Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na mibale 15–21: “Libota Ezali na Katikati ya Mwango ya Mokeli”: Libota: Esakola na Mokili


“Sanza ya zomi na mibale 15–21: ‘Libota Ezali na Katikati ya Mwango ya Mokeli’: Libota: Esakola na Mokili,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)

“Libota: Esakola na Mokili,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na ndako mpe Eklezia: 2025

libota moko

Sanza ya zomi na mibale 15–21: ““Libota Ezali na Katikati ya Mwango ya Mokeli”

Libota: Esakola na Mokili

Kutu liboso tobotama, tozalaki eteni ya libota moko—libota ya Baboti na biso na Lola. Ndakisa wana ezali kokoba na mabele. Mabota awa, na makoki na bango, esengeli kosala makasi mpo na kolanda ndakisa ebonga nie ya lola.

Ya solo, ezali na ndanga moko te ete mabota na mabele ekozala malamu to kutu ekosala lokola esengelami. Kasi lokola Mokambi Henry B. Eyring ateyaki, mabota “epesaka bana ya Nzambe libaku malamu mpenza ya koyambamai malamu na mokili na bolingo kaka moko oyo ezali pembeni na oyo toyokaki na lola—bolingo ya baboti” (“Gathering the Family of God,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 20). Koyeba ete mabota mazali ya kobonga nie te mpe mabundisamaka na monguna, Nzambe atindaki Mwana wa Ye ya Bolingo mpo na kosikola biso mpe kobikisa mabota na biso. Mpe atindaki baprofeta ya mikolo ya nsuka na esakola mpo na kobatela mpe kolendisa mabota. Soki tolandi baprofeta mpe totie bondimi na Mobikisi, ata soki mabota ya kufa ezali na makoki ya kokokisa likanisi ya ebandeli ya bonzambe te, elikya ezali mpo na mabota—na mabele mpe na lola.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koyekola na Ndako mpe na Eklezia

elembo ya seminele
“Libota ezali na katikati ya Mwango ya Mokeli.”

Libota: Esakola na Mokili” ezali kolobela polele mpenza mabota. Kasi ezali mpe mwango ya lobiko ya Nzambe. Lolenge moko ya koyekola esakola ezali ya kokoma maloba bomoi yambo ya kufa, bomoi ya kufa, mpe bomoi ya nsima ya kufa likolo ya lokasa mpe koma oyo esakola eteyi oyo etali moko na moko ya bansango oyo. Ososoli nini ntango oyekoli lisakola na lolenge oyo? Lolenge nini boyebi oyo ezali kosalisa yo kososola mpo na nini libala mpe libota ezali ntina na mwango ya Nzambe? Lolenge nini bosolo kati na esakola epesaka bopusi na maponi na yo?

Ezali na bato mingi oyo, mpo na bantina ebele, bakoki kozala na bobangi oyo etali libala to kobokolaa bana. Soki moninga moko alobi na yo, “Nalingaka kutu te kobala to kozala na libota,” okoloba nini? Ntango mosusu bokoki koluka esakola kolukaka eloko moko oyo ekosalisa moninga na yo azala na elikya na mwango ya Nzambe.

Motuna mosusu okoki kotunama—to oyo okoki komituna yomei—ezali moko lokola oyo: “Nini ekozala soki ezalela ya libota na ngai ezali kokokana te na oyo elimbolami kati na esakola ya libota?” Oyo ezali bisika mibale bokoki koluka toli ya baprofeta: eteni “A Mighty Change” kati na nsango ya Mpaka Dieter F. Uchtdorf “Jesus Christ Is the Strength of Parents” (Liahona, Sanza ya mitano 2023, 55–59) mpe biteni minei ya nsuka ya nsango ya Mpaka D. Todd Christofferson “Why Marriage, Why Family” (Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 52).

Nini oyoki efuli yo mpo na kosala na ntina ya oyo oyekolaki?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “The Plan and the Proclamation,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 28–31; Topics and Questions, “Family,” Gospel Library.

“Moto [moko na moko] azali molingami mwana mobali mpe mwana mwasi ya baboti ya lola.”

Tokanisaka mbala mingi esakola na mokili lokola bokambi mpo na bomoi ya libota. Kasi eteyaka lisusu bosolo ya motuya etali libota na biso ya lola mpe bomoto na biso ya seko. Mpo na nini ezali ntina mpo yo oyeba ete tozali banso eteni ya libota oyo? Lolenge nini bosolo oyo esimbaka maponi osalaka?

Tala lisusu “I Am a Child of God,” Hymns, no. 301.

“Esengo kati na bomoi ya libota ekokisama solo mpenza ntango libota etongami likolo ya mateya ya Nkolo Yesu Klisto.”

Kanisa biteni 6 mpe 7 ya esakola ya libota lokola ndakisa mpo na “esengo kati ya bomoi ya libota.” Ntango ozali kotanga biteni oyo, kitola mabongisi to mateya ya “mabala mpe mabota ya elonga.” Okoki kokanisa oyo etali bandakisa ya mabongisi oyo omoni kati na libota na yo moko to na mabota misusu. Lolenge nini mabongisi oyo esalisaka totya Yesu Klisto azala moboko ya bomoi ya libota?

