Nguya na Bonganganzambe
Moto akoki kofungola ekuke naye natina ete molunge ya moi ekota na ndaku naye, kasi mutu azali kolo moi te to pole to molunge ememaka.
Mapamboli ya Bonganganzambe ezali mpoya banso
Lokola bana na likita ya elambo toyembi na esengo loyembo ya eteyelo ya bana, “bolingo elobami awa” bato nyonso baseki na kondima. Mama ya mpiko kobokola bana mitano ayokaki na bokebi nyonso mokapo ya mibale: “Yangai ezali ndako esika epambolami ngonga [nyonso] na nkonzo ya Bonganganzambe [nguya].”1 Na mawa Akanisaki, “Bana ngai batikala koyeba ndako ya boye te.”2
Nsango na ngai ya lelo na muasi wana ya nkonzo mpe na bato nyonso oyo bakoki kobika na ngonga nyonso epambolami na nkonzo na nguya ya Bonganganzambe,” atako makambo na biso.
Tosangisaka ntango mingi nguya ya Bonganganzambe na bato na Eklezia. Bonganganzambe ezali nguya mpe bokonzi ya Nzambe epesami mpona lobiko mpe lipamboli ya banso—mibali, basi, mpe bana.
Moto moko akoki kofungola ekuke natina ete molunge ya moyi ekota na kati ya ndako, kasi moto azali nkolo moi te to pole, to molunge yango ememaka te. Mapamboli ya Bonganganzambe ezali na bonene suka te na ndenge ete moko oyo asengaki kopesama likabo.
Kozua mapamboli, nguya, mpe bilaka ya Bonganganzambe na bomoyi oyo mpe na mikolo mizali koya ezali moko ya mabaku mpe mikumba minene ya bokufi. Lokola tolongobani, bokuli ya Bonganganambe etondisi bomoyi na biso na mabele mpe ebongisi biso mpona bilaka kitoko ya mokili ya liboso. Nkolo alobaki, “na kati ya bokuli… nguya ya bonzambe ezali komimonisa.”3
Ezali na mapamboli na ndenge mosusu kowuta na Nzambe mpo na moto nyonso oyo balongobani mpe oyo babatisami, azui Molimo Mosantu mpe azali kolia elambo mbala na mbala. Tempelo ememaka bobakisi ya pole mpe bokasi, nzela moko na elaka ya bomoyi ya seko.4
Mapamboli maye ekolaka soki tobombi mitindo mpe bokoli ya bondimi na biso na Yesu Klisto. Bokuli nyonso ezo benga biso tosala mpe tobomba mayokani na Nzambe. Ntango tobombi mayokani tokozua nguya ya Bonganganzambe mpe mapamboli.
Toyokaka nguya ya Bonganganzambe na bomoyi na biso mpe komona yango na kati ya liyokani na libombami ya bandimi ya Eklezia te? Tomonaka yango na babonguani ya sika ntango bawuti na mayi ya libatisi bayoki bolimbisami mpe mpetua. Tomoni bana na biso mpe bilenge na kosimbama ya lombango mpe koteyama ya Molimo Mosantu. Tomonaka bokuli ya tempelo ekomi muinda monene ya bokasi mpe mpole mpo na mibali ya sembo mpe basi na mokili mobimba.
Sanza oyo eleki namonaki babalani moko ya bilenge koyamba bokasi monene kowuta bilaka ya kokangisa na tempelo lokola bebe na bango ya motuya ya mobali kasi abikaki kaka mposo moko. Na nzela ya bokuli ya Bonganganzambe, tozali koyamba libondi, bokasi, bobateli, kimia mpe bilaka ya libela.5
Maye toyebi nantina ya Bonganganzambe
Mingi bakoki kotuna motuna na bosembo koleka,“soki nguya mpe mapamboli ya Bonganganzambe ezali wana mpona banso, mpona nini bokuli ya Bonganganzambe epesameli epai ya mibali?”
