1 Nefi 12–14

Nakoki “kolatisama na boyengebene” mpe nguya.

Nefi akotikala na bomoi ntango molai te mpo na kozala nzeneneke ya mingi ya maye amonaki na limoni na ye. Mpo na nini okanisi ezali motuya mpo ete Nefi ayeba makambo oyo? “Mpo na nini ezali motuya mpo ete boyeba yango? Botuna mituna oyo ntango nyonso bozali kotanga mpo na ntina ya likambo moko Nefi amonaki na limoni na ye (tala 1 Nephi 12–14). Boyekoli nini etali mosala na bino kati na “mosala monene mpe …ya kokamwa ya Nkolo”? 1 Nefi 14:7). Nini ezali mosusu ya makambo minene mpe ya kokamwa Ye asalaki mpo na bino?

Kanisa mingi mingi na elaka kati na 1 Nefi 14:14. Lolenge nini Mobikisi akokisaki bilaka oyo kati na bomoi na bino? (Mpo na mwa bandakisa, botala David A. Bednar, “With the Power of God in Great Glory,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 28–30, mingi mingi biteni mibale ya nsuka.)

1 Nefi 13:1–9; 14:9–11

“Eklezia monene mpe ya nsomo” oyo Nefi amonaki ezali nini?

Mokambi Dallin H. Oaks alimbolaki ete “eklezia monene mpe ya nsomo” oyo Nefi alimbolaki ezali kolakisa “filozofi to lingomba nyonso oyo ezali kotelemela boyambi na Nzambe. Mpe ‘bokangami’ kati na oyo wapi ‘eklezia’ oyo ezali koluka komema basantu ekozala mingi mpenza kokangisama ya mosuni te kasi mingi mpe lokola bokangami ya makanisi ya lokuta” (“Stand as Witnesses of God,” Ensign, Sanza ya misato 2015, 32). Lolenge nini Mobikisi asalisaka bino boboya—mpe bokima—bokangemi ya makanisi ya lokuta?

1 Nefi 15:1–11

Nzambe akoyanola ngai soki nasengi kati na bondimi;

Esila yo koyoka naino te lokola ozalaki kozwa emoniseli ya yo moko te—ete Nzambe azalaki kosolola na yo te? Toli nini Nefi apesaki bandeko na ye ya mibali ntango bayokaki lolenge oyo? (Tala 1 Nefi 15:1–11.) Lolenge nini bokoki kosalela toli ya Nefi na bomoi na bino?

Elilingi
elembo ya seminele

2 Nefi 15:23–25

Kosimbaka makasi liloba ya Nzambe esalisaka ngai natelemela nguya ya satana.

Nafi azalaki mbala mingi na makambu ya nokinoki ya kolobela bandeko na ye ya mibali. Kasi amonanaki lokola alingakimingi mingi komipesa na maye etali makambo alobelaki bango 1 Nefi 15:23-25. Nsango ya Nefi ezalaki nini, mpe mpo na nini bokanisi amiyokaki makasi na oyo mpo na ntina ya yango?

Mpaka David A. Bednar ateyaki ete “liloba ya Nzambe” ekoki kolobela makomi, maloba ya baprofeta ya bomoi mpe na Yesu Klisto Yemei. Bokanisi elingi koloba nini “kosimba makasi” makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi? Ekoki kolinga koloba nini “kosimba makasi” Yesu Klisto? Bokoki koluka biyano ekoki mpo na mituna oyo kati na mituna kati na etinda ya mpaka Bednar“But We Heeded Them Not” (Liahona, Sanza ya mitano 2022, 14–16).

Lolenge nini kosimba makasi lilomba ya Nzambe esalisaka bino botelemela monguna? Kotondisaka etando lokola oyo ekoki kosalisa kobongisa makanisi na bino:

 … Salisa ngai kolonga molili ya masenginnia? (tala 1 Nefi 12:17)

 … salisa ngai “nasala keba te” na lolendo na lofundo ya mokili? (1 Nefi 12:18)

Lolenge nini kosimba makasi makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi …

Lolenge nini kosimba makasi Mobikisi …

Tala lisusu “The Iron Rod,” Hymns, no. 274; Jorge F. Zeballos, “Building a Life Resistant to the Adversary,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2022, 50-52.

