Lolenge nini Bonganganzambe Epambolaka Bilenge
Na nzela ya bonganganzambe, tokoki kotombwama. Bonganganzambe ememaka pole kati na mokili na biso.
Nazali na Botondi ya kozala awa. Ntango yambo napesamaki libaku ya kolobela bino lelo, nayokaki esengo makasi kasi na ntango se moko wana namikitisaki. Nalekisaki ngonga ebele kokanisaka na ntina ya maye nakokaki kokabola, mpe nalikii ete Molimo akolobela bino mbala moko na nzela ya etinda na ngai.
Na buku ya Mormon, Lehi apesi lipamboli epai ya moko moko ya bana na ye yambo ye akufa yango esungi bango basosola bokasi mpe makoki na bango ya seko. Nazali leki ya nsuka kati na bana moambe, mpe mobu ya nsima oyo moleki nazalaki mwana se ngai moko na ndako mpo na mbala ya liboso. Kozangaka bandeko na ngai mpembeni mpe kozangaka ntango nyonso moto ya kosolola na ye ezalaki kaka mpasi mpo na ngai. Ezalaki na babutu wapi nazalaki komiyoka kkaka ngai moko mpenza. Nazongisi matondi mpo na baboti na ngai, oyo bamekaki kosala nyonso mpo na kosalisa ngai. Ndakisa moko na yango ezali ntango tata na ngai andimaki kopesa ngai lipamboli ya bonganganzambe ya libondi na ntango moko ya mikakatano mpenza. Nsima ya lipamboli na ye, makambo mabongwanaki na mbala moko te, kasi nakokaki koyoka kimia mpe bolingo uta na Tata na Lola mpe uta ya tata na ngai. Namiyokaki ya kopambolama ya kozala na tata alongobana oyo akoki kopesa mapamboli ya bonganzambe ntango nyonso nazali na mposa na yango mpe oyo azali kosunga ngai komona bokasi mpe makoki na ngai ya seko, kaka lokola Lehi asalaki ntango apambolaki bana na ye.
Atako makambo na yo ezali ndenge nini, okoki ntango nyonso kozwa mapamboli ya bonganganzambe. Na nzela ya baye libota, baninga, bandeko mibali ya mosala ya kosalisa, bakambi ya bonganganzambe, mpe Tata na Lola oyo akokosa yo mokolo moko te, okoki kozwa mapamboli ya bonganganzambe. Mpaka Neil L. Andersen alobaki: “Mapamboli ya Bonganganzambe ezali kino nsuka monene koleka moto oyo asengami kopesa likabo yango. … Ntango tozali ya kolongobana, makuli ya bonganzambe efulukisaka bomoi na biso.” 1
Kotatabana te kosenga lipamboli moko ntango osengeli toli mosusu. Ezali na bangonga na biso ya mpasi nde tozalaka na bosenga ya Molimo mpo na kosunga biso mingi koleka mpenza. Moto moko te abonga nie, mpe biso banso tokutanaka na bakpokoso. Basusu kati na biso bakoki konyokwama na bobangi, kolemba nzoto, kokangama na mimeseno mabe, to koyoka lokola ete bazali kokoka te. Mapamboli ya bonganzambe ekoki kosunga biso tolonga mikakatano oyo mpe kozwa kimia ntango tozali kokende liboso. Nalikyi ete tozali kosala makasi ete tolongobana mpo na ozwa mapamboli oyo.
Lolenge mosusu bonganganzambe epambolaka biso ezali na nzela ya mapamboli ya batata. Nayekoli kotanga ya ngai lipamboli ya batata ntango nyonso oyo namiyokaka mawa to nazalaka ngai moko. Lipamboli na ngai esungaka ngai nasosola makoki na ngai mpe mwango se moko oyo Nzambe azali na yango mpo na ngai. Elendisaka ngai mpe esungaka ngai namona mosika koleka bomoni na ngai ya mabele. Ekundolisaka ngai makabo mpe mapamboli nakozwa soki nazali na bomoi elongobana. Ezali lisusu kosalisa ngai namikundola mpe nayoka kimia ete Nzambe akopesa biyano mpe akofungola bikuke mpo na ngai na ngonga mpenza oyo esengeli ntango nazali na yango bonsenga koleka mpenza.
Mapamboli ya batata esungaka kolengela biso tozonga kofanda elongo na Tata na Lola. Nayebi ete mapamboli ya batata ewutaka na Nzambe mpe ekoki kosunga biso tobongola botau na biso na bokasi. Oyo ezali nsango ewuti na nganga nkisi te; mapamboli oyo ezali kolobela biso maye tosengeli koyoka. Ezali lokola Liahona mpo na moko moko kati na biso. Ntango totie Nzambe liboso mpe tozali na bondimi epai na Ye, Akokamba biso kati na esobe ya biso moko.
Kaka lokola Nzambe apambolaki Joseph Smith na bonganganzambe mpo ete mapamboli ya nsango malamu ekokaka kozongisama, tokoki kozwa mapamboli ya nsango malamu na bomoi na biso na nzela ya bonganganzambe. Poso moko na moko topesami litomba mpe libaku ya kolia elambo. Na nzela ya makuli ya bonganganzambe oyo, tokoki kozwa Molimo mpo azala ntango nyonso elongo na biso, oyo akoki kosukola mpe kopetola biso. Soki oyoki mposa ya kolongola eloko moko uta na bomoi na yo, mona bakambi otielaka motema oyo bakoki kosunga yo omitia na nzela malamu. Bakambi na yo bakoki kosunga yo ozwa nguya mobimba ya Bomikabi ya Yesu Klisto.
Mpo na bonganganzambe, tokoki lisusu kozwa mapamboli ya makuli ya tempelo. Uta ntango wana nazali na makoki ya kokoka na tempelo, nazwi mokano mpe natie yango na esika ya liboso ya kokende mbala na mbala. Na kozwaka ntango mpe na komibonzaka lokola esengeli mpo na kozala mpembeni mingi ya Tata na Lola na ndako na Ye esantu, napambolami na kozwaka emoniseli mpe bitinda oyo esungi ngai mpenza na bomoi na ngai mobimba.
Na nzela ya bonganganzambe, tokoki kotombwama. Bonganganzambe ememaka pole kati na mokili na biso. Mpaka Robert D. Hales alobaki: “Kozanga nguya ya bonganzambe, ‘mabele mobimba ekobebisama mpenza’ (tala D&C 2:1–3). Ekozala na pole moko te, elikya moko te—bobele molili.” 2
Nzambe azali kosepela elongo na biso. Alingi biso tozonga epai na Ye. Ye ayebi biso moko na moko. Ayebi bino. Alingaka biso. Ayebi biso ntango nyonso mpe apambolaka biso ata ntango tozali komiyoka ete tobongi na yango te. Ayebi maye tozali na yango bosenga mpe ntango nini tosengeli yango.
“Senga, mpe ekopesamela yo, luka, mpe okozwa, beta, mpe bakofungolela yo:
“Mpo na baoyo nyoso basengaki bazwaki; mpe baoyo balukaki bazwaki; mpe na baoyo babetaki ete ekofungolamaki” (Matai 7:7–8).
Soki ozali naino na litatoli te etali bonganganzambe, nalendisi yo osambela mpe osenga mpo na koyeba yo moko nguya na yango, mpe nsima tanga makomi mpo na koyoka maloba ya Nzambe. Nayebi ete soki tosali makasi ya koyeba nguya ya bonganganzambe ya Nzambe na bomoi na biso, tokopambolama. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.