Ntango anzelu atunaki Nefi, “oyebi boboto ya Nzambe?” Nefi azongisaki na bosembo, “Nayebi ete alingaka bana na ye; kasi, Nayebi te ndimbola ya biloko nyonso.”6
Ntango tozali kolobela Bonganganzambe, ezali na makambo mingi toyebi.
Banso bazali ya kokokana
Toyebi ete Nzambe alingaka bana Na Ye nyonso mpe alongoli ata moto moko te. “Ye aboyaka moko te oyo ayei epai na ye, … mobali [to] muasi; … mpe banso bazali ndenge moko epai ya Nzambe.”7
Lokola na bosolo toyebi ete bolingo ya Nzambe ezali ndenge moko mpona bana na Ye ya mibali mpe bana na Ye ya basi, toyebi lisusu ete Ye akelaki mibale mpe basi lolenge moko mpenza te. Toyebi ete kibomuasi to kimobali ezali elembo ya ntina mpenza na ebele ya bokufi mpe lolenge na biso ya libela mpe ntina. Mikumba ya bule bipesameli na kibomuasi mpe kimobali nyonso.8
Uta na ebandeli
Toyebi ete wuta ebandeli Nkolo asalaki lolenge nini Bonganganzambe na Ye esengelaki kozala. “Bonganganzambe epesamaki na yambo na Adama.”9 Noa, Abalayama, mpe Mose banso bapesamelaki bosaleli ya Bonganganzambe. Yesu Klisto azalaki mpe azali nganganzambe ya monene mpe ya likolo. Ye abengaki ba Apostolo. “Bino boponaki ngai te,” Ye alobaki, “kasi Ngai naponaki bino, mpe nakulisa bino.”10 Na mikolo na biso nsango ya lola etindami kowuta na Nzambe. Yoane Mobatisi, Petelo, Yakobo, mpe Yoane bazongisaki Bonganganzambe na mokili na nzela ya Profeta Joseph Smith.11 Oyo ezali nzela Tata na biso ya Lola apesaki Bonganganzambe na Ye.12
Makabo ebele kowuta na Nzambe
Toyebi ete nguya ya bonganganzambe mosantu esalaka te libanda ya bondimi, Molimo Mosantu, mpe makabo ya molimo. Makomi makebisi ete, “Koboya te makabo ya Nzambe, mpo mazali mingi... Mpe mazali banzela ekeseni oyo makabo maye mapesami; kasi ezali ndengemoko Nzambe ye asalaki [yango] nyonso.”13
Bolongobani
Toyebi ete kolongobana ezali na ntina monene mpo na kosalela mpe kozwa bokuli bonganganzambe. Ndeko muasi Linda K. Burton, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi alobaki, “Bolamu ezali ezaleli… ya kobenga nguya ya bonganganzambe na kati ya kobika na biso.”14
Mpona ndakisa, tala palaki ya bilili mpe makomi ya bonsoni ya mbangu mbangu na kati ya mokili. Esaleli ya naNkolo na bokasi epesi ndingisa te mpona bilili mpe makomi ya bonsoni kati na bokuli ya Bonganganzambe. Mobikisi alobaki:
“Yambola ya yo … masumu ya nkunku.”15
“Mpole ya nzoto ezali liso … soki liso ezwi likama moke, nzoto mobimba ekotonda na molili.”16
“[Mpona] oyo nyonso aluli muasi na makanisi ya mabe asali ekobo na mwasi wana kati ya makanisi na Ye.”17
Bokulisi, to koleka elambo, kopambola babeli, to kozala na bokuli mosusu ya bonganganzambe na kolongobana te ezali, lokola Mpaka David A. Bernard alobaki, kozwa nkombo ya Nzambe mpamba.18 Soki moko azali ya kolongobana te, asengeli kobenda nzoto na misala ya bokuli ya bonganganzambe mpe na losambo apusana epayi ya Episikopo lokola lokolo ya liboso na boyamboli mpe bozongeli mitindo.
