Likita Linene
Bandako ya Kitoko Koleka Nyonso
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Bandako ya Kitoko Koleka Nyonso

Mobikisi azali mosali, motongi, mpe moyemi ya kati abongi nie. Mwango na Ye ezali esengo ebongo nie mpe ya seko ya milimo na biso.

Kala te etando moko ya mayebisi na Salt Lake City etutaki motema na ngai. Ezalaki kopesa nsango ya kompani esalaka biloko ya ndako mpe ebongisaka kati ya ndako. Ezalaki koloba na pete, “Kosala Bandako ya Kitoko Koleka Nyonso na Salt Lake City.”

Nsango yango ezalaki kosimba motema—“Ndako ya kitoko koleka nyonso” ezali nini? Nazwamaki kokanisa motuna wana, mingimingi na kotalaka bana oyo mwasi na ngai, Kathy, mpe ngai tobokolaki mpe bana oyo bango bazali kobokola lelo. Lokola baboti bisika binso, tozalaki komitungisa mpe kosambela mpo na libota na biso. Tozali kokoba kosala yango. Tozali na makasi koluka ya malamu mingi koleka mpo na bango. Lolenge nini ekoki bango mpe bana na bango kofanda na bandako ya kitoko to malamu koleka mpenza? Nakanisaki na ntina ya bandako ya bandimi ya Eklezia oyo Kathy mpe ngai tozwaki libaku ya kokende kotala. tobengisamaki na bandako na Korea mpe Kenya, na Philippines mpe Peru, na Laos mpe Latvia. Tika nakabola makambo minei namonaki na ntina ya bandako oyo.

Yambo, na emoneli ya Nkolo, kofandisaka bandako kitoko mpenza etali bizalela ya moto na moto ya bato oyo bafandi kuna. Bandako oyo ebongisami na lolenge ya motuya to ewumelaka na biloko na yango ya ndako to na motuya mpenza to bozwi ya bakolo na yango. Ezalela kitoko mpenza ya ndako ezali elilingi ya Klisto oyo etalisami kati na bafandi ya ndako yango. Oyo ezali motuya mpenza ezali lolenge ya kati ya milimo ya bato, kasi etongeli na yango ya libanda te.

Bizalela oyo ya Klisto ezwami “nsima ya ntango” 1 na bokoli oyo moto akani kokokisa na nzela ya mayokani. Bizalela ya Klisto ebongisaka bomoi ya baoyo basalaka makasi kozala na bomoi malamu. Batondisaka bandako na pole ya nsango malamu, atako soki nse ezali ya potopoto to mabanga ya ntalo. Ata soki ozali moto bobele moko na libota na yo oyo olandaka motindo ya “koluka makambo oyo,” 2 okoki kopesa yayo likabo na kotiaka biloko ya ndako mpe kobongisa ndako ya libota na yo na molimo.

Tolandaka toli ya Nkolo ya “kobongisa [bisomei]; kolengela biliko nyonso ya bosenga; mpe kotonga ndako” na kobongisaka, kolengelaka, mpe kotongaka bomoi na biso ya molimo, ndako mpe mabele na biso te. Ntango tozali kolanda na bompikiliki nzela ya mayokani ya Nkolo, ndako na biso ezali kokoma “ndako moko ya nkembo, ndako moko ya molongo, [mpe] ndako moko ya Nzambe.” 3

Ya mibale, bafandi na bandako ya kitoko koleka bazwaka ntango mpo na koyekola makomi mpe maloba ya baprofeta na bomoi mikolo nyonso. Mokambi Russell M. Nelson abengisi biso “tobongola” mpe “tozongisa sika” bandako na biso na nzela ya boyekoli ya nsango malamu. 4 Libengisi na ye ezali koyeba lisusu ete bandako ya kitoko ebombaka mosala ya boboto, ya motuya ya bokoli ya moto moko moko mpe kobongisa lisusu botau na biso. Boyamboli ya mokolo na mokolo ezali esalelo ya kobongola oyo epesaka biso makoki ya kokoma mwa boboto koleka, na bolingo mingi koleka, mpe na bososoli mingi koleka. Koyekola makomi ememaka biso mpembeni koleka na Mobikisi, oyo ya ye bolingo ya kokaba mpe ngolu ezali kosunga biso na bokoli na biso.