Elilingi
libota ezali kotanga makomi

Makomi ezali lokola lingenda ya libende oyo ememaka biso na nzete ya bomoi.

Mpo na makanisi mingi, botala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

1 Nefi 11:16–33

Tata na Lola atindaki Yesu Klisto mpo alingaka ngai.

  • Mpo na koteya Nefi na ntina ya bolingo ya Nzambe, anzelu moko alakisaki Nefi makambo uta na Bomoi ya Mobikisi. Bokoki kosala lolenge moko mpo na bana na bino—bopesa bango bilili ya makambo Nefi amonaki kati na 1 Nefi 11:20, 24, 27, 31, mpe 33 (tala Gospel Art Book, nos. 30, 35, 39, 4257). Ntango bozali kotanga milongo oyo, bosalisa bana na bino bamona elilingi oyo ekokani na yangoi. Toyekoli nini na ntinaya Yesu Klisto uta na milongo mpe bililingi oyo?

  • Koyemba loyembo lokola: “He Sent His Son” (Children’s Songbook, 34–35) ekoki kosalisa bana na bino bayoka bolingo ya Nzambe. Nsima ya koyemba, botuna bana na bino nini bayekoli uta na loyembo. Toyekoli lisusu nini na ntina ya bolingo ya Nzambe uta na 1 Nefi 11:22–23?

Bosalela ntoki mpo na kosalisa bana bayekola. Ntango bozali koteya bana lisolo ya makomi moko, bosalisa bango batala filime na yango. Bokoki kosalela bililingi, bavideo, bikeko, bakazaka, mpe bongo na bono.

1 Nefi 13:26–29, 35–36, 40

Buku ya Mormon eteyaka bosolo ya motuya mingi.

  • Mpo na kosalisa bana na bino bapesa motuya na bosolo ya “polele mpe motuya” kati na Buku ya Mormon, bokoki koyema elilingi mpe kobengisa bana na bino babongwanisa to balongola biteni ya elilingi mpo na kosala yango emonana ya kokesana. Bokoki kosalela oyo mpo na koteya ete makambo kati na Biblia enbonwanisamaki mpe elongolamaki na ntango mingi nsima. Botanga elongo 1 Nefi 13:40 mpe bosolola mpo na ntina ya lolenge nini Buku ya Mormon (“makundoli ya nsuka oyo”) esalisaka biso tososola “makambo ya polele mpe motuya mingi” oyo ebungisamaki uta na Biblia(makundoli ya “yambo”). Bosolo nini ya “polele mpe motuya” boyekoli uta na Buku ya Mormon?

  • Video “The Book of Mormon—a Book from God” (Gospel Library) ekoki kosalisa bana na bino bamona mpo na nini ezali motua kozala na nyonso mibale Biblia mpe buku ya Mormon. Bana bakoki kosepela kosala lisusu elilingi uta na video yango.

Elilingi
mikanda ya Buku ya Mormon na nkota ekeseni

Buku ya Mormon ezongisi bosolo ya nsango malamu oyo ebungaki na eleko ya Bopengwi.

1 Nefi 15:23–24

Kosimba makasi liloba ya Nzambe esalisaka ngai natelemela masenginya.

  • Bopesa bana na bino llitomba ya kokabola maye bamikundoli mpo na ntina ya limoni ya Lehi. Ekoki kosalisa mpo na kosalela elilingi moko, lokola mokooyo kati na liteya ya poso eleki. Nini epekisaka bato bakoma na nzete? Nini esalisaka bango bakoma na yango? Bokoki kosenga bango bamona lingenda ya libende kati na elilingi. Botanga elongo 1 Nefi 15:23–24 mpo na komona nini lingenda ya libende ezali kolakisa mpe lolenge nini ekoki kosalisa biso us.

Mpo na makanisi mingi, botala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga .

Elilingi
Limoni ya Nefi mpo na ntina ya Maria mpe mwana Yesu

Limoni ya Nefi mpo na ntina ya Maria, na James Johnson

Bimisa na lokasa