Bosawa
Toyebi ete mapamboli ya bonganganzambe ezali mingi na mabota na biso esika mama mpe tata ya malamu basangani na koteyaka bana na bango. Kasi toyebi lisusu ete Nzambe akopesa na lombango mapamboli yango ndenge moko na banso na kpokoso mosusu ebele.19
Mama moko amemaki mokumba ya kobokola na molimo mpe na ntango mpo na libota na ye, Boyoki emanyoli ete abengaki bateyi na ye ndako kopambola moko ya bana na ye esengaki komikitisa. Kasi abakisaki ete esengaki komikitisa te ndenge ata oyo ya bateyi na ye ya ndako lokola bazali komibongisa kopambola muana na ye.20
Bafungola ya Bonganganzambe
Toyebi ete Bafongola ya bonganganzambe, esimbama na bandimi ya Bokambi bwa Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo zomi na mibale, kotambolisa mosala ya Nkolo likolo ya mabele. Bafongola ya bonganganzambe epesami mingi mingi likolo ya bakambi ya likonzi mpe baepisikopo mpona mikumba na bango na mambi ma nse. Babengi mibali mpe basi na bobimisi ba oyo bakosungama mpe bakotiama pembeni na makoki ya bapesami mpifo ya kotangisa mpe kopesa.21
Ntango toyebi ebele na ntina ya bonganganzambe, tomoni na nzela kitalatala moke ya bokufi epesaka ntango nyonso te bososoli na misala ya Nzambe. Kasi Bokundoli na Ye ya boboto, “makanisi nangai ezali makanisi na bino te, atako banzela na bino ezali banzela nangai te,”22 apesi biso elikia ete na ntango mpe mosala mwansuka te tokomona makambo lolenge ezali”23 mpe bososoli mobimba ya bolingo na Ye ya malamu mpenza
Tozali kosa na bolingo. Mbala mosusu toyokaka bolembu na libiangi mpe tosengami kosala koleka. Tango mosusu tosepelaka tango tosali malamu. Tosengaka libiangi tozwaka te.24 Na Yekolaki liteya oyo na ebandeli ya libala na ngai. Lokola babali ya sika, muasi na ngai, Kathy, mpe ngai tovandaki na Florida. Mokolo ya eyenga moko mopesi toli ya moko ya bokambi ya likonzi alimbolaki na ngai ete bayokaki na lombango kobenga Kathy lokola moteyi ya ntongo na kelasi ya bilenge.
“Lolenge nini tokosala?” “Natunaki. “Tozali na bana ya mike, kelasi ya bilenge ebandaka na 5: 00 ya ntongo, mpe ngai nazali mokambi ya bilenge mibali na palwase.”
Mopesi toli asekaki mpe alobaki, “Ekozala malamu, Ndeko Andersen. Tokobenga ye, mpe tokoyebisayo yo”
Mpe oyo ezali maye basalaki mpenza.
Lisalisi ya basi
Botuni ya solo mpe liyoki ya makanisi mpe ntina ya mongongo epayi ya basi ezali ntina makasi na bomoi, na libala mpe na botongi bokonzi ya Nzambe.
Ba mvula zomi na misato eleki na likita linene, Mpaka M. Russel Ballard asololaki lisolo moko asalaki na bokambi monene ya lisanga ya bamama basungi. Ezalaki na motuna moko etombolamaki na ntina ya bokasi mpe bolamu ya bobengisi ya bilenge kosala bamisio. Ndeko muasi Elaine Jack alobaki na koseka, “Oyebi, Mpaka Ballard, [basi] ya Eklezia bakoki kozala na makanisi kitoko … soki batunami. Na sima na nyoso … tozali bamama na bango!” 25
Mokambi Thomas S. Monson azali na lisolo ya bomoyi mobimba ya botuni mpe biyano na mabanzo ya bamama. Mwasi oyo asali mingi na bomoi na ye ezali Ndeko mwasi Frances Monson. Tozali banso kozanga ye. Mokambi Monso akundolisaki lisusu Bakambi Banene boniboni kala mingi te ayekolaki mingi uta na basi bakufeli 84 ya palwase na ye. Basalaki mingi na mosala na ye lokola episikopo mpe na bomoyi na ye mobimba.