Nsima okoki kokanisa oyo etali bozalani okolinga mpo na kolendisa. Sala mwango, na lisalisii ya Mobikisi, mpo na kosala na makanisi oyo ozwi.

Tala lisusu L. Whitney Clayton, “The Finest Homes,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 107–9.

tata azali kotangela bana na ye

Baboti basengeli kobokola bana na bango na bolingo mpe bosembo.

“Tozali kobengisa banamboka bayanoli … babatela mpe balendisa libota.”

Boye eteni ya nsuka ya esakola ya mokili ezali na libiangi na mosala. Ntango ozali kobanza lolenge nini okoyanola na libiangi wana, ekoki kosalisa mpo na koyekola nkombo ya esakola. Ndakisa, esakola ezali nini? Liloba wana elobeli yo nini na oyo etali nsango ya mokanda oyo? Nini etindaki Bokambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bapostolo Zomi na Mibale babimisa esakola na mokili etali mabota? Okoki lisusu kokoma molongo ya maye obanzi kozala bansango ya ntina ya esakola. Lolenge nini okoki kotombola bansango oyo na bomoi na yo, na libota na yo, mpe na lingomba na yo?

Tala lisusu Bonnie L. Oscarson, “Defenders of the Family Proclamation,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 14–17; “Defenders of the Faith” (video), Gospel Library.

6:56

Defenders of the Faith

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana 02

Makanisi mpo na Koteya Bana

Mabota ezali ntina na mwango ya Tata na Lola.

  • Bosalisa bana na bino bakanisa makambo oyo ezali motuya oyo bakolinga kolobela moto nyonso oyo etali bango. Bolakisa bana mokanda ya “Libota: Esakola na Mokili,” mpe bolimbolela bango ete baprofeta mpe bapostolo bakomaki yango mpo na koyebisa biso banso lolenge mabota ezali ntina epayi ya Tata na Lola. Mpo na nini mabota ezali ntina epayi na Ye? (tala lisusu “What Is the Purpose of Family?” [ChurchofJesusChrist.org]).

    2:3

    What Is the Purpose of Family?

  • Bokabola na bana na bino eloko moko uta na esakola oyo boyoki biso banso tosengeli koyeba. Bobengisa bana bakabola mayoki na bango na oyo etali bosolo oyo. Lolenge nini mabota na biso ekozala ya kokesena soki toyebaki te makambo oyo? Bokoki lisusu koyemba elongo loyembo oyo etali bosolo oyo ezwami kati na esakola, lokola “I Will Follow God’s Plan” (Children’s Songbook, 164–65).

  • Na eteni IV ya nsango na ye “Mwango mpe Esakola” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 30), Mokambi Dallin H. Oaks atalisi lolenge nini esakola ya libota ekomamaki. Ntango mosusu bino mpe bana na bino bokoki kotala ndimbola na ye elongo mpe kosolola oyo etali lolenge nini bozali na esengo mpo Nkolo afulaki basali na Ye bateya biso bosolo oyo etali mabota.

  • Bokoki lisusu kolakisa bana na bino bililingi (to kobengisa bango bayema) kolakisaka bosolo oyo ezwami na esakola ya libota. Yango ekoki kozala bililingi ya tempelo, libota ezali kosambela, to kosakana elongo, to balongani bazali kobalana. Nsima bana na bino bakoki kozwa maloba kati na esakola ya libota oyo ekokani na bililingi. Nini Nkolo ateyi biso etali makambo oyo ezali kati na esakola?

mwasi na mwana

Tata na Lola alingaka mabota ezala na esengo.

Bozala na bokebi. Ntango bozali koteya bosolo oyo eteyami na esakola ya libota, tosengi bosala keba ete bana mingi babikaka na mabota oyo ekokisaka makambo ya ntina oyo elimbolami na esakola te. Banza lolenge nini okoki kolendisa mpe kofula bango.

Nazali “mwana mobali to mwana mwasi ya molimo ya bolingo ya baboti ya lola.”

  • Ntango bozali koyemba elongo “I Am a Child of God” (Children’s Songbook, 2–3), bokoki kobwakela mwana moko ndembo ntango bolobi, “nayebi mwana ya Nzambe moko na nkombo ya [nkombo ya mwana].” Nsima mwana wana akoki kobwakela eloko moko na moto mosusu, kolobaka maloba moko mpe kobakisaka nkombo ya moto wana. Bosunga bana na bino bazwa liloba “mwana mobali to mwana mwasi ya molimo ya bolingo ya baboti ya lola” kati na esakola ya libota, mpe kotatola oyo etali bosolo oyo.

Mabota ezali na esengo ntango elandaka Yesu Klisto.

  • Mpo na kobanda lisolo etali kolendisa libota na bino, bino mpe bana na bino bokoki kosolola oyo etali nini tosalaka mpo na kokomisa makambo misusu makasi—lokola mino na biso, banzoto na biso, to ndako moko. Okoki nsima kokokanisa yango mpo na kotonga libota elenda. Bosalisa bana na bino bazwa mabongisi ya Kimoklisto oyo ekambaka na esengo kati na bomoi ya libota, ezwami kati na eteni 7 ya esakola ya libota (tala lisusu lokasa ya molulu) ya poso oyo)

Mpo na makanisi mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na magazini ya Moninga .