Biblia, Buku ya Mormon, mpe Liyaka ya Ntalo Monene ezali kobeta masolo ya mabota, yango wana ezali kokamwa te ete babuku ya bonzambe oyo ezali mikanda ya komekisa te mpo na kotonga bandako ya kitoko koleka nyonso. Ezali kobeta masolo ya mitungisi ya baboti, makama ya masenginia, elonga ya bosembo, mimekano ya nzala mpe ya kotondama, makambo ya liwa mpe matanga, mpe nsomo ya bitumba mpe makabo ya kimia. Lisusu mpe lisusu makomi ezali kolakisa biso lolenge nini mabota ezali kolonga na nzela ya bomoi ya sembo mpe lolenge nini ezali kokweya na kolandaka banzela mosusu.

Ya misato, bandako ya kitoko koleka elandaka ndakisa epesama na Nkolo mpo na ndako na Ye ya kitoko koleka oyo ezali, tempelo. Kotonga tempelo ebandaka na matambe ya ntina—kokata matiti mpe kobongisa mabele. Makasi ya ebandeli oyo mpo na kolengela mabele ekokaki kokokanisama na kobatelaka mitindo ya ntina. Mitindo ezali moboko likolo na yango kimoyekoli etongami. Kimoyekoli ya molende ekambaka biso mpo tokoma ngwi, molende, mpe ya koningana te, 5 lokola eloko ya libende ya tempelo. Moboko ya libende oyo eninganaka te epesaka nzela na Nkolo atinda Molimo na ye mpo na kobongola mitema na biso. 6 Kobika mbongwana ya nguya ya motema ezali lokola kobakisaka biloko ya kitoko na kati ya tempelo.

Ntango tozali kokoba na bondimi, Nkolo azali moke moke kobongola biso. Tozwi elilingi na Ye na elongi na biso mpe tobandi kobimisa bolingo mpe kitoko ya ezalela na Ye. 7 Ntango tokomi mingi lokola Ye, tokomiyoka epai na biso na ndako na Ye, mpe Akomiyoka epai na Ye na oyo ya biso.

Tokoki kozala na mokangano makasi na ndako na Ye na kolongobanaka mpe na kosalelaka mokanda ya ndingisa mpo na tempelo mbala na mbala ntango makambo na biso epesi nzela. Ntango tozali kosala bongo, bosantu ya ndako ya Nkolo efandi kati na oyo ya biso mpe.

Tempelo ya Lokumu ya Salt Lake etelemi mpembeni wana Etongama na bapionie na bisalelo ya kala, biloko ya mboka, mpe mosala moko makasi ezanga nsuka, tempelo yango etongamaki uta na 1853 tii na 1893. Bandimi ya Eklezia na ebandeli basengelaki komipesa na mosala, etongeli, mpe kobongisa kati oyo ekelaki mosala ya kitoko koleka oyo eyebani na funda ya bato.

Pene na mibu 130 milekaki uta tempelo ebulisamaki. Lokola Mpaka Gary E. Stevenson alobaki lobi, mibeko ya misala oyo basalelaki mpo na koyema tempelo yango ekitanamaki na etongeli ya sika koleka, ya bokengi koleka. Bozangi kobongisa mosala ya tempelo mpe kobongisa botau ya ndako ekoki koteka bondimi ya bapionie, oyo basalaki nyonso oyo bakoki mpe batikaki bobateli ya tempelo na bankola ekoya.

Eklezia ebandi mosala ya mibu minei ya bozongisi sika mpo na kobongisa bokasi ya ndako na biteni na yango mobimba ya tempelo mpe kolendisa yango soki mabele eningani. 8 Moboko, nse, mpe bifelo ekolendisama. Boyebi mosala malamu mpenza oyo ekoki kozwama lelo ekokomisa tempelo na ndenge ya sikawa. Tokokoka komona mbongwana ya ndako te, kasi mbano na yango ekozala solo mpe motuya. Na misala nyonso oyo, kitoko ya biloko ya liyemi ya kati ya tempelo ekobatelama.

Tosengeli kolanda ndakisa oyo ezali kopesamela biso na misala ya bozongisi sika Tempelo ya Salt Lake mpe kozwa ntango ya koyeba motuya ya makoki ya kotongama ya mayele na kotelemela boningani ya molimo na biso na mikakatano ya lelo oyo. Komituya biso moko eleko na eleko, elongo na kotunaka Nkolo, “Nini ezangi ngai?” 9 ekoki kosunga biso totonga bandako ya kitoko koleka mpenza.

Ya minei, bandako kitoko koleka nyonso ezali ekimelo uta na mipepe makasi ya bomoi. Nkolo alaki ete baoyo babatelaka mitindo ya Nzambe “bokozwa bomengo na mboka.” 10 Bomengo ya Nzambe ezali nguya ya kokende liboso atako kpokoso ya bomoi.