Bokamua te na nse ya botambuisi ya Mokambi Monson mpe Bokambi bwa Yambo, basololaki mwa mingi na Lingomba ya Bamama Basungi, Bilenge Basi, mpe Bakambi eteyelo ya bana. Na ntina ya bobongoli mvula mpona mosala ya misionele, yambo Mokambi Monson .azwa mokano mokano mpe bolayi ya sango.
Baepisikopo, lokola bozali kolanda ndakisa ya Mokambi Monson, bokoyoka bokambami ya loboko ya Nkolo kopambola mosala nabino ya bule.
Tolekisi mvula mingi kofanda na Brazil. Moke sima ya bokomi nakutaki na Andelson Parrella, oyo azalaki kosala lokola moko yaba Ntukusambo, mpe ndeko na ye ya mobali Adilson, oyo azalaki mosali na bokambi ya likonzi na biso. Na sima nakutanaki na ndeko na ye ya mobali Adalton, mosali lokola mokambi ya likonzi na Florianopolis mpe ndako na bango mobali mosusu Adelmo, mosali lokoka episikopo. Natondisamaki na bondimi ya bandeko mibali oyo, mpe natunaki na ntina ya baboti na bango.
Libota ebatisamaki na Santos, Brazil, ba Mvula 42 eleki. Adilson Parrella alobaki, “Na yambo tata omonanaki na lisenginia na ntina ya kosangana na Eklezia. Nzokande, na sima [ntango moke] akomaki ya kolemba mpe ayebisaki mama na biso kokende eklezia te.
Adilson ayebisaki ngai ete mama na ye atongaki bilamba mpona bato ya penepene kofutela bana na ye motuka mosika na Eklezia. Bana minei ya mike ya mibali batambolaki elongo koleka ba kilometele tii na mboka mosusu, na kati ya motuka mpona 45 miniti, mpe sima batamboli 20 miniti mosusu tii na ndako ya Nzambe.
Atako akokaki te kokende Eklezia na ye, Ndeko muasi Stella Parrella atangaki makomi na bana na ye ya mibali mpe ya basi, ateyaki bango nsango elamu, mpe asambelaki na bango. Ndako na bango ya komikitisa ezalaki kotondama na mapamboli ya bozui ya nguya ya bonganganzambe. Bana mibali mike bakolaki, basalaki misio, batangaki, mpe babalaki na tempelo. Mapamboli ya bonganganzambe etondaki na bandako na bango.
Banvula eleki, lokola elenge muasi abali te, Vany de Paula Parrella akotaki na tempelo mpona dotasio na ye moko, mpe lisusu, asalaki misio misato na Brazil. Sikoyo na bamvula 84, bondimi na ye ezokoba kopambola mabota ekoya oyo elandaki ye.
Litatoli mpe Elaka
Nguya ya bonganganzambe ya Nzambe esalamaki na Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ya Mikolo mia Suka. Lokola bozalaki na bolamu na bokuli ya bonganganzambe, Nkolo akopesa bino bokasi ya monene, kimia, mpe libongisi linene. Na makambo na yo nyonso, ndako nayo “ekopambolama na bokasi ya nguya ya bonganganzambe” mpe maye mazali pene na bino ekotondisama na posa eye ya mapamboli mpoya bango moko.
Lokola mibali mpe basi, bandeko basi mpe bandeko mibali, banamibali mpe bana basi ya Nzambe tokende liboso elongo. Oyo ezali libaku na biso, mokumba na biso, mpe mapamboli na biso. Oyo ezali atandele na biso kobongisa bokonzi na Nzambe mpona bozongi ya Mobikisi. Na nkombo ya Yesu Klisto Amene