Na 2002 nayekolaki liteya moko ya motuya etali kpokoso. Ntango nazalaki na Asunción, Paraguay, nakutanaki na bakambi ya makonzi ya engumba yango. Na ntango wana, Paraguay ezalaki kozanga mosolo makasi, mpe bandimi mingi ya Eklezia mingi bazalaki konyokwama mpe mosolo ya kokoma na nsuka ya sanza ezalaki te. Nazonga na Amerika ya Sudi te uta misio na ngai mpe mokolo moko te nazonga na Paraguay. Nazalaka kosala na Bokambi ya Etuka enene wana bobele mwa baposo. Kobangaka bozangi makoki na ngai ya kopesa malakisi na bakambi ya makonzi wana, nasengaki bango balobela ngai nini ezalaki kotambola malamu na makonzi na bango. Mokambi ya likonzi ya yambo alobaki na ngai makambo oyo ezalaki kotambola malamu. Ya nsima alobaki makambo oyo ezalaki kotambola malamu mpe mwa kpokoso . Na ntango tokomaki na mokambi ya likonzi ya nsuka, alobaki kaka molongo ya mikakatano ya mpasi. Ntango mokambi ya likonzi azalaki kolimbola monene ya likambo, nakomaki komitungisa mingi mingi, pene ya kozanga elikya, na oyo etali nini nasengelaki koloba.

Kaka ntango mokambi ya nsuka ya likonzi yango azalaki kosilisa etinda na ye, likanisi moko eyaki na moto na ngai: “Mpaka Clayton, tuna bango motuna oyo: ‘Bakambi, kati na bandimi na makonzi na bino banani bafutaka moko na zomi mobimba, bafutaka makabo ya bokili ya bokabi, basalelaka mabiangi na bango na Eklezia, bakendaka mpenza kotala mabota lokola bateyi ya mabota to bamama batali bateyi 11 sanza nyonso, basalaka likita ya libota na mpokwa, bayekolaka makomi, mpe basalaka losambo na libota mokolo na mokolo, boni kati na bango bazali na kpokoso bakoki kosilisa bango moko te soki Eklezia ekoti te mpe esilisa kpokoso mpo na bango?’”

Koyanolaka na liyoki nazwaka, natunaki bakambi ya makonzi motuna wana.

Batalaki ngai nie na kokamwa mpe balobaki, “Pues, ninguno,” kolingaka koloba, “Malamu, moko te.” Nsima balobaki na ngai moko te na bandimi oyo basalaki nyonso ya makambo wana bazalaki na kpokoso oyo bazalelaki na makoki te ya kosilisa na bango moko. Mpo na nini? Mpo bazalaki kofanda na bandako ya kitoko koleka mpenza. Bomoi na bango ya sembo epesaki bango bokasi, limoni, mpe lisungi ya lola oyo basengelaki na yango mpo na koyika mpiko mpe kobika na mpasi ya makoki ya bomoi kozingaka bango.

Oyo elingi koloba te bayengebeni bakobela te, bakozwa likama te, bakokutana na makama te, bakokutana na bobaluki ya bozwi te, to bakobundisama na mikakatano mingi mosusu te na bomoi na bango. Bokufi ntango nyonso ememaka mikakatano, kasi mbala na mbala namoni ete baoyo bazali kosala makasi kotosa mitindo bapambolami mpo na komona nzela ya kokende liboso na kimia mpe elikia. Mapamboli wana mazali mpo na moto nyonso. 12

David asakolaki, “Soko ezali Yawe te oyo akotongaka ndako basali bakosala wana bobele mpamba.” 13 Ata ofandi wapi, ata ndako na yo ezali lolenge nini, mpe ata libota banani bazali na libota na yo, okoki kotonga ndako kitoko mpenza mpo na libota na yo. Nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto epesi moango mpo na ndako wana. Mobikisi azali mosali, motongi, mpe moyemi ya kati abongi nie. Moango na Ye ezali esengo ebongo nie mpe ya seko mpo na milimo na biso. Na lisungi na Ye ya bolingo, molimo na yo ekoki kozala nyonso Ye alingi yango ezala mpe okoki kozala kopi kitoko koleka nyonso ya yomei, milengela mpo na kotonga mpe kofanda kati ya ndako kitoko koleka nyonso.

Natatoli na botondi ete Nzambe mpe Tata na biso banso azali na bomoi. Mwana na Ye, Nkolo Yesu Klisto, azali Mobikisi mpe Mosikoli ya bato banso. Balingaka biso malamu. Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bokonzi ya Nkolo na mabele. Baprofeta na bomoi mpe bapostolo bazali kokamba biso lelo. Buku Ya Mormon ezali solo. Nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto ezali ndakisa ya malamu koleka nyonso ya ndako ya kitoko koleka nyonso wana. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa